Lisolo ya bomoi
Naponá mosala ya kokómisa bato bayekoli lokola mosala ya bomoi na ngai
Ya Lynette Peters
Bayaki kobimisa biso. Batyaki mobɛti-masasi moko ya solosolo na likoló ya ndako. Basoda balalaki na matiti ná mindoki na bango na mabɔkɔ, pene na kobɛta masasi. Mokolo ya lomingo wana, ntango tozalaki kokima mbangu mpo na kokende kokɔta na hélicoptère oyo ezalaki kozela biso, ngai ná moninga na ngai misionɛrɛ tosalaki nyonso mpo tóbanga makasi te. Mosika te, Hélicoptère ememaki biso mpe nsima ya miniti zomi, tokitaki na masuwa ya basoda oyo etɛlɛmaki pene na libongo.
NA NTƆNGƆ oyo elandaki, toyokaki ete batomboki babwakaki bɔmbi na otɛlɛ epai tomibombaki na butu. Etumba na kati ya bana mboka Sierra Leone, oyo eumelaki ebele ya bambula, ekómaki sikoyo etumba monene. Bapaya nyonso, ná biso mpe, basengelaki kolongwa na ekólo yango. Liboso nayebisa bino ndenge nakómaki na esika ya ndenge wana, bótika nabanda naino na ebandeli.
Nakolaki na Guyane britannique, oyo ekómá Guyana banda 1966. Ntango nazalaki kokola kuna na bambula ya 1950, nazalaki na bomoi ya esengo mpenza. Baboti mingi bazalaki kopesa motuya mingi na kelasi, mpe bazalaki kolinga bana bázwaka bilembo ya malamu mpenza. Nazali kokanisa lisusu ndenge mosali moko ya banki atunaki tata mokolo moko ete: “Mpo na nini ozali kobebisa mbongo ebeleebele mpo na kelasi ya bana?” Tata azongisaki ete: “Bakoki kolonga na bomoi kaka soki batángi malamu.” Na ntango wana, azalaki kokanisa ete kotánga malamu elimboli kotánga na biteyelo ya lokumu. Kasi mosika te, akómaki kotalela makambo ndenge mosusu.
Ntango nazalaki na mbula 11, mama abandaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova. Akendaki na Ndako ya Bokonzi moko ye ná moninga moko ya kartye. Makambo oyo bayokaki na butu wana endimisaki bango nyonso mibale ete bazwi mpenza lingomba ya solo. Na nsima, mama ayebisaki moninga mosusu ya kartye makambo oyo bayokaki. Mosika te, bango nyonso misato bakómaki koyekola Biblia na bamisionɛrɛ mibale: Daphne Harry (oyo akómaki mwasi ya ndeko Baird) mpe Rose Cuffie. Kaka nsima ya mwa basanza, Mama ná baninga na ye mibale bazwaki batisimo. Mbula mitano na nsima, tata alongwaki na Lingomba ya Adventiste mpe azwaki batisimo mpo na kokóma Motatoli ya Yehova.
Ntango tozalaki naino bilenge, ngai ná baleki na ngai mibale ya basi tozalaki kolekisa bangonga ebele ya esengo na ndako ya bamisionɛrɛ, epai Daphne ná Rose bazalaki kofanda. Biso misato tozalaki bana ya liboso na libota ya bana zomi. Daphne ná Rose bazalaki kobɛtela biso masolo ya makambo oyo bazalaki kokutana na yango na mosala ya kosakola. Na esengo nyonso, bamisionɛrɛ yango bazalaki komipesa mpenza na kosalisa basusu na elimo. Ndakisa na bango nde epesaki ngai mposa ya kokóma misionɛrɛ.
Kasi, nini esalisaki ngai namipesa mobimba na mosala ya ntango nyonso atako nazalaki na kati ya libota mpe baninga ya kelasi oyo makanisi na bango ezalaki kaka na kotánga mingi mpe kozwa misala ya malamu? Ezalaki na makambo mingi oyo ekokaki kobenda ngai. Na ndakisa, koyekola mibeko, miziki, kelasi ya monganga to makambo mosusu. Ndakisa ya malamu ya baboti na ngai esalisaki ngai nazwa ekateli ya malamu. Bazalaki mpenza kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na bango, koyekola Biblia na molende mpe komipesa na kosalisa basusu báyeba Yehova.a Bazalaki mpe mbala na mbala kobenga basaleli ya ntango nyonso na ndako na biso. Esengo ya bandeko wana elendisaki ekateli na ngai ya komipesa mobimba na mosala ya kokómisa bato bayekoli.
Nazwaki batisimo ntango nazalaki na mbula 15. Mpe ntango kaka nasilisaki kelasi, nakómaki mobongisi-nzela. Moto ya liboso oyo nayekolaki na ye Biblia kino na batisimo ezali Philomena, oyo azalaki monganga na lopitalo moko. Esengo ya komona ndenge akómaki kolinga Yehova elendisaki lisusu ekateli na ngai ya kokoba na mosala ya ntango nyonso. Mwa moke na nsima, bapesaki ngai mosala moko ya Leta ya malamu mpenza, epai nasengelaki kozala sekrɛtɛrɛ. Naboyaki, mpo nalingaki te kotika mosala ya mobongisi-nzela.
Nazalaki naino kofanda epai na biso, mpe bamisionɛrɛ bazalaki kokoba koya kotala biso. Nazalaki kosepela mpenza koyoka masolo na bango! Nyonso wana elendisaki ekateli na ngai ya kokóma misionɛrɛ, atako nazalaki na elikya mpenza te ete ekoki kosalema. Na ntango wana, bazalaki kotinda bamisionɛrɛ na Guyana, ata tii lelo oyo batindaka kaka. Mokolo moko na 1969, nakamwaki mpe nasepelaki ntango babengaki ngai na Gileadi, eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia, na engumba Brooklyn, na etúká ya New York.
Batindi ngai epai nakanaki te
Na kelasi ya mbala ya 48 ya Gileadi, tozalaki bana-kelasi 54 oyo bautaki na bikólo 21. Bandeko basi 17 kati na biso bazalaki minzemba. Atako eleki lelo mbula 37, nabosanaka te sanza mitano oyo tolekisaki na eteyelo yango. Toyekolaki makambo mingi. Longola mateya ya Biblia, bazalaki mpe kopesa biso makanisi ná batoli oyo ekokaki kosunga biso na mosala ya misionɛrɛ. Na ndakisa, nayekolaki kolanda malako, kozala na bokatikati na oyo etali kolata mpe kobongisa nzoto, mpe koyikela mikakatano mpiko.
Baboti na ngai bazalaki kolinga ata moke te tózangisa makita. Soki na mokolo ya lomingo moto akosi ete azali kobɛla mpo akende na makita te, na mpokwa wana akokende mpe kotala miziki te. Kasi, ntango tozalaki na Eteyelo ya Gileadi, nazalaki koyangana na makita nyonso te. Mokolo ya mitano moko, nayebisaki ndeko Don Adams ná mwasi na ye Dolores, bandeko ya Betele oyo bazalaki kofutela ngai tike mpo na kokende makita, ete nakokende makita te mpo nazali na badevuare ebele ya kosala. Nsima ya kosolola na ngai mwa moke, ndeko Adams alobaki ete: “Yokelá lisosoli na yo.” Nayokaki toli na ye, mpe kobanda na mpokwa wana, nazangisaki lisusu makita ata mokolo moko te. Tii lelo, soki nakutani na mokakatano moko ya makasi te, natikaka eloko moko te ezangisa ngai makita.
Soki sanza mibale na ndambo na nsima, tokómaki kolobaloba mpo na bipai bakotinda biso. Ngai nazalaki ntango nyonso kokanisa ete bakozongisa ngai na Guyana, epai mposa ya basakoli ezalaki makasi. Nakamwaki mpenza ntango bayebisaki ngai ete nakozonga na Guyana te, kasi nakokende na Sierra Leone, na Wɛsti ya Afrika. Natɔndaki Yehova mingi na ndenge akokisaki mposa na ngai ya kozala misionɛrɛ mosika mpenza na mboka na ngai!
Nasengeli koyekola makambo mingi
Nasepelaki mpenza na Sierra Leone: Bangomba na yango ya mike mpe ya minene, mpe mabongo na yango. Kasi, kitoko ya ekólo yango ezali mpenza nde bato na yango, oyo bolingo mpe boboto na bango esalaka ete ata bapaya bámona lokola bazali na mboka na bango moko. Yango esalisaka mpe bamisionɛrɛ mingi bákanisa bamboka na bango te. Bato ya Sierra Leone basepelaka kolobela bonkɔkɔ mpe makambo ya mboka na bango mingi, mpe balingaka mingimingi kosalisa bapaya báyeba Krio, monɔkɔ oyo elobamaka mingi na ekólo yango.
Monɔkɔ ya Krio ezali na masese mingi. Na ndakisa, Makako azali kosala, mokomboso azali kolya, oyo elimboli ete mbala mosusu moloni te nde abukaka mbuma. Yango emonisi mpenza ete bosembo ezalaka lisusu te na mokili.—Yisaya 65:22.
Mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli ezalaki elɛngi mpenza. Ezalaki mwa mpasi okutana na moto oyo aboyi mpenza koyoka nsango ya Biblia. Na boumeli ya bambula, bamisionɛrɛ ná basaleli ya Yehova oyo baumeli mingi basalisi bato ya ndenge nyonso, bilenge mpe mikóló, bazwi to babola, bándima solo.
Erla St. Hill, misionɛrɛ ya liboso oyo nasalaki na ye, azalaki makasi mpenza na mosala. Longola molende na mosala ya kosakola, azalaki mpe na molende mpo na kokokisa mikumba na ye na ndako. Asalisaki ngai namona ntina ya makambo mingi, lokola koyebana na bato ya kartye, kokende kotala Batatoli mpe bayekoli ya Biblia oyo bazali kobɛla, mpe soki esengeli, kopesa lisalisi mpo na kokunda moto. Asalisaki ngai mpe namona ete nsima ya kosakola na teritware moko, ezali na ntina mingi kotɛlɛma ata mwa moke epai ya bandeko oyo bafandi wana mpo na kopesa bango mbote liboso ya kozonga ndako. Lokola nazalaki kosala makambo wana, naumelaki te kozwa bamama, bandeko mpe baninga, mpe teritware oyo batindaki ngai ekómaki mpenza lokola mboka na ngai.—Malako 10:29, 30.
Bamisionɛrɛ oyo nasalaki na bango bakómaki mpe baninga na ngai ya motema. Na kati na bango, nakoki kotánga Adna Byrd, oyo nazalaki kofanda na ye ndako moko, oyo asalaki na Sierra Leone banda na 1978 tii na 1981, mpe Cheryl Ferguson, oyo nafandi na ye esika moko esili koleka mbula 24.
Etumba ya bana mboka ememi mikakatano
Na 1997, soki sanza moko nsima ya kofungwama ya biro ya filiale ya sika na Sierra Leone, etumba ebandaki mpe tosengelaki kotika Sierra Leone, ndenge nalobaki liboso. Mbula motoba liboso, tokamwaki mpenza na kondima ya Batatoli ya Liberia oyo bakimaki etumba na ekólo na bango mpe bayaki na Sierra Leone. Bamosusu bayaki kaka mabɔkɔ mibale makolo mibale. Atako bazalaki na mpasi, bazalaki kobima na mosala ya kosakola mikolo nyonso. Bolingo na bango mpo na Yehova mpe mpo na bato esimbaki mpenza mitema na biso.
Lokola biso moko mpe tokimaki etumba na Guinée, tolandaki ndakisa ya bandeko ya Liberia mpe tokobaki kotalela kaka Yehova mpe kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. Mbula moko na nsima, tozongaki na Sierra Leone, kasi nsima ya sanza nsambo, etumba ebandaki lisusu mpe tokimaki lisusu na Guinée.
Mosika te, toyokaki ete basoda bakómaki kofanda na ndako ya bamisionɛrɛ mpe bapunzaki to babebisaki biloko na biso nyonso. Na esika tóyoka mpasi, totɔndaki Yehova na ndenge tozalaki na bomoi. Totikalaki mabɔkɔ mpamba, kasi bomoi ekobaki.
Na mbala ya mibale oyo tokimaki, ngai ná Cheryl totikalaki na Guinée. Yango esɛngaki tóyekola Lifalanse. Bamisionɛrɛ mosusu baumelaki te kobanda koloba mwa Lifalanse oyo bayekolaki kozanga koyoka nsɔni mpo na mabunga oyo bazalaki kosala. Kasi ngai, lokola nazalaki kosepela te koloba na mabunga, nazalaki koloba Lifalanse kaka soki ndenge mosusu ya kosala ezali te. Ezalaki kopesa ngai mpasi mingi. Mokolo na mokolo, nasengelaki komikundola ntina oyo nayaki na Guinée: Mpo na kosalisa basusu báyeba Yehova.
Mokemoke, lokola nazalaki koyekola, koyoka baoyo bazalaki koloba monɔkɔ yango malamu mpe koyokela bana mike na lisangá, oyo bazalaki kokakatana te kosembola ngai soki nasali libunga, nakómaki koloba mwa malamu. Na nsima, ebongiseli ya Yehova esungaki biso na ndenge oyo tokanaki te. Kobanda na Sɛtɛmbɛ 2001, Mosala na biso ya Bokonzi ekómá kopesa makanisi oyo tokoki kosalela mpo na kolakisa bazulunalo, babuku mpe mikanda mosusu epai ya bato ya mangomba ndenge na ndenge. Sikoyo, nazalaka lisusu mpenza na mokakatano te na mosala ya kosakola, atako nalobaka Lifalanse mpenza ndenge nalobaka monɔkɔ na biso te.
Na ntembe te, kokola na kati ya libota ya bana ebele esalisi ngai nazala na mokakatano te ya kofanda esika moko na bato ebele, tii bato 17 na mbala moko. Na boumeli ya mbula 37 oyo nalekisi na mosala ya misionɛrɛ, nafandi na bamisionɛrɛ koleka 100. Ezali mpenza lipamboli koyeba bato ebele ndenge wana, oyo bazali na bomoto ekeseni, kasi bango nyonso bazali kosala na mokano kaka moko! Oyo nde esengo kozala moninga ya mosala ya Nzambe mpe kopesa mabɔkɔ na kosalisa bato bándima solo ya Biblia!—1 Bakolinti 3:9.
Na bambula nyonso wana, nazangaki makambo mingi oyo esalemaki na libota na ngai, lokola bafɛti ya mabala ya baleki na ngai mosusu. Namonaka mpe bana ya baleki na ngai mpenza te ndenge nalingi. Ngai ná libota na ngai, oyo bazalaki kolendisa ngai natikala kaka na mosala ya misionɛrɛ, tomonisaki mpenza elimo ya komipimela.
Kasi, makambo oyo ezalaki koleka ngai na libota na biso, nazwaki yango mbala na mbala na mosala ya misionɛrɛ. Atako naponaki kotikala monzemba, nazali na bana ebele ya elimo, ezala baoyo nayekolaki na bango Biblia to bato mosusu oyo namesani na bango mingi. Longolá yango, namoni ndenge bana na bango bazali kokola na elimo, kobala mpe kobɔkɔla bana na bango na nzela ya solo. Bamosusu na kati na bango baponi mpe mosala ya kokómisa bato bayekoli lokola mosala ya bomoi na bango lokola ngai.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mama azalaki mobongisi-nzela na boumeli ya mbula koleka 25, mpe ntango tata azwaki pansiɔ, ye mpe akómaki mobongisi-nzela.
[Karte na lokasa 15]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Batindaki ngai na Sierra Leone, na Wɛsti ya Afrika
GUINÉE
SIERRA LEONE
[Elilingi na lokasa 13]
Baleki na ngai ya basi mibale, oyo nazalaki kolekisa na bango bangonga ebele ya esengo epai ya bamisionɛrɛ na bambula ya 1950
[Elilingi na lokasa 14]
Ngai ná baninga na ngai ya kelasi ya mbala ya 48 ya Gileadi
[Elilingi na lokasa 16]
Molulu ya kofungola biro ya filiale na Sierra Leone