Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Bileli
MOSAKOLI Yilimia amoni ndenge bitumbu oyo asakolaki na boumeli ya mbula 40 ekokisami. Mosakoli azali komiyoka ndenge nini ntango azali komona ndenge engumba na ye oyo alingaka mingi ezali kobebisama? Libongoli ya Septante na monɔkɔ ya Grɛki elobi na maloba ya ebandeli ya mokanda ya Bileli boye: “Yilimia afandaki mpe alelaki Yelusaleme na maloba oyo.” Mokanda yango ekomamaki na 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), wana makambo nyonso oyo esalemaki na boumeli ya basanza 18 oyo basoda ya Babilone bazingaki Yelusaleme mpe ndenge bazikisaki yango ezalaki naino sika na makanisi ya mosakoli. Mokanda ya Bileli ezali komonisa mpenza mawa makasi oyo Yilimia azalaki na yango. (Yilimia 52:3-5, 12-14) Ezali na engumba moko te na mokili, oyo balelá na maloba ya mawa ndenge wana.
Mokanda ya Bileli ezali na mikapo mitano. Mikapo minei ya liboso ezali banzembo ya mawa mpe oyo ya mitano ezali lilɔmbɔ. Vɛrsɛ mokomoko ya mikapo minei ya liboso ebandi na lɛtɛlɛ moko ya alfabɛ ya Liebele, oyo ezali na balɛtɛlɛ 22. Mokapo ya mitano ezali na bavɛrsɛ 22, motángo oyo ekokani na balɛtɛlɛ ya alfabɛ ya Liebele. Nzokande, etandami te na molɔngɔ na kolanda alfabɛ ya Liebele.
“MISO NA NGAI EZALI KOLƐMBA NA MPISOLI”
“Mboka ezali kofanda mpamba boni oyo etondaki na bato! Ekómi lokola mwasi-akufeli-mobali, ye oyo azalaki monene kati na mabota; ye oyo azalaki mokóló kati na mboka mingi, asili kokóma moombo.” Nde bongo bileli ya mosakoli Yilimia mpo na Yelusaleme ebandi. Mpo na kolimbola ntina ya mpasi oyo ekómeli Yelusaleme, mosakoli alobi boye: “[Yehova] ayokisi ye mpasi mpo na masumu na ye mingi.”—Bileli 1:1, 5.
Lokola mwasi akufelá mobali, Yelusaleme azali kotuna boye: “Mpasi ezali lokola mpasi na ngai oyo eyeisameli ngai?” Mpo na banguna na ye, abondeli Nzambe boye: “Tiká ete mabe na bango nyonso makóma liboso na yo, osalela mpe bango lokola esalelaki yo ngai, mpo na mapɛngwi nyonso na ngai; zambi kokimela na ngai ezali monene mpenza, mpe motema na ngai elɛmbi.”—Bileli 1:12, 22.
Na mawa nyonso, Yilimia alobi boye: “Na nkanda na ye [Yehova] akati liseke mobimba ya Yisalaele; alongweli bango lobɔkɔ ya mobali na ye, na liboso ya elongi ya moyini. Aziki kati na Yakobo lokola mɔtɔ ya ndemo, abebisi pembeni.” Mpo na komonisa mawa makasi oyo azali na yango, mosakoli aleli na maloba oyo: “Miso na ngai ezali kolɛmba na mpisoli, molimo na ngai ebulungani; libale na ngai esopani na mabele.” Ezala kutu baleki nzela bakamwaki boye: “Oyo nde mboka ebyangaki bato ete kitoko na koleka, esengo ya mokili mobimba?”—Bileli 2:3, 11, 15.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:15, NW—Na ndenge nini Yehova ‘anyataki ekamwelo ya vinyo ya moseka ya Yuda’? Ntango bato ya Babilone bazalaki kobebisa engumba oyo elobelami lokola moseka, basopaki makila mingi lokola vinyo oyo ebimaka ntango bazali konyata mbuma ya vinyo na ekamwelo. Yehova asakolaki likambo yango mpe atikaki ete ekokisama. Yango wana tokoki koloba ete ‘anyataki ekamwelo ya vinyo.’
2:1—Ndenge nini “nkembo ya Yisalaele ebwakamaki longwa na lola kino mokili”? Lokola “lola eleki mokili likoló,” soki eloko ya motuya ekiti valɛrɛ, balobaka ntango mosusu ete ‘ebwakami longwa na lola kino mokili.’ “Nkembo ya Yisalaele”, elingi koloba lokumu mpe nguya oyo ezalaki na yango ntango Yehova azalaki kopambola yango, ebwakamaki na nse ntango Yelusaleme ebebisamaki mpe Yuda etikalaki mpamba.—Yisaya 55:9.
2:1, 6—“Etyelo ya makolo” ya Yehova mpe “mongombo” na ye ezali nini? Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Tókende na hema kofanda, tógumbama epai na etɛmɛlo ya makolo na ye.” (Nzembo 132:7) Na yango, “etyelo ya makolo” oyo Mokanda ya Bileli elobeli ezali ndako ya Yehova ya losambo to tempelo na ye. Bato ya Babilone ‘bazikisaki ndako ya Yehova’ lokola mongombo to mwa ndako moko ya moke ya ndɛlɛ.—Yilimia 52:12, 13.
2:16, 17—Esengelaki nde te ete vɛrsɛ ya 16 ebanda na lɛtɛlɛ ya Liebele ayin mpe oyo ya 17 ebanda na lɛtɛlɛ pe mpo na kolanda molɔngɔ ya balɛtɛlɛ ya alfabɛ ya Liebele? Ntango bakomi ya kala bazalaki kokoma banzembo na lolenge oyo, bazalaki kolanda ndenge balɛtɛlɛ ya alfabɛ elandani. Nzokande, bazalaki kosala bongo te soki bamoni ete maloba yango ekoyokana malamu te. Likambo ya ntina mingi ezalaki nde makanisi ebima malamu na esika ya kolanda kaka lolenge wana ya kokoma. Kutu, bazalaki kosalela lolenge wana ya kokoma mpo na kosalisa bato bábosana makambo oyo batángi te. Batyé mpe ayin na esika ya pe na nzembo ya 3 mpe ya 4 ya Mokanda ya Bileli.—Bileli 3:46, 49; 4:16, 17.
2:17—“Liloba” nini mpenzampenza Yehova akokisaki mpo na Yelusaleme? Likambo bazali kolobela awa ekoki kozala oyo ezali na Levitike 26:17, oyo elobi ete: “Nakotya nkanda na ngai na likoló na bino mpe bokobukana liboso na bayini na bino. Baoyo bayini bino bakozala mikonzi likoló na bino, mpe bokokima wana ezali moto kobengana bino te.”
Mateya mpo na biso:
1:1-9. Yelusaleme azali kolela mingi na butu mpe mpisoli ezali na matama na ye. Bikuke na ye etikali mpamba mpe banganga-nzambe na ye bazali kokimela. Baseka na ye bazali koyoka mpasi na motema mpe ye moko azali na mawa makasi. Mpo na nini? Mpamba te Yelusaleme asali lisumu monene. Mabe na ye ezali komonana polele. Lisumu ememaka esengo te; ememaka nde mpisoli, kokimela, mawa mpe mpasi.
1:18. Ntango Yehova apesaka etumbu na baoyo basali lisumu, asalaka yango na bosembo.
2:20. Yehova akebisaki Bayisaele ete soki bayoki mongongo na ye te, bilakeli mabe ekokómela bango; na ndakisa, bakobanda kolya ‘mosuni ya bana na bango ya mibali mpe ya basi.’ (Deteronome 28:15, 45, 53) Koboya kotosa Nzambe ezali mpenza kozanga mayele!
“OZIPA LITOI NA YO NA KOGANGA NA NGAI TE”
Mokanda ya Bileli mokapo ya 3 (NW) ezali kobenga libota ya Yisalaele “mobali ya nkonzo.” Atako azali konyokwama makasi, mobali yango ayembi boye: ‘Yehova azali malamu epai na baoyo [bazali kotya elikya epai na ye, NW] epai ya molimo oyo azali [kokoba] koluka ye.’ Na libondeli na ye epai ya Nzambe ya solo, asɛngi boye: “Oyoki mongongo na ngai; ozipa litoi na yo na koganga na ngai te ete napemisama.” Mobali yango asɛngi Yehova apesa monguna etumbu, alobi boye: “Ɛ [Yehova], okofuta bango, [na kolanda, NW] mosala ya mabɔkɔ na bango.”—Bileli 3:1, 25, 56, 64.
Yilimia amonisi polele ndenge azalaki koyoka ntango bato ya Babilone bazingaki Yelusaleme na boumeli ya sanza 18 mpe aleli boye: “Zambi lisumu ya mwana mwasi ya bato na ngai eleki mabe ya Sodomo; oyo ekweaki na mwa ntango moke mpe lobɔkɔ etyamelaki yango te.” Yilimia akobi boye: “Baoyo babomami na mopanga baleki bakufi na nzala na malamu; baoyo bazali kolɛmba, bazali kokufa mpo na kozanga mbuma ya elanga.”—Bileli 4:6, 9.
Nzembo ya mitano ezali maloba ya bato ya Yelusaleme. Balobi boye: “Ɛ [Yehova], kanisá oyo esili kokwela biso, talá mpe moná nsɔni na biso!” Wana bazali kolobela bampasi na bango, bazali kosɛnga boye: “Ɛ [Yehova], yo ozali koumela seko! Kiti ya bokonzi na yo ekozala longwa na libota kino libota. Ɛ [Yehova], bongolá biso lisusu epai na yo moko ete tóbongolama. Bongisá mikolo na biso lokola na mikolo ya kala.”—Bileli 5:1, 19, 21.
Biyano na mituna ya Biblia:
3:16 (NW)—Maloba “asali ete mabanga ebuka mino na ngai” elimboli nini? Buku moko elobi boye: “Ntango Bayuda bazalaki kokende na boombo, basɛngisaki bango na makasi ete bátumba mampa na bango na kati ya mabulu oyo basengelaki kotimola na mabelé. Na bongo, mampa na bango ezalaki na mabanga.” Kolya limpa ya ndenge wana ekoki kobuka moto mino.
4:3, 10—Mpo na nini Yilimia akokanisi “mwana mwasi ya bato na [ye]” na “ndɛkɛ minene ya lisobe” to bamaligbanga? Yobo 39:16 (Bible na Lingala ya lelo oyo) elobi ete maligbanga “eyokelaka bana na yango mawa té, lokola nde bazali bapaya.” Na ndakisa, soki apasoli maki na ye, maligbanga ya mwasi ekendaka kotambola na baninga na ye mpe oyo ya mobali etikalaka na mokumba ya kobatela bana. Mpe nini ekómaka soki likama ebimi? Ná oyo ya mobali ná oyo ya mwasi bakimaka mpe basundolaka bana. Ntango oyo bato ya Babilone bazingaki Yelusaleme, nzala ekómaki makasi mpe bamama, oyo basengelaki koyokela bana na bango mawa, bakómaki nde motema makasi lokola bamaligbanga na lisobe. Yango ekeseni makasi na bolingo oyo bangombolo bazalaka na yango mpo na bana na bango.
5:7—Yehova akopesa bato bitumbu mpo na masumu ya batata na bango? Te. Yehova apesaka bato bitumbu te mpo na masumu ya batata na bango. Biblia elobi ete: “Mokomoko na biso akozongisa monɔkɔ mpo na ye moko epai ya Nzambe.” (Baloma 14:12) Nzokande, mabe oyo masumu ya batata ebimisaka ekoki kotikala ntango molai na nsima mpe kolanda bana na bango. Na ndakisa, lokola Bayisalaele ya ntango ya kala bamipesaki na losambo ya bikeko, yango esalaki ete ata Bayisalaele ya sembo oyo babotamaki na nsima bázala na mokakatano ya kolanda nzela ya boyengebene.—Exode 20:5.
Mateya mpo na biso:
3:8, 43, 44. Ntango bato ya Yelusaleme bazalaki na mpasi, Yehova aboyaki koyokela bango mawa ntango bamilelaki epai na ye. Mpo na nini? Mpamba te bazangaki botosi mpe baboyaki kobongola motema. Soki tolingi ete Yehova ayanolaka na mabondeli na biso, tosengeli kotosa ye.—Masese 28:9.
3:20. Yehova, “Oyo-Aleki likoló na mokili mobimba,” azali na lokumu mingi kasi amikitisaka mpo na “kotala epai na lola mpe kati na nse.” (Nzembo 83:18; 113:6) Ya solo, Yilimia ayebaki malamu ete Yehova alingaka kogumbama liboso ya bato, elingi koloba andimaki komikitisa mpenza mpo na kolendisa bango. Tozali mpenza na esengo ya koyeba ete Nzambe ya solo azali kaka te na nguya nyonso mpe na bwanya nyonso, kasi ayebaka mpe komikitisa!
3:21-26, 28-33. Ndenge nini tokoki kolonga ata mikakatano ya makasi? Yilimia apesi biso eyano. Tosengeli te kobosana ete misala oyo emonisaka motema-boboto ya Yehova ezali ebele mpe mawa na ye ezali monene mingi. Tosengeli mpe kobosana te ete lokola tozali na bomoi, yango ezali ntina monene oyo tosengeli kobatela elikya na biso mpe kozela na kimya lobiko ya Yehova kozanga komilelalela. Longola wana, tosengeli “kotya monɔkɔ [na biso] na mputulu (NW),” elingi koloba koyikela minyoko mpiko, koyeba ete ezali na ntina oyo Nzambe apesi nzela ete ekómela biso.
3:27. Kolonga komekama ntango moto azali naino elenge ekoki kosɛnga ayika mpiko na minyoko mpe na kotyolama. Kasi, “ezali malamu na elenge ete akumba [ekanganelo] na ntango ya bolenge na ye.” Mpo na nini? Mpamba te soki moto ameseni komema ekanganelo ya mpasi banda bolenge na ye, yango ekosalisa ye alonga mikakatano ntango akokola.
3:39-42. ‘Koyoka mabe’ ntango tozali kobuka mbuma mabe ya masumu oyo tosalaki ezali kozanga mayele. Na esika ya komilelalela mpo na mpasi oyo masumu na biso ebimiseli biso, “tiká tómeka mpe tótala nzela na biso mpe [tózongela Yehova, NW].” Ekozala malamu tóbongola mitema mpe tótika banzela ya mabe.
Tyá elikya na yo epai ya Yehova
Mokanda ya Bileli ezali komonisa ndenge Yehova akómaki kotalela Yelusaleme mpe mboka ya Yuda ntango bato ya Babilone batumbaki yango mpe batikaki yango mpamba. Maloba oyo ekomami na kati na yango, oyo elobeli ndenge Bayisalaele bandimaki masumu na bango emonisi polele ete mpo na Yehova, ntina monene ya mpasi wana ezalaki masumu ya bato. Banzembo na yango oyo epemami na Nzambe ezali komonisa elikya oyo Bayisalaele bazalaki na yango epai ya Yehova mpe mposa na bango ya kozonga na nzela ya malamu. Atako yango ezalaki te kolobela elikya ya bato mingi ya ntango ya Yilimia, ezalaki nde kolobela elikya ya Yilimia mpe ya batikali oyo babongolaki motema.
Ndenge Mokanda ya Bileli emonisi yango, lolenge oyo Yehova atalelaki likambo oyo ekómelaki Yelusaleme ezali koteya biso makambo mibale ya ntina mingi. Ya liboso, kobebisama ya Yelusaleme mpe ndenge Yuda etikalaki mpamba ezali kolendisa biso tótosaka Yehova mpe kokebisa biso tóbosana mokano ya Nzambe te. (1 Bakolinti 10:11) Liteya ya mibale euti na ndakisa ya Yilimia. (Baloma 15:4) Atako emonanaki lokola elikya ezali te, na mawa nyonso mosakoli atalelaki Yehova mpo na lobiko. Ezali na ntina mpenza ete tótya elikya na biso mobimba epai ya Yehova mpe Liloba na ye!—Baebele 4:12.
[Elilingi na lokasa 9]
Mosakoli Yilimia amonaki ndenge bitumbu oyo asakolaki ekokisamaki
[Elilingi na lokasa 10]
Kondima ya Batatoli ya Corée oyo, emekamaki mpo baboyaki kokɔta na makambo ya mokili