Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/6 lok. 31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Masolo mosusu
  • “Bɔkɔlá mwana mobali na kolanda nzela oyo esengeli mpo na ye”
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Baboti​—Bóbɔkɔla bana na bino na bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Bótyela bana likebi oyo basengeli na yango
    Lamuká!—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/6 lok. 31

Mituna ya batángi

Masese 22:6 elingi nde koloba ete soki bana oyo bazali baklisto bateyami malamu bakoki kotika nzela ya Yehova te?

Totángaka na vɛrsɛ yango ete: “Bɔkɔlá mwana na nzela ekoki na ye kotambola; [ntango akokóma mokóló, NW], akopɛngwa na yango te.” Lokola etape ya nzete elalaka kaka na ngámbo oyo yango etɛngami, bana oyo bateyami malamu bakobaka kosalela Yehova ntango bakoli. Ndenge moboti nyonso ayebi yango, koteya mwana ndenge wana esɛngaka mpenza ntango mpe milende. Mpo na kokómisa bana na bango bayekoli, baboti basengeli koteyaka, kokebisaka, kolendisaka, kopesaka bango disipilini mpe ndakisa ya malamu. Basengeli kosala yango ntango nyonso mpe na bolingo mpenza na boumeli ya mbula mingi.

Kasi, soki mwana atiki kosalela Yehova, yango emonisi ete baboti bateyaki ye malamu te? Ntango mosusu, baboti basalaki makasi mpenza te mpo na kobɔkɔla bana na bango na disipilini mpe na makebisi ya Yehova. (Baefese 6:4) Lisusu, vɛrsɛ wana elingi koloba te ete soki bateyi bana malamu, bana yango bakozala kaka sembo epai na Nzambe. Baboti bakoki te kokómisa bana na bango ndenge nyonso oyo balingi. Lokola mikóló, bana mpe bazali na bonsomi ya kopona nzela oyo balingi kolanda na bomoi na bango. (Deteronome 30:15, 16, 19) Ata soki baboti basali milende ndenge nini, bana mosusu batikaka Yehova, ndenge Salomo, moto oyo akomi vɛrsɛ oyo tozali kotalela asalaki. Ata Yehova azalaki na bana oyo batiká ye.

Na yango, vɛrsɛ oyo elimboli te ete soki mwana abɔkɔlami malamu “akopɛngwa na yango te,” kasi elimboli nde ete mbala mingi ezalaka bongo. Oyo nde libɔndisi mpo na baboti! Baboti basengeli kolendisama na koyeba ete milende oyo bazali kosala mpo na koteya bana na bango na nzela ya Yehova ekobota mbuma malamu. Lokola mokumba ya baboti ezali na ntina mingi, balendisami ete bázwa yango na lisɛki te.​—Deteronome 6:6, 7.

Ata soki bana na bango batiki kosalela Yehova, baboti oyo bateyaki bana na bango malamu bazalaka na elikya ete bana yango bakozonga na nzela. Mateya ya Biblia ezali na nguya mpe bana babosanaka noki te mateya oyo baboti bateyaki bango.​—Nzembo 19:7.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto