Ozali komikundola?
Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Na bongo, talá soki okoki kopesa biyano na mituna milandi:
• Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya mobali oyo ayambaki mopaya? (Luka 11:5-10)
Ndakisa yango emonisi ezaleli oyo tosengeli kozala na yango ntango tozali kobondela. Tosengeli kobondela na etingya mpe kolɛmba te, mingimingi ntango tozali kobondela mpo na kosɛnga elimo santu ya Nzambe. (Luka 11:11-13)—15/12, nkasa 20-22.
• Ndakisa ya zuzi mpe mwasi oyo akufelá mobali ezali na liteya nini mpo na biso? (Luka 18:1-8)
Ndakisa yango ezali komonisa ntina ya kobondela. Na bokeseni na zuzi wana, Yehova azali sembo mpe alingaka kosalisa biso. Lisusu, tosengeli kozala na kondima lokola ya mwasi wana oyo akufelá mobali.—15/12, nkasa 26-28.
• Mpo na nini ntoma Paulo ayebisaki baklisto ya Kolinti ete ‘báfungwama’? (2 Bakolinti 6:11-13)
Emonani ete bandeko mosusu na Kolinti bazalaki kopesa bandeko na bango baklisto motuya te, bafungwamaki te na bolingo na bango. Tosengeli kosala milende mpo na kokolisa bolingo ya solosolo mpo na baninga na biso baklisto, ata mpe kosala milende mpo na koluka baninga ya sika kati na bango.—1/1, nkasa 9-11.
• Kotyama elembo oyo elobelami na Emoniseli 7:3 elimboli nini?
Ntango Nzambe apakoli baklisto na elimo santu, batyamaka elembo mpo na mbala ya liboso. Kasi, Emoniseli 7:3 ezali kolobela kotyama elembo ya nsuka, yango emonisaka ete bato oyo baponamaki mpe batyamaki elembo batikali sembo tii na nsuka.—1/1, nkasa 30-31.
• Liteya nini baboti bakoki kozwa na lisolo ya Samwele?
Ya liboso, baboti basengeli koteya bana na bango Liloba ya Nzambe ndenge baboti ya Samwele bateyaki ye. Lisusu, basengeli kolendisa bana na bango bámityela mokano ya komipesa mobimba na mosala ya Yehova.—15/1, lokasa 16.
• Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na esengo ya kozela Yehova?
Tozali ‘kozela . . . mokolo ya Yehova,’ tozali kozela na elikya mpenza kosikolama, ntango Yehova akolongola bato nyonso oyo batyolaka Nzambe. (2 Petelo 3:7, 12) Yehova azali na mposa makasi ya kosilisa mabe nyonso, kasi azali kozela mpo abikisa baklisto na ndenge oyo ekokumisa nkombo na ye. Tosengeli kotya motema ete Yehova ayebi ntango malamu ya kosala, mpe liboso ete ntango yango ekoka, tosengeli kosepela ntango nyonso kosanzola ye. (Nzembo 71:14, 15)—1/3, nkasa 17-18.
• Noa akɔtisaki na masuwa banyama ya pɛto nsambonsambo to zomi na minei?
Kati na nyama nyonso ya pɛto, Noa asengelaki “kozwa nsambonsambo.” (Genese 7:1, 2, NW) Na Liebele, maloba oyo basaleli awa ekomamaki boye: “nsambo nsambo.” Yango elingi koloba te ete banyama yango ya pɛto ezalaki mibali nsambo ná basi na yango nsambo ndenge Babiblia mosusu elobi. Emonani ete na lolenge nyonso ya nyama ya pɛto, Noa azwaki nyama nsambo, alongolaki nyama misato ya mibali mpe misato ya basi mpe nyama moko oyo etikalaki akokaki kosalela yango mpo na mbeka. (Genese 8:20)—15/3, lokasa 31.
• Mpo na nini baklisto basengeli “kotala malamumalamu” ndenge kondima ya bankulutu, elingi koloba baoyo bazali kokamba bango, ezali kosuka?
Ntoma Paulo alendisi biso ‘tótala malamumalamu,’ motindo nini etamboli ya sembo ya bankulutu ezali kosuka mpe tómekola kondima na bango. (Baebele 13:7) Liloba ya Nzambe esalisaka biso na komekola kondima na bango. Lisusu, tondimaka mpenza ete bankulutu bamibanzabanzaka mpo matomba ya Bokonzi ekende liboso mpe biso tózala malamu na elimo.—1/4, lokasa 28.