Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/6 nk. 3-4
  • Mitinda ezali se kobongwana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mitinda ezali se kobongwana
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Masolo mosusu
  • Bizaleli malamu
    Lamuká!—2019
  • 7 Komonisa bizaleli malamu
    Lamuká!—2018
  • Mitinda oyo esilaka ngala te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Bizaleli oyo ebongisaka mpenza bomoi
    Lamuká!—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/6 nk. 3-4

Mitinda ezali se kobongwana

BATO balobaka ete Diogène, moto moko ya mayele oyo azalaki kofanda na Atene na siɛklɛ ya minei liboso ya ntango na biso, azalaki kotambola na moi makasi ná mwinda na mabɔkɔ mpo na koluka moto oyo azali na bizaleli ya malamu; kasi amonaki ye te.

Eyebani te soki likambo yango ezali solo. Nzokande, soki Diogène azalaki na bomoi lelo oyo, alingaki kobakisa lisusu milende mpo na koluka bato oyo bazali na bizaleli ya malamu. Emonanaka ete bato mingi baboyaka kondima ete moto nyonso asengeli kolanda mitinda ya bizaleli malamu oyo etyami. Mbala na mbala, bazulunalo, radio, mpe televizyo elobelaka makambo ya mabe oyo ezali kosalema na bandako, na guvɛrnema, na bakompanyi, na masano, na makambo ya mombongo, mpe na makambo mosusu. Lelo oyo bato bazali lisusu kolanda te mitinda mingi oyo kala ezalaki kotalelama lokola mitinda ya malamu. Mibeko mingi ezali kobongolama mpe mbala mingi ezali kolongolama. Mibeko mosusu bato basepelaka kaka kotánga yango kasi basalelaka yango te.

Alan Wolfe, moto ya mayele na makambo ya mangomba alobaki ete, “eleko oyo bato nyonso bazalaki na mitinda ndenge moko esilá koleka.” Alobaki lisusu boye: “Lelo oyo, koleka na eleko mosusu nyonso, bato bazali koboya mimeseno ya kala mpe bibongiseli ezali kokwea.” Mpo na mbula 100 oyo euti koleka, zulunalo moko (Los Angeles Times) elobelaki makanisi ya filozofe Jonathan Glover, oyo amonisaki ete mobulu ebakisami mingi lelo mpo mangomba ezali kokwea mpe mibeko oyo bato nyonso basengeli kotosa ezali lisusu te.

Nzokande, atako ezali koyebana te mitinda nini bato nyonso basengeli kolanda, bato mosusu batiki te koluka mitinda ya malamu. Eleki mwa bambula, Federico Mayor, mokambi ya kala ya UNESCO, alobaki ete “lelo oyo, koleka na eleko mosusu nyonso, bato na mokili mobimba basengeli mpenza koluka mitinda ya malamu.” Kasi, lokola bato ya mokili bazali kolonga te kozwa mitinda oyo ebongi, elimboli te ete mitinda ya malamu oyo bato bakoki mpe basengeli kolanda ezali te.

Emonani ete ezali mpasi mpo bato nyonso ya mokili báyokana na mitinda oyo bango nyonso basengeli kolanda. Na yango, soki bato bazali na makanisi ekeseni na oyo etali mitinda ya malamu mpe ya mabe, ndenge nini moto akoki koyeba etinda oyo asengeli kolanda? Bato mingi lelo oyo bakómi komityela bango moko mitinda ya bizaleli malamu oyo basengeli kolanda. Nzokande, okoki komona yo moko ete ezaleli yango ebongisi bizaleli ya bato te.

Paul Johnson, mwana-mboka Angleterre mpe moto ya mayele na masolo ya kala, andimi mpenza ete ezaleli oyo bato bakómi na yango ya komityela bango moko mitinda oyo basengeli kolanda ‘elongoli . . . bango mokumba ya komiyoka ete basengeli kotosa mitinda ya malamu oyo emonani polele ete yango nde ebongi,’ likambo oyo ezalaki komonana epai ya bato tii na ebandeli ya bambula ya 1900.

Na yango, bato bakoki mpenza kozala na “mitinda ya malamu oyo emonani polele ete yango nde ebongi”? Na maloba mosusu, bato ya mokili mobimba bakoki kozala na mibeko kaka moko oyo basengeli kotosa? Ezali nde na mokonzi moko oyo akoki kopesa mibeko oyo esilaka ngala te, ebongwanaka te, oyo ekoki kosalisa biso tózala na bomoi ya malamu mpe ekoki kopesa biso elikya mpo na mikolo ezali koya? Lisolo oyo elandi ekoyanola mituna yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto