Ndenge ya komesana
“Bana na ye babali mpe bana na ye basi balongwaki mpo na kobɔndisa ye [Yakobo]. Nde ye aboyaki kobɔndama mpe alobaki ete, Te, nakokita na esika ya bakufi epai ya mwana na ngai bobele na kolela. Bongo tata na ye alelaki ye.”—GENESE 37:35.
YAKOBO ayokaki mawa makasi ntango bayebisaki ye ete mwana na ye akufi. Alobaki ete mawa na ye ekosila te tii mokolo akokufa. Lokola Yakobo, yo mpe okoki kokanisa ete mpasi makasi ya kokufela ndeko to moninga ekosila te. Kozala na mawa ndenge wana emonisaka kozanga kondima? Te!
Biblia emonisi ete Yakobo azalaki na kondima makasi. Biblia ekumisi kondima ya Yakobo, ndenge ekumisi kondima ya nkɔkɔ na ye Abalayama mpe ya tata na ye Yisaka. (Baebele 11:8, 9, 13) Kutu, na libaku moko Yakobo abundaki na anzelu butu mobimba mpo azwa lipamboli ya Nzambe! (Genese 32:24-30) Tomoni ete Yakobo azalaki mpenza na boyokani makasi na Nzambe. Boye, liteya nini tokoki kozwa na mawa ya Yakobo? Koyoka mawa makasi ntango tokufeli ndeko to moninga moko, emonisaka te ete kondima na biso ezali makasi te. Koyoka mawa ntango tokufeli ndeko to moninga ezali mabe te mpe ezali likambo ya kokamwa te.
Kozala na mawa elimboli nini?
Mawa ekoki komonana na ndenge mingi; kasi epai ya bato mingi, ezalaka nde mpasi makasi na motema. Tótalela ndakisa ya Leonardo, oyo azalaki na mbula 14 ntango tata na ye akufaki liwa ya mbalakaka na maladi ya motema mpe ya mpema. Leonardo abosanaka te mokolo oyo mama-leki na ye ayebisaki ye nsango yango. Na ebandeli, aboyaki kondima. Amonaki ebembe ya tata na ye, kasi azalaki komona lokola nde azali kolɔta. Sanza motoba elekaki kasi Leonardo azalaki kolela te. Mbala mingi azalaki kofanda mpe kozela tata na ye auta mosala. Mbula mobimba elekaki liboso andima mpenza ete tata na ye akufaki. Na ntango yango, amiyokaki mwana mawa mpenza. Makambo mosusu, na ndakisa kokuta moto te na ndako, ezalaki kozongisa na makanisi na ye ete tata na ye azali lisusu te. Na bantango yango, mbala mingi Leonardo azalaki kolɛmba nzoto mpe kolela. Azalaki koyoka mposa makasi ya komona tata na ye!
Ndenge lisolo ya Leonardo emonisi yango, moto oyo akufeli ndeko to moninga akoki kozala na mawa makasi. Likambo ya malamu ezali ete akoki komesana. Kasi, ekoki kozwa mwa ntango. Ntango moto azoki mpota monene, ezwaka mwa ntango mpo esila; ezali mpe bongo mpo na mawa ya kokufela. Ekoki koleka basanza, mwa bambula, to mpe bambula mingi mpo na komesana. Kasi mpasi makasi oyo moto ayokaka na ebandeli ekitaka mokemoke, mpe na nsima ayokaka lisusu esengo ya bomoi.
Liboso na yango, komonisa mawa ezali na kati ya makambo oyo esalisaka moto amesana mokemoke. Ntango tokufeli moto, toyokaka lokola nde eloko moko ezali kozanga. Esɛngaka tómesana na bomoi kozanga moto yango. Komonisa mawa ekoki kosalisa biso. Kasi, biso nyonso tomonisaka mawa ndenge moko te. Nzokande, tosengeli te kobosana likambo oyo: Koboya komonisa mawa ezali mabe mpo na nzoto, makanisi mpe mayoki na biso. Na yango, ndenge nini tokoki komonisa mawa na lolenge ya malamu? Biblia ezali na batoli oyo ekoki kosalisa biso.a
Makambo oyo ekoki kosalisa
Bato mingi oyo bakufelaki bandeko bamonaki ete koloba ekoki kosalisa mingi. Na ndakisa, talá maloba ya Yobo, moto oyo akufelaki bana na ye nyonso zomi mpe akutanaki na mikakatano mosusu. Alobaki boye: “Molimo na ngai elɛmbi na bomoi na ngai, nakobimisa koimaima na ngai polele; nakoloba kati ya bololo ya molimo na ngai.” (Yobo 1:2, 18, 19; 10:1) Tomoni ete Yobo alingaki ‘kobimisa’ koimaima na ye. Na ndenge nini? Alobaki ete: “Nakoloba.”
Paulo, oyo akufelaki mama, alobi boye: “Kobɛta masolo ya mama ezali moko na makambo oyo esalisaki ngai.” Na yango, koloba na moninga moko ya motema ndenge oyo ozali koyoka ekoki kosalisa yo. (Masese 17:17) Nsima ya liwa ya mama na ye, Yone asɛngaki bandeko ya lisangá báyaka kotala ye mingi. Alobi boye: “Koloba esalisaki ngai mpo mpasi oyo nazalaki koyoka ekita.” Yo mpe okoki komona ete koloba mpe kosolola na moto oyo ayebi koyoka ekoki kosalisa yo mingi.
Kokoma mpe ekoki kosalisa. Bato mosusu oyo bazalaka na mokakatano ya koloba ndenge oyo bazali koyoka bamonaka malamu kokoma. Nsima ya liwa ya Saulo ná Yonatana, Davidi akomaki loyembo moko kati na yango amonisaki mawa na ye. Loyembo yango oyo esimbaka mpenza motema ezali lelo oyo na kati ya Biblia, na mokanda ya mibale ya Samwele.—2 Samwele 1:17–27.
Kolela mpe ekoki kosalisa. Biblia elobi boye: “Ntango ezali mpo na eloko na eloko mpe . . . ntango ya kolela.” (Mosakoli 3:1, 4) Liwa ya moto oyo tolingaka ezalaka mpenza “ntango ya kolela.” Tosengeli koyoka nsɔni te kobimisa mpisoli. Biblia elobeli mibali mpe basi mingi ya sembo oyo balelaki mpo na komonisa mawa na bango. (Genese 23:2; 2 Samwele 1:11, 12) Yesu Klisto “alelaki” ntango akómaki na lilita ya Lazalo, moninga na ye oyo autaki kokufa.—Yoane 11:33, 35.
Kobosana mawa nsima ya kokufela esɛngaka motema molai, mpamba te okoki komona ete makambo ezali kobongwana nokinoki. Kobosana te ete osengeli koyoka nsɔni te mpo na kolela. Bato mingi ya sembo bamonaki ete kolela mpo na komonisa mawa esalisaka mpo na komesana nsima ya kokufela moto oyo balingaki.
Pusaná penepene na Nzambe
Biblia elobi na biso boye: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:8) Libondeli ezali moko na makambo oyo ekoki kosalisa biso tópusana penepene na Nzambe. Libondeli ezali na nguya mingi! Biblia ebɔndisi biso na maloba oyo: “[Yehova] azali penepene na bango bazali na mitema mitutami; akobikisa bango bazali na milimo minyatami.” (Nzembo 34:18) Elobi lisusu boye: “Kitisá mokumba na yo epai ya [Yehova] mpe ye akokumba yo.” (Nzembo 55:22) Kanisá maloba yango malamu. Ndenge touti komona yango, bato mingi bamonaki ete koloba na moninga moko ya motema esalisaki bango mingi. Omoni te ete lokola Nzambe alaki kobɔndisa biso, koyebisa ye ndenge oyo tozali komiyoka ekoki kosalisa biso mingi koleka?—2 Batesaloniki 2:16, 17.
Paulo, oyo tolobelaki liboso, alobaki boye: “Soki namoni ete nazali kokoka lisusu kokanga motema te, nazalaki kotya mabɔlɔngɔ na nse mpo na kobondela Nzambe. Nazalaki kosɛnga ye asalisa ngai.” Paulo amonaka ete mabondeli esalisaki ye mpenza. Soki ozali kotingama na mabondeli, yo mpe okoki komona ete “Nzambe ya kobɔndisa nyonso” akopesa yo makasi ya koyika mpiko.—2 Bakolinti 1:3, 4; Baloma 12:12.
Elikya ya lisekwa
Yesu alobaki ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto oyo azali komonisa kondima na kati na ngai, ata soki akufi, akozonga na bomoi.” (Yoane 11:25) Biblia elobi ete bato oyo bakufá bakozonga na bomoi.b Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, amonisaki ete azali na nguya ya kosekwisa bakufi. Mokolo moko asekwisaki elenge mwasi moko ya mbula 12. Baboti ya elenge yango bayokaki ndenge nini? “Bazalaki bango lisusu te, bazalaki na esengo makasi.” (Malako 5:42) Ntango Bokonzi na ye ekoyangela mabelé mobimba, Mokonzi Yesu Klisto akosekwisa ebele ya bato mpo báfanda awa na mabelé, na mokili oyo ekozala na kimya mpe na boyengebene. (Misala 24:15; 2 Petelo 3:13) Kanisá esengo monene oyo ekozala ntango bakufi bakozonga na bomoi mpe bakokutana lisusu na bandeko mpe baninga na bango!
Claudete, oyo akufelaki mwana na likama ya mpɛpɔ, abambá fɔtɔ ya mwana na ye Renato na porte ya frigo. Mbala na mbala atalaka fɔtɔ yango mpe alobaka na nse ya motema, ‘Tokokutana na lisekwa.’ Leonardo akanisaka ndenge tata na ye akozonga na bomoi na mokili ya sika. Ya solo, elikya ya lisekwa ebɔndisaka bango mpenza; elikya yango ebɔndisaka mpe ebele ya bato mosusu oyo bakufelá bato oyo balingaki mingi. Ekoki mpe kobɔndisa yo!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba ndenge ya kosalisa bana nsima ya liwa ya moto moko oyo balingaki mingi, talá lisolo “Ndenge ya kosalisa mwana ntango bokufeli ndeko,” na nkasa 18 tii 20.
b Mpo na koyeba makambo mingi na oyo etali elikya ya lisekwa, talá buku Biblia eteyaka mpenza nini?, mokapo 7, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda/Elilingi na lokasa 7]
“Nzambe ya kobɔndisama nyonso”
“Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Klisto apambolama, Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso.”—2 Bakolinti 1:3.
Maloba ya vɛrsɛ yango ezali komonisa ete Nzambe akoki kosalisa basaleli na ye ya sembo báyika mpiko ata liboso ya mokakatano nini. Yehova akoki kobɔndisa biso na nzela ya moninga moko to ndeko moko ya elimo.
Leonardo, oyo akufelaki tata, abosanaka te likambo moko oyo epesaki ye makasi mpe ebɔndisaki ye. Mokolo moko, ntango azongaki na ndako mpe akanisaki lisusu ete azali kaka ye moko, abandaki kolela makasi. Abimaki mpe akendaki na parkɛ moko, afandaki na kiti, mpe akobaki kolela. Ntango azalaki kolela, abondelaki Nzambe asalisa ye. Mbala moko, motuka moko etɛlɛmaki pembeni mpe Leonardo amonaki ete sofɛlɛ ezalaki ndeko moko moklisto. Ndeko yango azalaki kokende kotika biloko ya kotɛka mpe abungaki nzela. Leonardo abɔndisamaki ndenge akutanaki na ndeko yango.
Mobali moko oyo akufelá mwasi azalaki komiyoka ye moko mpe azalaki kotungisama mingi. Azalaki kokoka te kotika kolela mpamba te azalaki na elikya te. Abondelaki Nzambe asalisa ye. Azalaki naino kobondela ntango telefone elelaki. Nkɔkɔ na ye ya mwasi nde abengaki. Alobi boye: “Mwa lisolo oyo tosololaki na ye epesaki ngai makasi. Namonaki mpenza ete kobenga oyo abengaki ngai na telefone ezalaki eyano na libondeli na ngai.”
[Etanda na lokasa 9]
Tóbɔndisaka basusu
“[Nzambe] abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso, mpo biso mpe tózala na likoki ya kobɔndisa baoyo bazali na kati ya ndenge nyonso ya bolɔzi na nzela ya kobɔndisama oyo biso moko tobɔndisami na yango epai ya Nzambe.”—2 Bakolinti 1:4.
Baklisto mingi basilá komona bosolo ya maloba yango. Lokola babɔndisamaki nsima ya kokufela moto moko oyo balingaki, bamonaka ete bakoki kolendisa mpe kobɔndisa basusu.
Tózwa ndakisa ya Claudete, oyo akendaka mbala na mbala kotala bato mpo na koteya bango Biblia. Liboso akufela mwana, azalaki kokende kotala mwasi moko oyo mwana na ye akufaki na maladi ya leucémie. Mwasi yango azalaki kosepela mingi na masolo na bango, kasi azalaki komona ete ata mokolo moko te Claudete akoyeba mpenza mpasi oyo ayokaka. Kasi, ntango Claudete akufelaki mwana, mwasi yango akendaki kotala Claudete mpe ayebisaki ye ete alingaki koyeba soki azalaki kaka na kondima nsima ya kokufela mwana. Kondima makasi ya Claudete ekamwisaki mwasi yango mpe bakómaki koyekola Biblia pɔsɔ na pɔsɔ mpe sikoyo, azali kozwa libɔndisi mingi na Liloba ya Nzambe.
Nsima ya liwa ya tata na ye, Leonardo azwaki mokano ya koyekola bajɛstɛ mpo na kosolola na bababa mpo abɔndisaka bango na nsango ya Biblia. Amoni ete milende na ye mpo na kosalisa bababa esalisi ye mingi. Alobi boye: “Moko na makambo oyo esalisi ngai mingi namesana ezali mposa na ngai ya kosalisa bababa báyeba Nzambe. Namipesi mingi mpo na kosalisa bango. Mawa na ngai ebongwanaki esengo ntango moto ya liboso nayekolaki na ye Biblia azwaki batisimo! Kutu, mpo na mbala ya liboso banda tata akufá, nayokaki esengo makasi.”—Misala 20:35.
[Elilingi na lokasa 5]
Koloba ndenge oyo ozali komiyoka ekoki kosalisa yo
[Elilingi na lokasa 6]
Kotánga makambo etali elikya ya lisekwa ekoki kobɔndisa
[Elilingi na lokasa 6]
Kokoma ekoki kosalisa yo omonisa mawa na yo
[Elilingi na lokasa 8]
Yesu alakaki ete akosekwisa bato oyo bakomonisa kondima epai na ye