Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/6 nk. 21-25
  • Batiki te kobota mbuma ya elimo atako bakómi na nsuki mpɛmbɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batiki te kobota mbuma ya elimo atako bakómi na nsuki mpɛmbɛ
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Azalaki kozanga soki moke te”
  • Basalelaka bɔɔngɔ na bango
  • Batiki te komipesa atako bakómi mibange
  • Bazali mpenza ndakisa ya mpiko
  • Balasilai ayebaki ndelo na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Yehova asepelaka na bosembo ya bandeko oyo basali mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Bobangé epekisaki ye te mpo na kosalela Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Salelá Yehova liboso ete mikolo ya mpasi eya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/6 nk. 21-25

Batiki te kobota mbuma ya elimo atako bakómi na nsuki mpɛmbɛ

“Baoyo balonami na ndako ya Yehova . . . bakotika te kobota mbuma ata ntango bakokóma na nsuki mpɛmbɛ.”​—NZEMBO 92:13, 14, NW.

1, 2. (a) Mbala mingi, ndenge nini bato batalelaka konuna? (b) Makomami epesi elaka nini na ntina na mabe oyo lisumu ya Adama ememá?

MAKANISI nini eyelaka yo soki oyoki liloba mobange? Okanisaka moto oyo mposo na ye elɛmbá? Oyo ayokaka lisusu malamu te? Oyo makolo ná mabɔkɔ elɛmbá? To okanisaka moko ya makambo ya “mikolo mabe” oyo elobelami na Mosakoli 12:1-7? Soki ezali bongo, osengeli koyeba ete makambo oyo balobeli na Mosakoli 12 emonisi te ete konuna ezalaki mokano ya Yehova, Nzambe Mozalisi. Emonisi nde mpasi oyo lisumu ya Adama ememá.​—Baloma 5:12.

2 Kokóma mokóló ezali mabe te, mpamba te mpo na kokoba kozala na bomoi, esengeli kaka koumela mingi. Kokola mpe kokɔmela ezali na ntina mpo na bikelamu nyonso ya bomoi. Makambo mabe oyo lisumu mpe kozanga kokoka ememeli biso na boumeli ya mbula nkóto motoba ekokóma makambo ya kala, mpe bato nyonso ya botosi bakokóma na bomoi oyo ezangi mpasi ya bobange mpe liwa, ndenge Nzambe akanaki. (Genese 1:28; Emoniseli 21:4, 5) Na ntango yango, “mofandi moko akoloba te ete, ngai nazali na maladi.” (Yisaya 33:24) Mibange bakozongela “bolenge na bango” mpe misuni na bango ‘ekoleka oyo ya elenge na kitoko.’ (Yobo 33:25) Mpo na sikoyo, biso nyonso tosengeli kobunda na mikakatano oyo lisumu ya Adama ememelá biso. Kasi, basaleli ya Yehova bazwaka mapamboli mingi ntango bazali kokóma mibange.

3. Na ndenge nini baklisto bakoki kokoba “kobota mbuma ata ntango bakokóma na nsuki mpɛmbɛ”?

3 Liloba ya Nzambe elaki biso ete: “Baoyo balonami na ndako ya Yehova . . . bakotika te kobota mbuma ata ntango bakokóma na nsuki mpɛmbɛ.” (Nzembo 92:13, 14) Na maloba ya elilingi, mokomi ya nzembo amonisi polele ete basaleli ya sembo ya Nzambe bakoki kokoba kokola na elimo ata soki bazali konuna. Bandakisa mingi ya Biblia mpe ya mikolo na biso emonisi bosolo ya likambo yango.

“Azalaki kozanga soki moke te”

4. Ndenge nini Ana, mosakoli oyo akómaki mobange amipesaki epai na Nzambe, mpe azwaki mbano nini?

4 Tózwa ndakisa ya Ana, oyo azalaki mosakoli na ekeke ya liboso. Atako azalaki na mbula 84, “azalaki kozanga soki moke te na tempelo, kosaláká mosala mosantu butu moi na kokila bilei mpe na malɔmbɔ.” Lokola tata na ye azalaki moto “ya libota ya Asele,” oyo bazalaki Balevi te, Ana akokaki kofanda na tempelo te. Kanisá naino milende oyo asengelaki kosala mpo na kozala na tempelo mikolo nyonso, banda na ntango oyo bazalaki kotumba mbeka na ntɔngɔ tii na ntango oyo bazalaki kotumba mbeka na mpokwa! Kasi, lokola Ana amipesaki mingi ndenge wana, azwaki ebele ya mapamboli. Azwaki libaku ya kozala wana ntango Yozefe ná Malia bamemaki Yesu na tempelo mpo na kolakisa ye liboso ya Yehova, ndenge Mobeko esɛngaki. Ntango Ana amonaki Yesu, “abandaki kozongisa matɔndi epai ya Nzambe mpe koloba na ntina etali mwana wana epai ya baoyo nyonso bazalaki kozela kosikolama ya Yelusaleme.”​—Luka 2:22-24, 36-38; Mituya 18:6, 7.

5, 6. Ndenge nini mibange mingi bazali komonisa elimo lokola oyo ya Ana?

5 Ebele ya mibange oyo tozali na bango lelo bazali lokola Ana, mpamba te bayanganaka na makita nyonso, babondelaka mpo losambo ya solo ekende liboso, mpe bazali na mposa makasi ya kosakola nsango malamu. Ndeko moko ya mbula soki 80, oyo ayanganaka na makita nyonso elongo na mwasi na ye alobaki ete: “Toloná momeseno ya kokendaka na makita nyonso. Tolingaka kozala esika mosusu te. Esika basaleli ya Yehova bazali, wana nde esika tokozala. Soki tozali kuna, tozalaka mpenza na esengo.” Oyo nde ndakisa ya kolendisa mpo na moto nyonso!​—Baebele 10:24, 25.

6 Jean, moklisto moko ya mbula koleka 80 oyo mobali na ye akufá alobaki ete: “Soki likambo moko oyo etali losambo ya solo esengeli kosalema mpe ngai nakoki kopesa mabɔkɔ, nasalaka yango.” Abakisi boye: “Naboyi te, ntango mosusu nakutanaka na makambo ya mpasi, kasi nalukaka te ete mawa na ngai ezwa bato nyonso oyo bazali zingazinga na ngai.” Alobelaki mpe esengo oyo azalaka na yango ntango akendaka na mikili mosusu mpo na makambo ya Nzambe. Na mobembo moko oyo auti kosala, ayebisaki baninga na ye ya mobembo ete: “Nalingi lisusu kotambolatambola te; mposa na ngai sikoyo ezali ya kobima na mosala ya kosakola.” Atako ayebaki monɔkɔ ya mboka wana te, Jean azalaki na likoki ya kolamusa na mitema ya bato mposa ya koyoka nsango ya Biblia. Lisusu, na boumeli ya ebele ya bambula, asalaki elongo na lisangá moko oyo ezalaki na mposa makasi ya basakoli, atako yango ezalaki kosɛnga ye ayekola monɔkɔ ya sika mpe atambolaka ngonga moko mpo na kokóma na esika ya makita mpe ngonga moko mpo na kozonga na ndako.

Basalelaka bɔɔngɔ na bango

7. Ntango akómaki mobange, ndenge nini Moize amonisaki ete azali na mposa ya kokolisa boninga na ye na Nzambe?

7 Ntango moto azali kokola, mayele mpe ezalaka kobakisama. (Yobo 12:12) Nzokande, kokola na elimo eyaka te yango moko mpo moto akoli. Na yango, na esika ya kotya motema kaka na boyebi oyo bazwá kala, basaleli ya Yehova ya sembo basalaka makasi mpo na ‘kobakisa boyebi,’ wana bambula ezali kobakisama. (Masese 9:9) Ntango Yehova apesaki Moize mokumba ya kokamba bato na ye, azalaki na mbula 80. (Exode 7:7) Na ntango na ye, ezalaki mpasi komona moto akokisi mbula wana, mpamba te ye moko akomaki boye: “Motuya ya mbula na biso ezali ntuku nsambo, mpe . . . mpo na makasi ekokóma na ntuku mwambe.” (Nzembo 90:10) Atako bongo, Moize alobaki te ete akoyekola lisusu te mpo akómi mobange. Nsima ya kosalela Nzambe ebele ya bambula, mpe kokokisa mikumba minene, Moize abondelaki Yehova ete: “Monisá ngai nzela na yo [sikoyo, NW] ete nayeba yo.” (Exode 33:13) Moize azalaki ntango nyonso na mposa ya kokolisa boninga na ye na Yehova.

8. Ndenge nini Danyele atikaki te kosalela bɔɔngɔ na ye atako akómaki na mbula 90, mpe yango ebimisaki matomba nini?

8 Atako Mosakoli Danyele akómaki na mbula soki 90, atikaki te kokanisa na mozindo na makomi mosantu. Makambo oyo asosolaki na nzela ya boyekoli ya “mikanda” lokola Levitike, Yisaya, Yilimia, Hosea mpe Amosa etindaki ye aluka Yehova makasi na libondeli. (Danyele 9:1, 2) Nzambe ayanolaki na libondeli na ye mpe ayebisaki ye ntango oyo Masiya asengelaki koya mpe ndenge losambo ya solo esengelaki kozala na nsima.​—Danyele 9:20-27.

9, 10. Bato mosusu basalaki nini mpo bábatela makanisi na bango?

9 Lokola Moize ná Danyele, biso mpe tokoki kokoba kosalela bɔɔngɔ na biso soki tozali kotya makanisi na biso na makambo ya elimo na kotalela makoki na biso. Mingi bazali kosala bongo. Na ndakisa, nkulutu moko ya mbula koleka 80 asalaka nyonso mpo atikala nsima te na mateya ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45) Alobi boye: “Nalingaka solo mingi, mpe nazali kosepela komona ndenge pole ezali kongɛnga se kongɛnga.” (Masese 4:18) Ndenge moko mpe, Fred, oyo asali mbula koleka 60 na mosala ya mobongisi-nzela, amoni ete kobɛtaka masolo ya Biblia na bandeko elendisaka mpenza na elimo. Alobi boye: “Nasengeli kotika Biblia etambwisa makanisi na ngai. Soki ozali kokanga ntina ya mateya ya Biblia mpe ozali koyokanisa makambo oyo ozali koyekola na ‘ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba,’ okozala kaka na boyebi ya ndambondambo te. Okomona esika oyo likanisi mokomoko ezali na yango na kati ya mateya ya Biblia.”​—2 Timote 1:13.

10 Kokóma mobange epekisaka te moto ayekola makambo ya sika, ata mpe oyo ezali makasi. Bato mosusu oyo bakómi na bambula 60, 70, ata kutu 80, bayekoli kotánga mpe kokoma to mpe monɔkɔ mosusu. Batatoli ya Yehova mosusu basalaka bongo mpo na kosakwela bato ya bikólo mosusu nsango malamu. (Malako 13:10) Harry ná mwasi na ye bazalaki na mbula pene na 70 ntango bazwaki ekateli ya kokende kopesa mabɔkɔ na teritware moko ya monɔkɔ ya Portugais. Harry alobi ete: “Kozanga ntembe, soki moto akómi mobange, makambo nyonso na bomoi ekómaka mpasi mingi.” Kasi, lokola batingamaki kaka, bakómaki koyekola na bato Biblia na Portugais. Na boumeli ya bambula ebele sikoyo, Harry asalaka masukulu na liyangani ya etúká na Portugais.

11. Mpo na nini tosengeli kotala makambo oyo mibange ya sembo bazali kosala?

11 Ya solo, moto nyonso te nde azali na nzoto makasi to na makoki ya kosala makambo nyonso wana. Na yango, mpo na nini kolobela makambo oyo mibange mosusu basalá? Tolingi koloba te ete bato nyonso basengeli kosala lokola bango. Kasi, ezali nde na boyokani na oyo ntoma Paulo akomelaki Baebele na ntina na bankulutu ya sembo na lisangá ete: “Wana bozali kotala malamumalamu motindo nini etamboli na bango ezali kosuka bómekola kondima na bango.” (Baebele 13:7) Ntango tozali komona molende ya mibange wana, yango ekotinda biso tólanda ndakisa ya kondima makasi oyo ezali kotinda bango básalela Nzambe. Harry, oyo azali lelo na mbula 87, ayebisi ntina oyo azali komipesa na mosala ya Nzambe: “Nalingi nasalela bambula oyo natikali na yango na bwanya mpe nasala oyo nakoki mpo na mosala ya Yehova.” Fred, oyo tolobelaki liboso, azalaka mpenza na esengo ntango azali kokokisa mokumba na ye na Betele. Alobi boye: “Osengeli koluka lolenge eleki malamu oyo okoki kosalela Yehova mpe kokoba na nzela yango.”

Batiki te komipesa atako bakómi mibange

12, 13. Ndenge nini Balazilai akangamaki na Nzambe atako akómaki mobange?

12 Komesana na mbongwana oyo esalemi na nzoto ezalaka pɛtɛɛ te. Atako bongo, okoki kokoba komipesa na mosala ya Nzambe. Balazilai, Mogilada azali mpenza ndakisa malamu na likambo yango. Atako azalaki na mbula 80, ayambaki Davidi ná basoda na ye epai na ye ntango bazalaki kokima Abesaloma mpe apesaki bango bilei mpe esika ya kolala. Ntango Davidi azalaki kozonga na Yelusaleme, Balazilai akendeki kotika bango tii na Ebale Yolodani. Davidi asɛngaki Balazilai akóma kofanda epai na ye. Balazilai alobaki nini? Alobaki boye: “Lelo oyo nazali na [mbula, NW] ntuku mwambe. . . . Ngai moombo na yo nakoki koyeba yango ekolya ngai to yango ekomɛla ngai? Ngai nakolonga koyoka lisusu mingongo ya babali mpe basi baoyo bakoyemba? . . . Talá moombo na yo, Kimeama, tiká ete aleka esika moko na nkolo na ngai mokonzi; salelá ye lokola ekomonana malamu na miso na yo.”​—2 Samwele 17:27-29; 19:31-40.

13 Atako akómaki mobange mpenza, Balazilai asalaki oyo akoki mpo na kosunga mokonzi oyo Yehova aponaki. Atako alobaki ete lolemo na ye ekokaki koyoka lisusu elengi ya biloko te mpe matoi na ye ezalaki koyoka lisusu malamu te ndenge ezalaki liboso, amonisaki motema mabe te. Lokola asɛngaki mokonzi ete azwa Kimeama na esika na ye, Balazilai amonisaki mpenza ndenge motema na ye ezalaki. Lokola Balazilai, mibange mingi lelo balukaka bolamu ya basusu mpe bakabaka. Bazali kosala oyo bakoki mpo na losambo ya solo, mpo bayebi ete “Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.” Oyo nde lipamboli tozali na yango ya kozala na bato ya sembo na kati na biso!​—Baebele 13:16.

14. Ndenge nini mbula ya Davidi ebakisi kilo na maloba ya Nzembo 37:23-25?

14 Atako Davidi akutanaki na makambo ndenge na ndenge na bomoi na ye, azalaki kaka kondima ete Yehova atikaka soki moke te kobatela basaleli na ye ya sembo. Pene na nsuka ya bomoi na ye, Davidi akomaki Nzembo 37. Meká komona na makanisi Davidi azali kokanisa, kobɛta nzɛnzɛ mpe koyemba na maloba oyo: “[Yehova] akokendisa moto na nzela, akobongisa ye oyo atamboli na nzela ekosepelisa ye. Ata akokwea; nde akobwakama na nse te, zambi [Yehova] akotombola lobɔkɔ na ye likoló. Nazalaki elenge mpe nakómi mobange, nde naino namoni moyengebene te oyo atikami, to mwana na ye oyo akolɔmbaka kwanga.” (Nzembo 37:23-25) Yehova amonaki malamu alobela mpe mbula ya Davidi na nzembo yango. Yango ebakisi mpenza kilo na maloba yango!

15. Wapi ndakisa kitoko ya bosembo oyo ntoma Yoane atiká atako akutanaki na mikakatano mpe akómaki mobange?

15 Ntoma Yoane azali mpe ndakisa malamu ya bosembo atako akutanaki na mikakatano mpe akómaki mobange. Nsima ya kosalela Nzambe na boumeli ya mbula pene na 70, bamemaki Yoane na esanga Patimosi ‘mpo azalaki koloba na ntina etali Nzambe mpe kopesa litatoli na ntina etali Yesu.’ (Emoniseli 1:9) Atako bongo, atikaki mosala na ye te. Kutu, mikanda nyonso ya Yoane oyo ezali na Biblia ekomamaki na nsuka ya bomoi na ye. Ntango azalaki na Patimosi, azwaki emonaneli ya nsɔmɔ wana ya Emoniseli mpe akomaki makambo nyonso oyo amonaki. (Emoniseli 1:1, 2) Bato mingi balobaka ete babimisaki Yoane na esanga yango na ntango oyo amperɛrɛ Nerva azalaki koyangela Loma. Na nsima, pene na mobu 98 ya ntango na biso (T.B.), wana azalaki na mbula soki 90 to 100, Yoane akomaki Evanzile mpe mikanda mosusu misato oyo ezali na nkombo na ye.

Bazali mpenza ndakisa ya mpiko

16. Ndenge nini bato oyo bazali lisusu na likoki ya koloba te bakoki komonisa kondima na bango epai na Yehova?

16 Makambo ezali mingi mpe ya ndenge na ndenge oyo ekoki kosilisa moto makasi. Na ndakisa, bato mosusu bazali lisusu ata na likoki ya koloba te. Kasi, babosanaka te bolingo mpe motema boboto oyo Nzambe amoniselá bango. Atako bazali lisusu te na likoki ya koloba, na mitema na bango balobaka na Yehova ete: “E nalingi Mobeko na yo na bolingo bɛ! [Nakanisaka, NW] yango mokolo mobimba.” (Nzembo 119:97) Yehova ayebi baoyo bazali “kokanisa mpo na nkombo na ye,” mpe asepelaka ndenge bato yango bakeseni mpenza na ebele ya bato ya mokili, oyo bazali kokipe banzela na ye te. (Malaki 3:16, NW; Nzembo 10:4) Oyo nde esengo koyeba ete Yehova asepelaka na makanisi ya mitema na biso!​—1 Ntango 28:9; Nzembo 19:14.

17. Basaleli ya Yehova oyo basaleli ye ntango molai bamonisi likambo nini ya ntina mingi?

17 Likambo mosusu oyo tosengeli kobosana te ezali ete baoyo basaleli Yehova na bosembo nyonso na boumeli ya ebele ya bambula bamonisi likambo moko ya ntina mingi: mpiko ya solosolo. Yesu alobaki boye: “Na ezaleli na bino ya koyika mpiko bokozwa milimo na bino.” (Luka 21:19) Koyika mpiko ezali mpenza na ntina mpo na kozwa bomoi ya seko. Bino baoyo “bosili kosala mokano ya Nzambe” mpe bomonisi bosembo na bomoi na bino, bokoki kozala na elikya ete bokomona “kokokisama ya elaka.”​—Baebele 10:36.

18. (a) Yehova asepelaka komona nini epai ya mibange? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

18 Yehova asepelaka mingi na mosala oyo ozali kosalela ye na molimo na yo mobimba, ezala mingi to moke. Ezala nini ekoki kokómela yo na ‘bomoto na yo ya libándá’ ntango ozali kokóma mobange, ‘bomoto na yo ya kati’ ekoki kokómisama ya sika mokolo na mokolo. (2 Bakolinti 4:16) Na ntembe te, Yehova asepelaka na oyo osalá kala, kasi emonani polele ete asepelaka mpe na oyo ozali kosala sikoyo mpo na nkombo na ye. (Baebele 6:10) Na lisolo oyo elandi, tokolobela matomba oyo moto akoki kozwa soki atikali sembo ndenge wana.

Okopesa eyano nini?

• Wapi ndakisa kitoko oyo Ana atikelá baklisto oyo bazali mibange?

• Mpo na nini kokóma mobange elimboli te ete moto akoki lisusu kosala eloko te?

• Ndenge nini mibange bakoki kokoba komipesa epai ya Nzambe?

• Ndenge nini Yehova atalelaka mosala oyo mibange basalelaka ye?

[Elilingi na lokasa 23]

Atako Danyele akómaki mobange, asosolaki na nzela ya “mikanda” ntango oyo Bayuda basengelaki kolekisa na boombo

[Bililingi na lokasa 25]

Mibange mingi bazali kopesa ndakisa malamu na koyanganaka na makita nyonso, na molende na mosala ya kosakola mpe na koyekola

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto