Atako azali ebɔsɔnɔ azali na mposa ya kosala
LEONARDO azali ebɔsɔnɔ; soki omoni ye mpo na mbala ya liboso okondima te ete akoki kosala mosala ya kotonga. Akataná mabɔkɔ nyonso mibale. Atako bongo, ndenge tokoki komona yango na elilingi, Leonardo asanganaki na mosala ya kotonga oyo esalemaki na engumba Acajutla, na ekólo Salvador.
Mpo na kosangana na mosala yango, babongiselaki Leonardo biloko oyo akoki kosala na yango. Na nsuka ya nzete ya pau na ye batyaki ebende moko oyo ezali na esika oyo azalaki kokɔtisa lobɔkɔ mpo na kotoka mabelé mpe kotya yango na pusupusu. Na nsuka ya bisimbeli ya pusupusu babakisaki mwa bibende oyo ezali na bisika oyo azalaki kokɔtisa mabɔkɔ mpo na kopusa yango. Nini etindaki ye asangana na mosala ya kotonga?
Leonardo azalaki na mposa ya kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga Ndako ya Bokonzi, to esika oyo Batatoli ya Yehova basanganaka mpo na losambo. Azalaki na bantina mingi oyo ekokaki kopekisa ye asangana na mosala yango. Azalaki kosala mosala oyo ezalaki kozwa ye mokolo mobimba, azali ebɔsɔnɔ, mpe azali mosaleli na misala na lisangá na bango. Atako bongo, azalaki na mposa ya kosalela Nzambe ata mpe na mosala wana ya kotonga.
Yo mpe ozalaka na elimo ya ndenge wana? Leonardo atikaki te ete mokakatano na ye ya nzoto epekisa ye; kutu asalelaki mayele mpo na kobongisa biloko na ye ya mosala mpo apesa mabɔkɔ na mosala oyo ezalaki mpasi mpo moto lokola ye asala yango. Azalaki kosalela Nzambe “na makanisi na ye nyonso.” (Matai 22:37) Na mokili mobimba, bandeko nyonso oyo basanganaka na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi, ezala baoyo bazali na mikakatano na nzoto to te, bazalaka na elimo ya komipesa. Moto nyonso akoki kosangana na makita oyo esalemaka na Bandako ya Bokonzi, tólɛndisi yo mpe oya.