Salisá bato bátosa oyo Biblia eteyaka
“Mpo na oyo na mabelé ya malamu, yango ezali bato oyo, nsima ya koyoka liloba na motema ya kitoko mpe ya malamu, basimbi yango mpe baboti mbuma elongo na koyika mpiko.”—LUKA 8:15.
1, 2. (a) Buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na mokano nini? (b) Ndenge nini Yehova apamboli mosala ya kokómisa bato bayekoli oyo basaleli na ye basali na bambula oyo euti koleka?
“BUKU yango ezali malamu mingi. Bato oyo nayekolaka na bango balingi yango mingi. Ngai moko mpe nalingi yango mingi. Na buku yango, okoki kobanda koyekola Biblia na moto ata na porte ya ndako.” Wana ezali maloba oyo mobongisi-nzela moko alobaki mpo na buku Biblia eteyaka mpenza nini?a Mpo na buku yango kaka, mosakoli moko ya mobange, alobaki boye: “Nakokisi mbula 50 na mosala ya kosakola mpe nasalisi bato mingi báyeba Yehova. Kasi, nakoki mpenza koloba ete buku oyo ekokani na mosusu te. Buku yango ezali na bandakisa oyo ebongi mpe bililingi ya kitoko mpenza.” Yo mpe okoki koloba bongo mpo na buku Biblia eteyaka? Buku yango ebongisami mpo na kosalisa yo okokisa likambo oyo Yesu atindaki ete: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, . . . koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda.”—Matai 28:19, 20.
2 Na ntembe te Yehova asepelaka ntango amonaka Batatoli na ye koleka milio 6 na ndambo bazali kosala mosala ya kokómisa bato bayekoli, ndenge Yesu atindaki. (Masese 27:11) Ezali komonana polele ete Yehova azali kopambola milende na bango. Na ndakisa, na mobu 2005, nsango malamu esakolamaki na mikili 235, mpe basakoli bayekolaki Biblia na bato koleka 6 061 500. Na ndenge yango, bato ebele ‘bayokaki liloba ya Nzambe mpe bandimaki yango, lokola liloba ya bato te, kasi ndenge yango ezali mpenza, lokola liloba ya Nzambe.’ (1 Batesaloniki 2:13) Na mbula mibale oyo eleki, bayekoli ya sika koleka 500 000 babongolaki bomoi na bango mpo na kotosa mibeko ya Yehova mpe komipesa epai na ye.
3. Na lisolo oyo, tokotalela mituna nini na ndenge ya kosalela buku Biblia eteyaka?
3 Yo mpe oyokaki esengo ya koyekola Biblia na moto? Bato oyo bazali na “motema ya kitoko mpe ya malamu” oyo, soki bayoki liloba ya Nzambe ‘bakosimba yango mpe bakobota mbuma elongo na koyika mpiko’ bazali naino mingi na mokili mobimba. (Luka 8:11-15) Sikoyo, tótalela ndenge oyo okoki kosalela buku Biblia eteyaka na mosala ya kokómisa bato bayekoli. Na lisolo oyo, tokozwa biyano na mituna misato oyo: (1) Ndenge nini okoki kobanda koyekola Biblia na moto? (2) Mayele nini ya koteya ezali kobota mbuma malamu koleka? (3) Ndenge nini okoki kosalisa moto mpo asuka kaka te na kokóma moyekoli, kasi akóma mpe moteyi ya Liloba ya Nzambe?
Ndenge oyo okoki kobanda koyekola Biblia na moto
4. Mpo na nini bato mosusu bakakatanaka koyekola Biblia, kasi ndenge nini okoki kosalisa bango bálongola makanisi wana?
4 Soki balobi na yo obwaka lokolo mpo na kokatisa na ngámbo mosusu ya etima moko monene, mbala mosusu okoboya. Kasi, soki batye mabanga mpo na kokatisa, na ntembe te, okondima ata komeka. Se ndenge moko, moto mosusu akoki kokakatana koyekola Biblia mpo azalaka na makambo oyo ezwaka ye ntango mingi. Moto mosusu oyo tokutani na ye na mosala ya kosakola akoki kokanisa ete koyekola Biblia ekosɛnga ye ntango mpe milende mingi. Ndenge nini okoki kosalisa ye mpo alongola makanisi wana? Soki ozali kosolola na ye mwa masolo ya mikuse, okoki kosalela buku Biblia eteyaka mpo okóma koyekola na ye Liloba ya Nzambe pɔsɔ na pɔsɔ. Soki ozali komibongisa malamu mbala nyonso oyo okei kotala ye, ekozala lokola nde ozali kotyela ye libanga mokomoko na esika akoki kotya lokolo mpe na mokemoke akokóma moninga ya Yehova.
5. Mpo na nini osengeli kotánga buku Biblia eteyaka?
5 Nzokande, liboso ya kosalisa moto ayeba mpenza makambo ezali na buku Biblia eteyaka, yo moko osengeli koyeba yango malamu. Osili kotánga buku yango banda ebandeli tii nsuka? Mobali moko ná mwasi na ye bamemaki buku yango ntango bakendaki konje mpe babandaki kotánga yango ntango bakei kozwa mopɛpɛ na libongo. Mwasi moko oyo ayaki kolakisa bango biloko oyo atɛkelaka bato oyo bautaka mboka mopaya amonaki motó ya likambo Biblia eteyaka mpenza nini? Mwasi yango ayebisaki bango ete elekaki kaka mwa bangonga, autaki kobondela Nzambe mpo na likambo yango, asɛngaki ye apesa ye eyano. Bapesaki ye buku yango moko. Yo mpe osili ‘kosomba’ ntango mpo na kotánga buku yango, mbala mosusu mpe kozongela kotánga yango, na ndakisa na bantango oyo ozali kozela moto to na ntango ya kopema na mosala to na kelasi? (Baefese 5:15, 16) Soki osali yango, okomesana na buku yango mpe okoki ata koluka mabaku ya koyebisa bato makambo ezali na kati.
6, 7. Ndenge nini okoki kosalela buku Biblia eteyaka mpo na kobanda boyekoli ya Biblia?
6 Ntango ozali kolakisa buku yango na mosala ya kosakola, salelá bililingi, bavɛrsɛ, mpe mituna oyo ezali na nkasa 4, 5, mpe 6. Na ndakisa, okoki kotuna moto motuna oyo, “Epai wapi tokoki koluka batoli ya malamu mpo na kolonga ebele ya mikakatano oyo bato bazali kokutana na yango?” Nsima ya kolanda na likebi eyano ya moto yango, tángelá ye 2 Timote 3:16, 17, mpe limbwelá ye ete Biblia eyebisi ndenge oyo mikakatano ya bato ekosila. Na nsima, lakisá ye makambo oyo ezali na nkasa 4 mpe 5, mpe tuná ye boye: “Na kati ya bampasi oyo balakisi na bililingi oyo, wapi oyo etungisaka yo mingi?” Soki moto alakisi elilingi moko, pesá ye buku asimba mpe tángelá ye vɛrsɛ oyo ezali pembeni ya elilingi yango na kati ya Biblia na yo. Na nsima, tángá na lokasa 6, mpe tuná ye: “Na kati ya mituna motoba oyo ezali awa na nse, okolinga kozwa eyano na motuna nini?” Ntango moto aponi motuna moko, lakisá ye mokapo oyo epesi eyano na motuna yango, tikelá ye buku yango, mpe yokaná na ye mokolo oyo okozonga mpo bósolola likambo yango.
7 Lisolo ya ndenge oyo touti kolobela ekoki koumela miniti soki mitano mpamba. Kasi, mwa miniti yango ekosalisa yo oyeba mitungisi ya moto oyo osololi na ye, otángela ye vɛrsɛ moko mpe olimbola yango, mpe na nsuka, oyokana na ye mpo ozongela ye lisusu. Mwa lisolo mokuse na moto yango ekoki kolendisa mpe kobɔndisa ye na ndenge oyo ayokaka lisusu te banda kala. Na ndenge yango, ata moto oyo azalaka na ntango mingi te akosepela koyamba yo lisusu mpe kolekisa na yo mwa miniti mpo osalisa ye atya lokolo mosusu ‘na nzela oyo ezali komema na bomoi.’ (Matai 7:14) Ntango moto akómi kosepela, okoki kobanda mokemoke kobakisa ntango oyo bokoki kosolola. Okoki kosɛnga ye bófanda mpo bóyekola miniti mwa mingi oyo okosɛnga ye.
Mayele oyo ezali kobota mbuma malamu koleka
8, 9. (a) Ndenge nini okoki kosalisa moyekoli mpo alonga mikakatano mpe komekama oyo akokutana na yango? (b) Epai wapi moto akoki kozwa biloko ya malamu oyo akoki kotonga na yango kondima ya makasi?
8 Ntango moto abandi kotosa makambo oyo Biblia eteyaka, akozanga te kokutana na mikakatano oyo ekoki kopekisa ye akende liboso. Ntoma Paulo alobaki boye: “Baoyo nyonso bazali na mposa ya kozala na bomoi na ezaleli ya kokangama na Nzambe na kati ya boyokani elongo na Klisto Yesu bango mpe bakonyokwama.” (2 Timote 3:12) Paulo alobaki ete mikakatano yango ezali lokola mɔtɔ oyo ezikisaka biloko ya pɛtɛɛ oyo batongi na yango ndako, mpe etikaka biloko ya makasi lokola wolo, palata, mpe mabanga ya ntalo. (1 Bakolinti 3:10-13; 1 Petelo 1:6, 7) Mpo moto oyo ozali koyekola na ye Biblia alona bizaleli oyo asengeli na yango mpo na kolonga komekama oyo akoki kokutana na yango, osengeli kosalisa ye atonga kondima na ye na biloko oyo ezikaka na mɔtɔ te.
9 Mokomi ya nzembo alobaki ete “maloba ya [Yehova]” ezali lokola “palata oyo elangolami na etumbelo esalami na mabelé, ɛɛ, elangolami mbala nsambo.” (Nzembo 12:6) Kutu, Biblia ezali na biloko nyonso ya malamu oyo moto akoki kotonga na yango kondima ya makasi. (Nzembo 19:7-11; Masese 2:1-6) Buku Biblia eteyaka ezali mpe kosalisa yo oyeba kosalela Makomami malamu mpo na kosalisa moyekoli.
10. Ndenge nini okoki kobenda likebi ya moyekoli na Biblia?
10 Ntango ozali koyekola na moto, bendá likebi na ye na bavɛrsɛ oyo ezali na paragrafe mokomoko oyo bozali kotalela. Tunáká moyekoli mituna mpo na kosalisa ye ayeba bavɛrsɛ ya ntina mpe akanisa ndenge oyo ezali kotalela ye. Ebongi te ete yo ozwaka ekateli na esika na ye. Salá ndenge Yesu azalaki kosala. Ntango moto moko oyo ayebaki malamu Mibeko ya Moize atunaki ye motuna, ye azongiselaki moto yango motuna ete: “Nini ekomamá na kati ya Mibeko? Otángaka ndenge nini?” Moto yango alobaki ndenge ekomami na Biblia, mpe Yesu asalisaki ye ayeba ndenge oyo akoki kosalela makambo yango. Yesu apesaki ndakisa moko mpe asalisaki mobali yango amona ndenge oyo akoki kosalela liteya yango. (Luka 10:25-37) Buku Biblia eteyaka ezali na ebele ya bandakisa ya pɛtɛɛ, oyo okoki kosalela mpo na kosalisa moyekoli ayeba ndenge ya kosalela makambo oyo azali koyekola.
11. Baparagrafe boni bokoki koyekola na moto mbala nyonso oyo bokutani?
11 Yesu azalaki kosalela maloba ya pɛtɛɛ mpo na kolobela makambo oyo ekoki kozala mpasi; ndenge moko mpe, buku Biblia eteyaka ekomami na elobeli ya pɛtɛɛ mpe ya polele mpo na kolimbola Liloba ya Nzambe. (Matai 7:28, 29) Landá ndakisa ya Yesu. Limboláká makambo na maloba ya pɛtɛɛ, ya polele, mpe ya solo. Kolekaka nokinoki te. Taleláká mayele ya moyekoli mpe makambo mosusu mpo na koyeba baparagrafe boni bokoki koyekola na mbala moko. Yesu ayebaki esika mayele ya bayekoli na ye esuki mpe azalaki te koteya bango ebele ya makambo oyo bakokoka kosimba yango mbala moko te.—Yoane 16:12.
12. Ndenge nini kosalela apɛndisi?
12 Buku Biblia eteyaka ezali na apɛndisi oyo ezali na mitó ya makambo 14. Yo mosakoli nde osengeli kotalelaka soki moyekoli azali na mposa ya koyeba likambo moko na mozindo mpe kopona soki bokotalela likambo moko na apɛndisi. Na ndakisa, soki moyekoli azali kokanga ntina ya likambo moko malamu te to azali na mituna, mbala mosusu mpo andimaka liteya moko boye, ekoki kosɛnga olakisa ye motó ya likambo moko na apɛndisi mpe oyebisa ye atikala kotánga yango ye moko. Nzokande, mpo na moyekoli mosusu okoki komona malamu bótalela elongo likambo moko oyo elimbolami na apɛndisi. Apɛndisi ezali na mitó ya makambo ya ntina mingi, na ndakisa “‘molimo’ ná ‘elimo’ elimboli mpenza nini?” mpe “‘Babilone Monene’ ezali nini?” Mbala mosusu okoki kosepela kotalela mitó ya makambo yango ná moyekoli. Lokola baparagrafe ya masolo ya apɛndisi ezali na mituna te, esengeli oyeba makambo yango malamu mpo otuna mituna oyo ebongi.
13. Libondeli ezali na ntina nini mpo na kolendisa kondima?
13 Nzembo 127:1 elobi ete: “Soki ezali [Yehova] te oyo akotongaka ndako, basali bakosala wana bobele mpamba.” Na yango, ntango ozali komibongisa mpo na koyekola Biblia na moto, esengeli obondelaka Yehova asalisa yo. Mabondeli oyo okobanda kosala na ebandeli mpe na nsuka ya boyekoli esengeli komonisa moyekoli ete ozali na boyokani malamu na Yehova. Lendisáká moyekoli abondelaka Yehova mpo na kosɛnga ye mayele ya kososola Liloba na Ye mpe makasi ya kosalela toli na ye. (Yakobo 1:5) Soki moyekoli azali kosala bongo, akolendisama mpo ayikela mikakatano mpiko mpe akóma na kondima makasi.
Salisá bayekoli ya Biblia bákóma bateyi
14. Moyekoli ya Biblia asengeli kokola na likambo nini?
14 Mpo bato oyo tozali koyekola na bango Biblia bátosa “makambo nyonso” oyo Yesu atindaki bayekoli na ye, basengeli kokola tii na kokóma bateyi ya Liloba ya Nzambe. (Matai 28:19, 20; Misala 1:6-8) Okoki kosala nini mpo na kosalisa moyekoli akola ndenge wana?
15. Mpo na nini ebongi olendisaka moyekoli ya Biblia ete ayanganaka na makita?
15 Banda kaka bobandi koyekola, bengisá moyekoli na makita ya lisangá. Limbwelá ye ete na makita yango tozwaka formasyo mpo na kokóma bateyi ya Liloba ya Nzambe. Na boumeli ya mwa bapɔsɔ, zwáká mwa miniti na nsuka ya boyekoli mpo na kolimbola mateya oyo tozwaka na makita mpe na mayangani. Lobeláká na esengo matomba oyo ozwaka na makita yango. (Baebele 10:24, 25) Ntango moyekoli abandi koyangana pɔsɔ na pɔsɔ na makita, ezali elembo malamu ete akoki kokóma moteyi ya Liloba ya Nzambe.
16, 17. Wapi mwa mikano oyo moyekoli ya Biblia akoki komityela?
16 Salisá moyekoli ya Biblia amityela mikano oyo akoki kokokisa. Na ndakisa, lendisá ye ayebisaka moninga to ndeko na ye moko makambo oyo azali koyekola. Pesá ye mpe likanisi ya komityela mokano ya kotánga Biblia mobimba. Soki osalisi ye akóma na momeseno ya kotánga Biblia mokolo na mokolo, akozwela yango litomba ata bambula mingi nsima ya kozwa batisimo. Longola yango, okoki mpe kopesa ye likanisi ya komityela mokano ya kokanga na motó ata vɛrsɛ moko ya Biblia oyo epesi eyano na motuna ya ntina na mokapo mokomoko ya buku Biblia eteyaka. Na ndenge yango, akokóma “mosali oyo azali na eloko moko te ya koyokela nsɔni, oyo azali kosembola liloba ya solo malamumalamu.”—2 Timote 2:15.
17 Na esika osɛnga moyekoli aloba makambo oyo ezali na vɛrsɛ to apesa makanisi na yango na mokuse, lendisá ye alimbolaka bavɛrsɛ ya ntina ntango azali kopesa eyano na baoyo bazali kotuna ye ntina ya kondima na ye. Okosalisa ye mpe soki bozali kozwa mwa miniti mpo na komeka ndenge ya kosala yango; na ntango wana, yo okoki kozwa esika ya ndeko na ye to moninga ya mosala oyo azali kotuna ye mituna mpo na bindimeli na ye. Ntango moyekoli azali kopesa eyano, lakisá ye ndenge ya koyanola na “elimo ya boboto mpe na limemya makasi.”—1 Petelo 3:15.
18. Ntango moyekoli ya Biblia akokisi masɛngami mpo na kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te, lisalisi nini lisusu okoki kopesa ye?
18 Nsima ya basanza, moyekoli akoki kokokisa masɛngami mpo abanda kobima na mosala ya kosakola. Monisá polele ete kozala na ndingisa ya kosangana na mosala yango ezali lokumu monene. (2 Bakolinti 4:1, 7) Soki bankulutu bamoni ete moyekoli akokisi masɛngami mpo akóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te, salisá ye abongisaka na mwa maloba mokuse ndenge ya kopesa litatoli mpe na nsima, banda kobima na ye na mosala ya kosakola. Landá kosalisa ye na mitindo ndenge na ndenge ya mosala ya kosakola, lakisá ye ndenge ya komibongisa mpo na kozongela moto oyo asepelaki. Soki yo moko ozali kopesa ye ndakisa ya malamu, ekosalisa ye mingi.—Luka 6:40.
‘Omibikisa ná yo moko ná baoyo bazali koyoka yo’
19, 20. Mokano nini tosengeli komityela mpe mpo na nini?
19 Kosalisa moto akóma na “boyebi ya sikisiki ya solo” ezali mosala monene. (1 Timote 2:4) Atako bongo, makambo mingi te epesaka esengo oyo ekokani na esengo ya kosalisa moto akóma kotosa makambo oyo Biblia ezali kosɛnga. (1 Batesaloniki 2:19, 20) “Kosala elongo na Nzambe” na mosala ya koteya bato na mokili mobimba ezali mpenza lokumu monene!—1 Bakolinti 3:9.
20 Mosika te, Yehova akotinda Yesu Klisto ná baanzelu na ye mpo na kopesa etumbu na baoyo “bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali te kotosa nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu.” (2 Batesaloniki 1:6-8) Bomoi ya bato mingi ezali na likama. Okoki komityela mokano ya koyekola buku Biblia eteyaka mpenza nini? ata na moto moko. Ntango ozali kosala mosala yango, ezali libaku mpo ‘obikisa ná yo moko ná baoyo bazali koyoka yo.’ (1 Timote 4:16) Sikoyo mpenza nde ntango ya kosalisa bato mosusu bátosa oyo Biblia eteyaka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Oyekoli makambo nini?
• Buku Biblia eteyaka ebongisami na mokano nini?
• Ndenge nini okoki kosalela buku Biblia eteyaka mpo na kobanda boyekoli ya Biblia?
• Mayele nini ya koteya ezali kobota mbuma malamu koleka?
• Ndenge nini okoki kosalisa moyekoli akóma moteyi ya Liloba ya Nzambe?
[Elilingi na lokasa 26]
Ozali kosalela buku oyo malamu mpo na kosalisa bato?
[Elilingi na lokasa 27]
Mwa lisolo mokuse ekoki kopesa moto mposa ya koyeba Biblia
[Elilingi na lokasa 29]
Okoki kosala nini mpo na kobenda likebi ya moyekoli na Biblia?
[Elilingi na lokasa 30]
Salisá moyekoli akola