Mituna ya batángi
Motindo mokomoko ya banyama ya pɛto oyo Noa akɔtisaki na masuwa ezalaki nsambo to zomi na minei?
Ntango Noa asilisaki kotonga masuwa, Yehova ayebisaki ye boye: “Kɔtá na masuwa yo ná libota na yo, mpamba te yo nde moto namoni ozali moyengebene liboso na ngai kati na bato ya libota oyo. Na nyama nyonso ya pɛto, osengeli kozwa nsambonsambo, mobali ná mwasi na ye; mpe na nyama nyonso oyo ezali pɛto te mibale kaka, mobali ná mwasi na ye.” (Genese 7:1, 2, NW) Babiblia mosusu ya Lingala elobi ete banyama ya pɛto ezalaki “mibali nsambo ná basi na yango nsambo.”
Na Liebele maloba oyo basaleli awa ekomamaki boye: “nsambo nsambo.” (Genese 7:2) Nzokande, na Liebele, soki motuya moko ezongelami mbala mibale elimbolaka kaka te ete esengeli kobakisa motuya ya liboso na oyo ya mibale. Na ndakisa, 2 Samwele 21:20 (NW) elobeli “mobali moko molai mpenza” oyo azalaki na “misapi motoba na lobɔkɔ na ye mokomoko mpe misapi motoba na lokolo na ye mokomoko.” Na Liebele, bazongeli motuya “motoba” mbala mibale. Kasi, yango elingi koloba te ete engambe yango azalaki na misapi zomi na mibale na lobɔkɔ mokomoko mpe misapi zomi na mibale na lokolo mokomoko. Bazongeli motuya yango mpo na komonisa motángo boni ya misapi ezali na lobɔkɔ mokomoko mpe na lokolo mokomoko.
Gramɛrɛ ya Liebele elobi nini na likambo ya kozongela mituya? Na buku na ye (Introductory Hebrew Method and Manual), William Harper alimboli Genese 7:2, 9 boye: “Mbala mingi, bazongelaka maloba mpo na komonisa motángo oyo ezali na liboke mokomoko.” Buku mosusu (Hebrew Grammar [ebimeli ya mibale na Lingelesi]) ya Gesenius, elobi boye: ‘Bazongelaka motuya mpo na komonisa motángo oyo ezali na eteni mokomoko.’ Buku yango epesi ndakisa ya Genese 7:9, 15 oyo ezongeli motuya “mibale” mpe 2 Samwele 21:20 oyo ezongeli motuya “motoba.”
Na yango, elobeli “nsambo nsambo” oyo esalelami na Genese 7:2 elimboli te zomi na minei; ndenge moko mpe elobeli “mibale” oyo esalelami na Genese 7:9, 15 elimboli minei te. Bazongeli mituya na bavɛrsɛ yango kaka mpo na komonisa motángo oyo ezali na eteni mokomoko; yango elimboli te ete esengeli kobakisa motuya ya liboso na oyo ya mibale. Na bongo, mitindo nyonso ya nyama ya pɛto oyo Noa akɔtisaki na masuwa ezalaki “nsambonsambo” mpe mitindo nyonso ya nyama oyo ezalaki pɛto te ezalaki “mibale kaka.”
Kasi, maloba “mobali ná mwasi na ye” oyo elandi na nsima ya “nsambonsambo” na Genese 7:2 elimboli nini? Maloba yango etindaka bato mingi bákanisa ete Nzambe atindaki Noa akɔtisa banyama ya pɛto ya mibali nsambo ná basi na yango nsambo. Nzokande, banyama yango ebatelamaki kaka mpo na kobotana te. Genese 8:20 elobi ete ntango abimaki na masuwa, “Noa atongaki etumbelo mpo na [Yehova], mpe akamataki nyama moko na mitindo nyonso [ya] pɛto, mpe ndɛkɛ nyonso [ya] pɛto mpe akabaki mbeka na etumbelo.” Kati na nyama nsambo ya pɛto oyo Noa azwaki akokaki kolongola nyama moko mpo na kopesa mbeka; mpe kotika nyama misato ya mibali mpe misato ya basi mpo ebotana na mokili.