Bato bazali koluka biyano ya malamu
Nasala nini mpo nabatela nzoto na ngai kolɔngɔnɔ?
Nasala nini mpo libota na ngai ezala na esengo?
Nasala nini mpo nabatela mosala na ngai?
OSILÁ komituna moko ya mituna wana? Ozwá biyano oyo ebongi? Mbula na mbula, babuku soki 2 000 ezali konyatama mpo na kopesa toli na makambo wana mpe na makambo mosusu ya ntina mingi. Kaka na Angleterre, batángi bazali kobungisa badolare milio soki 150 na mbula mpo na kosomba babuku oyo epesaka batoli mpo na kosalisa bato básilisa mikakatano oyo bazali kokutana na yango na bomoi. Na États-Unis, babuku oyo bato bakomá mpo na kopesa batoli ezali kobimisa dolare milio soki 600 mbula na mbula. Ya solo, bato oyo bazali koluka toli mpo na kolonga mikakatano bazali mingi.
Mpo na oyo etali batoli ya babuku yango, mokomi moko alobaki boye: “Babuku mingi ya sika ezongelaka kaka makambo oyo esila kokomama.” Kutu, batoli mingi ya babuku yango, ezongelaka kaka bwanya oyo ezali na kati ya buku moko oyo eumeli koleka babuku nyonso ya mokili. Buku yango ezali kokabolama mingi mpenza na mokili mobimba koleka babuku mosusu nyonso. Ebongolami na mobimba to na ndambo na minɔkɔ soki 2 400. Miliare koleka 4 ya buku yango esili konyatama. Buku yango ezali Biblia.
Biblia elobi polele ete: “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini na kati ya boyengebene.” (2 Timote 3:16) Ya solo, Biblia ekomamaki te kaka mpo epesaka batoli. Ntina na yango ya libosoliboso ezali ya koyebisa bato mokano ya Nzambe mpo na bato. Atako bongo, Biblia etondi na batoli oyo ekoki kosalisa biso nyonso tólonga mikakatano oyo tozali kokutana na yango mpe ezali komonisa ete baoyo bakolanda toli na yango bakozwa matomba. (Yisaya 48:17, 18) Soki moto asaleli toli na yango akolonga kaka, ezala moto yango azali ya ekólo nini, mimeseno nini to atángá kelasi nini. Tosɛngi yo otánga lisolo oyo elandi mpo omona yo moko soki makambo oyo Biblia elobi na ntina na kolɔngɔnɔ ya nzoto, libota mpe mosala esalisaka mpenza.