Nkolo ya mabe ayebani!
NA EKEKE ya liboso, Bayuda mingi bazalaki kozela koya ya Masiya oyo alakamaki. (Yoane 6:14) Ntango Yesu ayaki awa na mabelé, abɔndisaki bato mpe alimbolaki Liloba ya Nzambe malamumalamu. Abikisaki bato ya maladi, aleisaki baoyo bazalaki na nzala, apamelaki mipɛpɛ mpe asekwisaki kutu bakufi. (Matai 8:26; 14:14-21; 15:30, 31; Malako 5:38-43) Azalaki mpe koteya Liloba ya Yehova mpe apesaki elaka ya bomoi ya seko. (Yoane 3:34) Makambo oyo Yesu alobaki mpe asalaki emonisaki mpenza polele ete ye azalaki Masiya oyo asengelaki kosikola bato na lisumu mpe na mabe na yango nyonso.
Soki totali malamu, bakonzi ya mangomba ya Bayuda nde basengelaki kozala bato ya liboso ya koyamba Yesu, koyoka ye mpe kondima litambwisi na ye. Nzokande, basalaki bongo te. Bayinaki nde ye, banyokolaki ye mpe basalaki myango mpo na koboma ye!—Malako 14:1; 15:1-3, 10-15.
Ebongaki mpenza Yesu akweisa bato wana ya mabe. (Matai 23:33-35) Nzokande, ayebaki ete makanisi mabe ya bato yango mpe misala oyo bazalaki kosala ezalaki na mobandisi na yango. Alobaki na bango ete: “Bino bouti na tata na bino Zabolo, mpe bolingi kokokisa bamposa ya tata na bino. Ye azalaki mobomi-bato ntango abandaki, mpe atɛlɛmaki makasi te na kati ya solo, mpo solo ezali na kati na ye te. Ntango alobaka lokuta, alobaka engebene makanisi na ye moko, mpamba te azali moto ya lokuta mpe tata ya lokuta.” (Yoane 8:44) Atako Yesu ayebaki ete bato bakoki kosala makambo ya mabe, amonisaki polele ete mobandisi ya mabe ezali bongo Satana Zabolo.
Ntango alobaki ete Satana “atɛlɛmaki makasi te na kati ya solo,” Yesu amonisaki ete ekelamu wana ya elimo azalaki liboso mosaleli ya sembo ya Nzambe, kasi na nsima alongwaki na nzela wana ya sembo. Mpo na nini Satana atombokelaki Yehova? Mpamba te akómaki koluka lokumu mpe yango etindaki ye akóma kolula losambo oyo ebongi kaka na Nzambe.a—Matai 4:8, 9.
Botomboki ya Satana emonanaki na elanga ya Edene ntango akosaki Eva alya mbuma oyo epekisamaki. Lokola ye nde abandisaki lokuta mpe akoselaki Yehova makambo, Satana amikómisaki ye moko “tata ya lokuta.” Lisusu, ntango atindaki Adama ná Eva bátombokela Yehova, asalaki ete lisumu ekóma koyangela bango mpe nsukansuka yango ememelaki bango mpe bana na bango liwa. Na yango, Satana amikómisaki mpe “mobomi-bato” oyo aleki babomi nyonso banda mokili ebanda!—Genese 3:1-6; Baloma 5:12.
Mabe ya Satana ekómaki tii na likoló mpe baanzelu mosusu balandaki ye na botomboki na ye. (2 Petelo 2:4) Lokola Satana, baanzelu wana ya mabe balonaki mposa ya mabe mpo na bato, mposa ya kosangisa nzoto na bato, mpe yango ebotaki mbuma mabe.
Mabe etondi na mabelé
Biblia eyebisi biso boye: “Na ntango bato bayaki mingi . . . mpe bana basi babotamaki na bango, bana babali ya Nzambe bamonaki ete bana basi ya bato bazalaki bonzenga, mpe bakamataki kati na bango basi na bango na libala, baoyo eponaki bango.” (Genese 6:1, 2) “Bana babali ya Nzambe” wana ezalaki banani? Bazalaki bikelamu ya elimo, kasi bato te. (Yobo 1:6; 2:1) Ndenge nini toyebi yango? Toyebi yango mpamba te na ntango wana esilaki koleka mbula soki 1 500 banda bato babandaki kobalana, mpe ezalaki na ntina moko te oyo bakokaki kolobela yango mabe. Na yango, ndenge Biblia ezali kolobela kosangisa nzoto ya “bana babali ya Nzambe” oyo balataki nzoto ya bato ná “bana basi ya bato,” yango emonisi polele ete ezalaki likambo ya sika, mpe ebongaki te.
Lolenge ya bana oyo babotamaki na mabala yango emonisaki ete likambo yango ebongaki te. Bazalaki kobenga bana yango banefilime. Mpe ntango bakolaki, bakómaki bilombe mpe bato ya mobulu mpenza. Kutu, nkombo Nefilime elimboli Bakweisi, to bato oyo bakweisaka bato mosusu. Biblia ebengi bango “bilombe mpe [bato] ya lokumu ya kalakala.”—Genese 6:4.
Banefilime ná batata na bango bakómaki mabe koleka bato nyonso ya mokili. Genese 6:11 elobi ete: “Mokili ezalaki mabe na miso ya Nzambe; . . . etondaki na mobulu.” Ya solo, bato bakómaki mobulu mpe balandaki bizaleli ya banefilime.
Ndenge nini Banefilime ná batata na bango babebisaki bato bongo? Bazalaki kosalela ezaleli ya masumu ya bato mpe bamposa na bango. Nini esalemaki na nsima? “Bato nyonso babebisaki nzela na bango na mokili.” Nsukansuka, Yehova abebisaki mokili wana na Mpela, mpe abikisaki kaka Noa, moto ya sembo, mpe libota na ye. (Genese 6:5, 12-22) Nzokande, baanzelu yango batikaki nzoto oyo balataki mpe bazongaki na likoló na nsɔni nyonso. Baanzelu yango oyo bakómaki bademo bakobaki kotɛmɛla Nzambe ná bana na ye, baanzelu ya sembo. Na ntembe te, Nzambe apesaki baanzelu wana ya mabe nzela lisusu te ya kolata nzoto ya bato. (Yuda 6) Atako bongo, bazali kaka na bopusi ya makasi na makambo ya bato.
Moto ya mabe amonani polele
Mpo na komonisa kino wapi bopusi ya mabe ya Satana ekómi, 1 Yoane 5:19 elobi boye: “Mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” Zabolo azali kosala nyonso mpo na kobakisela bato mpasi likoló ya mpasi. Kutu, azali na ekateli makasi ya kosala yango. Mpo na nini? Mpamba te, babenganaki ye ná bademo na ye na likoló ntango Bokonzi ya Nzambe etyamaki na 1914. Mpo na likambo yango, Biblia esakolaki boye: “Mawa na mabelé . . . , mpamba te Zabolo akiteli bino, azali na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na eleko moko ya ntango mokuse.” (Emoniseli 12:7-12) Kasi, ndenge nini Satana asalelaka bopusi na ye likoló ya bato lelo oyo?
Libosoliboso, azali kobimisa elimo moko oyo ezali kotambwisa makanisi mpe etamboli ya bato. Yango wana, Baefese 2:2 ezali kobenga Zabolo “moyangeli ya nguya ya mopɛpɛ, elimo [to ezaleli oyo bato mingi bazali komonisa] oyo ezali sikoyo kosala mosala na kati ya bana ya kozanga botosi.” Na esika ya kolendisa bato bábanga Nzambe mpe básala makambo ya malamu, “mopɛpɛ” wana ya bademo ezali nde kotinda bango bátɛmɛla Nzambe mpe mitinda na ye. Satana ná bademo na ye nde bazali kotinda bato básala mabe.
“Batelá motema na yo”
Moko ya makambo oyo emonisaka “mopɛpɛ” yango ezali bafilme to bafɔtɔ ya bato oyo bazali kosangisa nzoto. Bililingi yango elamusaka bamposa ya kosangisa nzoto na ndenge oyo ebongi te mpe esalaka ete ezaleli mabe emonana lokola malamu. (1 Batesaloniki 4:3-5) Makambo lokola kosangisa nzoto na basi na makasi, konyokola bato na nko, mibali ebele bazali kosangisa nzoto na mwasi moko, kosangisa nzoto na banyama mpe kosangisa nzoto na bana mike ezali mwa makambo oyo bafilme mpe babuku yango elakisaka mpo na kosepelisa miso. Ata soki bililingi yango ezali mabe mpenza te, kotala yango to kotánga yango na mikanda ekoki kokómisa moto moombo na yango.b Ezali mpenza momeseno mabe oyo ebebisaka boyokani ná bato mosusu mpe ná Nzambe. Bililingi ya ndenge wana, emonisaka ezaleli ezangi ntina ya bademo oyo babandisaki yango. Bazali batomboki oyo mposa na bango ya kosangisa nzoto na ndenge ekoki te ebandaki liboso ya Mpela ya mikolo ya Noa.
Yango wana, Salomo moto na mayele alobaki boye: “Koleka eloko mosusu nyonso oyo esengeli kobatelama, batelá motema na yo, mpo makambo ya bomoi eutaka na yango.” (Masese 4:23, NW) Soki ozali kotala televizyo to ozali kosalela ordinatɛrɛ, kobatela motema na yo mpo okwea te na motambo ya kotalaka bafilme to bililingi ya bato oyo bazali kosangisa nzoto elimboli kolongwa na esika wana mpe kofungola esika mosusu to kokanga yango kaka, mpe ezali na ntina ete osala yango kozanga koumela mpe na mpiko! Zalá lokola soda oyo azali kosala nyonso mpo masasi ezwa ye na motema te. Satana azali koluka abebisa motema na yo ya elilingi, elingi koloba esika oyo bikateli mpe bamposa na yo efandaka.
Osengeli mpe kobatela motema na yo mpo elingaka mobulu te, mpamba te Zabolo ayebi ete “[Yehova] ayini ye oyo alingi mobulu.” (Nzembo 11:5) Mpo Satana akómisa yo monguna na Nzambe, ekosɛnga kaka te asalisa yo makambo ya mobulu, kasi akolona kaka bolingo ya mobulu na kati ya motema na yo. Yango wana, na televizyo balakisaka mingi makambo ya mobulu mpe oyo etali bilimo mabe. Banefilime bazalaka lisusu te, kasi makambo oyo bazalaki kosala, bato mpe bazali kosala yango lelo oyo! Lolenge ya kominanola oyo oponaka emonisaka ete ozali kokima mayele mabe ya Satana?—2 Bakolinti 2:11.
Ndenge ya kokima bopusi ya Satana
Ntango mosusu ekoki kozala mpasi kokima mabe. Biblia emonisi ete longola kozanga kokoka na bango, baoyo bazali kosala makasi mpo na kosepelisa Nzambe bazali mpe “kobunda líbanda . . . ná mampinga ya bilimo mabe.” Mpo na kolonga na etumba yango mpe kosepelisa Nzambe, tosengeli kosalela ebele ya bibongiseli oyo Nzambe azali kozwa mpo na biso.—Baefese 6:12; Baloma 7:21-25.
Moko ya bibongiseli yango ezali elimo santu ya Nzambe, nguya oyo eleki nyonso na kati ya molɔ́ngɔ́. Ntoma Paulo akomelaki baklisto ya ekeke ya liboso ete: “Biso tozwaki elimo ya mokili te, kasi elimo oyo euti epai ya Nzambe.” (1 Bakolinti 2:12) Baoyo batambwisami na elimo ya Nzambe basalaka makasi mpo na kolinga oyo Nzambe alingaka mpe koyina oyo ye ayinaka. (Amosa 5:15) Ndenge nini moto akoki kozwa elimo santu? Libosoliboso, na nzela ya libondeli, ya boyekoli ya Biblia oyo ekomamaki na lisalisi ya elimo santu mpe ya bandeko oyo balingaka mpenza Nzambe.—Luka 11:13; 2 Timote 3:16; Baebele 10:24, 25.
Soki osaleli bibongiseli wana ya Nzambe, okobanda kolata “molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe,” lolenge kaka moko ya komibatela na “mayele mabe ya Zabolo.” (Baefese 6:11-18) Lelo oyo, kosalela malamumalamu bibongiseli yango ezali na ntina mingi koleka. Mpo na nini?
Nsuka ya mabe ebɛlɛmi!
Mokomi ya nzembo alobi boye: “Ata bato mabe bakoli [lokola, NW] matiti; ata baoyo nyonso bakosalaka mabe balongi malamu, nde ezali mpo ete bakobomama bobele kobomama.” (Nzembo 92:7) Ya solo, kaka ndenge ezalaki na mikolo ya Noa, kobakisama ya mabe ezali komonisa ete etumbu ya Nzambe ekómi pene, kaka mpo na bato mabe te, kasi mpe mpo na Satana ná bademo na ye mpe akobwaka bango na lobwaku mozindo, elingi koloba, bakozala lisusu ata na likoki ya kosala eloko te. Yango ekozala ebandeli ya kobebisama na bango mpo na libela. (2 Timote 3:1-5; Emoniseli 20:1-3, 7-10) Nani akopesa etumbu yango? Moto mosusu te kaka Yesu Klisto, oyo tozali kotánga mpo na ye boye: “Ezali mpo na ntina oyo nde Mwana ya Nzambe amonisamaki polele, elingi koloba, mpo na kobukabuka misala ya Zabolo.”—1 Yoane 3:8.
Ozalaka mpenza na mposa ete mabe esila? Soki bongo, tiká ete bilaka ya Biblia elendisa yo. Ezali na buku mosusu te oyo emonisaka polele ete Satana nde azali mobandisi ya mabe. Kaka Biblia nde emonisaka ndenge nsukansuka Satana akobebisama mpo na libela ná misala na ye nyonso ya mabe. Tolendisi yo ozwa boyebi ya sikisiki ya Biblia mpo omibatela na mabe ya Satana sikoyo mpe ozala na elikya ya kobika na mokili oyo ekozala na makambo ya mabe te.—Nzembo 37:9, 10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nkombo mpenzampenza ya anzelu oyo akómá satana eyebani te. Liloba “Satana” elimboli “ Motɛmɛli” mpe liloba “Zabolo” elimboli “Mokoseli-bato-makambo.” Na makambo mosusu, etamboli ya Satana ekokani na oyo ya mokonzi ya kala ya Tulo. (Ezekiele 28:12-19) Bango nyonso mibale, bazalaki na etamboli ya malamu na ebandeli, kasi na nsima lolendo na bango ekosaki bango.
b Talá masolo “La pornographie: inoffensive ou néfaste?” na Lamuká ya 22 Yuli 2003, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda/Elilingi na lokasa 6]
Masapo oyo ezali na mwa makambo ya solo
Masapo ya kala oyo epalangani na mokili mobimba elobelaka masolo ya mwa banzambe, bilombe mpe mpela moko oyo ebebisaki mokili. Na ndakisa, lisapo ya Gilgamesh oyo bakomaki na monɔkɔ ya Akkadien elobelaka mpela, masuwa mpe bato oyo babikaki na likama. Masolo yango elobi ete Gilgamesh azalaki kolinga kosangisa nzoto mingi na basi, azalaki mwa nzambe oyo alingaki mobulu mingi mpe azalaki ndambo nzambe ndambo moto. Masapo ya bato ya Aztèque elobelaka mokili moko ya kala oyo bingambe bafandaki mpe mpela moko ya monene. Lisapo moko ya Mpoto ya Nɔrdi elobelaka lolenge moko ya bilombe mpe moto moko ya mayele na nkombo Bergelmir oyo atongaki masuwa moko ya monene mpo na komibikisa ye moko mpe mwasi na ye. Masapo nyonso wana ezali kondimisa lisolo ya Biblia oyo emonisi ete bato nyonso oyo bazali lelo oyo bauti na bato oyo babikaki na mpela moko oyo ebomaki mokili ya mabe ya ntango ya kala.
[Elilingi]
Etanda oyo ezali na lisapo ya Gilgamesh
[Eutelo ya bafɔtɔ]
The University Museum, University of Pennsylvania (neg.# 22065)
[Elilingi na lokasa 5]
Makambo oyo banefilime bazalaki kosala, bato mpe bazali kosala yango lelo oyo
[Elilingi na lokasa 7]
Boyebi ya sikisiki ebatelaka biso na mabe