Mituna ya batángi
Ntango nini Nzambe akotika kopona bato oyo bakokende na likoló?
Biblia epesi eyano ya sikisiki te na motuna yango. Toyebi ete bayekoli ya Yesu babandaki kotyama elembo mpo na elikya ya likoló na mobu 33 ya ntango na biso (T.B.). (Misala 2:1-4) Toyebi mpe ete nsima ya liwa ya bantoma, “blé” ekómaki ‘kokola esika moko’ na “matiti mabe.” Blé elimboli baklisto bapakolami ya solo mpe matiti mabe elimboli baklisto ya lokuta. (Matai 13:24-30) Kasi, na nsuka ya bambula ya 1800, baklisto bapakolami bakómaki lisusu komipesa mingi. Na 1919, mosala ya kobuka “mbuma ya mabelé” ebandaki. Koyanganisama ya bapakolami ya nsuka ezalaki mpe na kati ya mosala yango.—Emoniseli 14:15, 16.
Kobanda na nsuka ya bambula ya 1800 tii na 931, ntina mpenza ya mosala ya kosakola ezalaki ya koyanganisa basangani ya nzoto ya Klisto oyo batikalaki. Na 1931, bayekoli ya Biblia bazwaki nkombo ya Batatoli ya Yehova oyo euti na Biblia. Na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 1933 (na Lingelesi) likanisi epesamaki ete nkombo wana ya lokumu ezali “denali” oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye oyo ezali na Matai 20:1-16. Bazalaki kokanisa ete ngonga 12 oyo elobelami na ndakisa yango ezali mbula 12 oyo ebandaki na 1919 tii na 1931. Bambula mingi na nsima, eyebanaki ete Nzambe atikaki kopona bato oyo bakokende na likoló na 1931, mpe ete baoyo baponamaki na 1930 mpe 1931 mpo na kozwa libula elongo na Klisto bazalaki “bato ya nsuka.” (Matai 20:6-8) Nzokande na 1966, ndimbola mosusu ya ndakisa yango epesamaki mpe emonanaki polele ete ndakisa yango ezalaki kolobela nsuka ya koponama ya bapakolami te.
Na 1935, eyebanaki ete “ebele ya bato” oyo Emoniseli 7:9-15 elobeli ezali “bampate mosusu,” elingi koloba baklisto oyo bazali na elikya ya kozwa bomoi awa na mabelé, oyo basengelaki komonana na “mikolo ya nsuka” mpe kobika na Armagedona. (Yoane 10:16; 2 Timote 3:1; Emoniseli 21:3, 4) Nsima ya mbula yango, mosala ya kokómisa bato bayekoli ekómaki kosalema libosoliboso mpo na koyanganisa ebele ya bato. Na yango, nsima ya 1966, bakómaki kokanisa ete koponama ya baklisto oyo bakokende na likoló esukaki na 1935. Likanisi yango emonanaki mpenza ete ezali solo, mpamba te pene na bato nyonso oyo bazalaki kozwa batisimo nsima ya 1935 bazalaki na elikya ya kozwa bomoi ya seko awa na mabelé. Na yango, soki moto moko amonisi ete azali na elikya ya kokende na likoló, bazalaki koloba ete aponami mpo na kozwa esika ya mopakolami moko oyo apɛngwi.
Na ntembe te, soki mopakolami moko atiki solo mpe aboyi kobongola motema, Yehova abengaka moto mosusu na esika na ye. (Baloma 11:17-22) Kasi, bapakolami ya solosolo oyo bazali kotika solo bazali mingi te. Longola yango, nsima ya bambula, baklisto mosusu oyo babatisamaki nsima ya 1935 bazwaki litatoli ya elimo santu ete baponami mpo na kokende na likoló. (Baloma 8:16, 17) Na yango, emonani ete tokoki mpenza te koloba ete Nzambe atikaki kopona baklisto oyo bakokende na likoló na mbula boye to boye.
Ndenge nini tosengeli kotalela moto oyo ayoki na motema na ye ete akómi mopakolami mpe abandi kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli? Tosengeli kokanisela ye mabe te. Ezali likambo na ye ná Yehova. (Baloma 14:12) Kasi, baklisto bapakolami ya solosolo balukaka te bato bamona bango bato ya ndenge mosusu. Bapakolami bakanisaka te ete koponama na bango epesi bango “boyebi” koleka ata bato mosusu na kati ya ebele ya bato oyo bakɔmeli na elimo. Bakanisaka te ete bazali na elimo santu koleka baninga na bango bampate mosusu. Balukaka te ete basusu bákóma kosalela bango; to bakanisaka mpe te ete lokola bango balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo, baleki bankulutu. Na komikitisa nyonso, bayebaka ete baklisto bapakolami mosusu ya ekeke ya liboso bakokisaki masɛngami te mpo na kozala bankulutu to basaleli na misala. (1 Timote 3:1-10, 12, 13; Tito 1:5-9; Yakobo 3:1) Baklisto bapakolami mosusu kutu bazalaki makasi te na elimo. (1 Batesaloniki 5:14) Lisusu, atako bazalaki bapakolami, bandeko basi bazalaki koteya te na lisangá.—1 Timote 2:11, 12.
Baklisto bapakolami ná baninga na bango bampate mosusu bazali kosala makasi mpo na kotikala makasi na elimo; bazali kolona mbuma ya elimo mpe bazali kosala nyonso mpo lisangá ezala na kimya. Na litambwisi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, baklisto nyonso, ezala bapakolami to bampate mosusu bazali komipesa mpenza na mosala ya kosakola nsango malamu mpe kokómisa bato bayekoli. Baklisto bapakolami bazali kosepela kosala yango ntango nyonso oyo Yehova akolinga básalela ye awa na mabelé.