Nini ekoki kosalisa bato ya bikólo nyonso báyokana?
NA Espagne, alibitrɛ moko akati lisano ya ndembo. Mpo na nini? Mpamba te batali ebele mpenza bazali kofinga mosani moko oyo azali moto ya Cameroun mpe mosani yango asɛngi abima. Na Russie, bato bakómi konyokola mpambampamba bato ya Afrika, ya Azia mpe ya Amerika ya Sudi. Banda na mobu 2004 tii na mobu 2005, makambo yango esalemaki mingi, mbala 394. Na ankɛtɛ moko oyo esalemaki na Grande-Bretagne, bato mingi ya Azia mpe ya Afrika balobaki ete balongolaki bango na mosala mpo bazalaki bato ya bikólo mosusu. Bandakisa wana emonisi ete likambo yango ekómi kosalema na mokili mobimba.
Bato banyokolaka bato ya bikólo mosusu na ndenge ekeseni: Bafingaka bango, batyolaka bango to babomaka bango na mokano ya kosilisa bango nyonso. Nini etindaka bato báyina bato ya bikólo mosusu? Nini ekoki kopekisa biso tóyinaka bato ya bikólo mosusu? Tokoki kolikya ete mokolo mosusu bato ya bikólo nyonso bakofanda esika moko mpe na kimya? Biblia epesi biyano ya polele na mituna wana.
Bazali Konyokola mpe koyina basusu
Biblia elobi ete: “Makanisi ya motema ya moto ezali mabe longwa na bolenge na ye.” (Genese 8:21) Yango wana, bato mosusu bayokaka esengo ntango bazali konyokola basusu. Biblia elobi lisusu ete: “Talá, mpisoli ya banyokolami mpe moko azali te mpo na kobɔndisa bango. Epai ya banyokoli na bango nguya ezali.”—Mosakoli 4:1.
Biblia emonisi mpe ete koyina bato ya bikólo mosusu ebandá kala. Na ndakisa, mbula koleka 3 000, Falo moko ya Ezipito abengaki Yakobo oyo azalaki Moebele ná libota na ye báya kofanda na Ezipito. Nzokande na nsima, Falo mosusu akómaki kobanga bango mpo balekaki ebele. Na yango, “alobelaki bato na ye ete, Talá, bato ya Yisalaele baleki biso na mituya mpe na nguya. Yaká, tósalela bango na mayele ete báfuluka te. . . . Yango wana batyaki bakapita liboso na bango mpo na konyokola bango na mikumba bozito.” (Exode 1:9-11) Bato ya Ezipito basɛngaki kutu ete báboma mwana nyonso ya mobali oyo akobotama na libota ya Yakobo.—Exode 1:15, 16.
Nini etindaka bato báyinana?
Mangomba ya mokili ezali kosala mpenza eloko te mpo na kopekisa bato báyinana. Atako bato mosusu basalaka makasi mpo na kopekisa bato bányokola bato ya bikólo mosusu, mangomba ezalaka mbala mingi na ngambo ya baoyo bazali konyokola basusu. Likambo yango esalemaki na États-Unis, epai babimisaki ebele ya mibeko mpo na koyanta baindo mpe tii na 1967 mibeko ezalaki kopekisa bango bábala bato ya bikólo mosusu. Ezalaki mpe bongo na Afrika ya Sudi na ntango ya apartheid. Mindɛlɛ oyo bazalaki moke, babimisaki mibeko mpo na konyata baindo. Moko ya mibeko yango ezalaki kopekisa bato bakeseni mposo bábalana. Na bandakisa nyonso oyo tolobeli, baoyo bazalaki konyokola basusu bazalaki mpenza bato oyo bamipesá na losambo.
Nzokande, Biblia ezali komonisa polele ntina mpenza oyo bato bayinaka bato ya bikólo mosusu. Ezali kolimbola mpo na nini bato mosusu banyokolaka bato ya bikólo mosusu. Biblia elobi boye: “Moto oyo alingaka te ayebi Nzambe te, mpamba te Nzambe azali bolingo. Soki moto azali koloba ete: ‘Nalingaka Nzambe,’ nzokande azali koyina ndeko na ye, azali moto ya lokuta. Mpo moto oyo azali kolinga ndeko na ye te, oyo ye amoni, akoki te kolinga Nzambe, oyo ye amoni te.” (1 Yoane 4:8, 20) Maloba oyo emonisi ntina mpenza oyo bato bayinaka bato ya bikólo mosusu. Ezala basambelaka to basambelaka te, bato bayinaka bato ya bikólo mosusu mpamba te bayebi Nzambe te to balingaka ye te.
Boyebi ya Nzambe esangisaka bato ya bikólo nyonso
Ndenge nini koyeba mpe kolinga Nzambe esangisaka bato ya bikólo nyonso? Mateya nini ya Biblia epekisaka bato bányokola bato oyo bakeseni na bango? Biblia ezali komonisa ete Yehova azali Tata ya bato nyonso. Elobi boye: “Mpo na biso ezali mpenza na Nzambe kaka moko Tata, oyo uta na ye biloko nyonso ezali.” (1 Bakolinti 8:6) Ebakisi boye: “Asalaki uta na moto moko bikólo nyonso ya bato.” (Misala 17:26) Na yango, bato nyonso bazali bandeko.
Bato ya bikólo nyonso basengeli kosepela ete bakelamá na Nzambe, kasi bango nyonso basengeli koyoka mawa mpo na likambo moko oyo bankɔkɔ na bango basalá. Paulo, oyo akomaki mpe Biblia alobaki boye: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko,” yango wana “bato nyonso basali lisumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe.” (Baloma 3:23; 5:12) Yehova asalá biloko ndenge na ndenge. Ezali te na bikelamu mibale oyo ekokani na makambo nyonso. Nzokande, apesi bato ya ekólo moko te nzela bákanisa ete baleki bato ya bikólo mosusu. Likanisi oyo bato mingi bazalaka na yango ete ekólo na bango nde eleki bikólo mosusu eyokani te na oyo Makomami elobi. Na maloba ya polele, boyebi ya Nzambe esangisaka bato ya bikólo nyonso.
Nzambe amibanzabanzaka mpo na bato ya bikólo nyonso
Bato mosusu bakanisaka ete Nzambe alendisaki koyinana na kati ya bikólo na ndenge aponaki Bayisalaele mpe asɛngaki bango bákabwana na bikólo mosusu. (Exode 34:12) Na eleko moko boye, Nzambe aponaki ekólo ya Yisalaele lokola eloko na ye mpenza mpamba te nkɔkɔ na bango Abalayama azalaki na kondima makasi. Nzambe ye moko nde azalaki kotambwisa Yisalaele ya kala; koponela bango bakonzi mpe kopesa bango mibeko. Na ntango nyonso oyo Bayisalaele bazalaki kondima kotambwisama na Yehova, bikólo mosusu bazalaki komona mpenza ete boyangeli ya Yehova eleki oyo ya bato. Yehova ateyaki mpe Bayisalaele ya kala ete esengelaki mbeka epesama mpo na kozongisa boyokani kati na bato ná Nzambe. Yango wana, makambo oyo Yehova azalaki kosalela Bayisalaele ememaki matomba mpo na bato ya bikólo nyonso. Yango eyokanaki na oyo Yehova ayebisaki Abalayama ete: “Na nzela ya momboto na yo bikólo nyonso ya mokili ekozwa lipamboli mpo otosaki maloba na ngai.”—Genese 22:18, NW.
Lisusu, Bayuda bazalaki na libaku malamu ya kozwa maloba mosantu ya Nzambe mpe bazalaki libota oyo na nzela na yango Masiya abotamaki. Kasi nyonso wana ezalaki mpe mpo na bolamu ya bikólo mosusu. Makomami ya Liebele oyo Yehova apesaki Bayuda ezali kolobela ntango oyo bikólo nyonso bakozwa mapamboli ebele. Elobi boye: “Mabota mingi bakokende mpe bakoloba ete, Yakani, tóbuta na ngomba ya [Yehova], epai ya ndako ya Nzambe ya Yakobo, ete alakisa biso nzela na ye . . . Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te. Bakofanda mpe na nse, moto na moto na nse ya [nzete na ye na vinyo, NW] mpe ya nzete na ye ya [figi, NW], moto moko akobangisa bango te.”—Mika 4:2-4.
Atako Yesu Klisto asakwelaki Bayuda, alobaki lisusu boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Ekólo ata moko te ekozanga koyoka nsango malamu. Na yango, Yehova azali ndakisa oyo eleki malamu mpo na oyo etali kozanga kopona bilongi. “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala boyengebene andimami na ye.”—Misala 10:34, 35.
Mibeko oyo Nzambe apesaki libota ya Yisalaele ya kala ezali komonisa mpe ete amibanzabanzaka mpo na bikólo nyonso. Yoká makambo oyo mobeko ezalaki kosɛnga Bayisalaele básalela bato oyo bazalaki bapaya: “Mopaya oyo afandi epai na bino akozala lokola moto abotami kati na bino, mpe okolinga ye lokola yo mpenza, mpo ete bino bozalaki bapaya na mokili ya Ezipito.” (Levitike 19:34) Mibeko mingi oyo Nzambe apesaki Bayisalaele ezalaki koteya bango bázala na boboto epai ya bapaya. Yango wana, ntango Boaza, oyo azalaki mpe nkɔkɔ ya Yesu, amonaki mwasi moko oyo azalaki mobola mpe mopaya azali kolɔkɔta biloko na bilanga, asalaki ndenge mobeko ya Nzambe ezalaki kosɛnga. Ayebisaki babuki-mbuma na ye bátikela mwasi yango mbuma ebele mpo alɔkɔta.—Luta 2:1, 10, 16.
Yesu azali ndakisa ya boboto
Yesu amonisaki boyebi ya Nzambe koleka bato nyonso. Alakisaki bayekoli na ye ndenge ya kozala na boboto epai ya bato oyo bakeseni na bango. Mokolo moko, Yesu abandaki lisolo ná mwasi moko Mosamalia. Mwasi yango akamwaki mpamba te Bayuda mingi bazalaki komona Basamalia mpamba. Na lisolo na bango, Yesu asalisaki ye na boboto nyonso ayeba nini asengeli kosala mpo azwa bomoi ya seko.—Yoane 4:7-14.
Yesu ateyaki biso mpe ndenge ya kotalela bato ya bikólo mosusu ntango apesaki ndakisa ya Mosamalia moko ya boboto. Mobali yango amonaki Moyuda moko oyo miyibi bazokisaki mabe mpenza. Mosamalia wana akokaki koloba: ‘Mpo na nini nasalisa Moyuda? Bayuda bamonaka biso mpamba.’ Nzokande, Yesu amonisaki na ndakisa yango ete Mosamalia azalaki kotalela bato oyo ayebi te ndenge mosusu. Atako bato mosusu oyo balekaki wana bakipaki moto yango oyo azokaki te, Mosamalia yango ‘ayokelaki ye mawa’ mpe asalisaki ye mpenza. Na nsuka ya ndakisa yango, Yesu amonisaki ete moto nyonso oyo alingi kosepelisa Nzambe asengeli mpe kosala bongo.—Luka 10:30-37.
Ntoma Paulo ateyaki ete baoyo balingi kosepelisa Nzambe basengeli kobongola bomoto na bango mpe kotalelaka bato ndenge Nzambe atalelaka bango. Paulo akómaki boye: “Bólongola bomoto ya kala elongo na misala na yango, mpe bólata bomoto ya sika, oyo na nzela ya boyebi ya solosolo ezali kokómisama sika engebene elilingi ya Oyo azalisaki yango, epai kuna Mogrɛki azali te Moyuda mpe te, kokatama ngenga ezali te kozanga kokatama ngenga mpe te, mopaya azali te, Mosikitia te . . . Kasi, longola makambo nyonso wana, bólata bolingo, mpo yango ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.”—Bakolose 3:9-14.
Boyebi ya Nzambe ebongolaka bato?
Boyebi ya Yehova ebongolaka mpenza ndenge oyo bato mosusu batalelaka bato ya bikólo mosusu? Tózwa ndakisa ya mwasi moko ya Azia oyo akóma kofanda na Canada. Mwasi yango azalaki komitungisa na ndenge bazalaki kolinga ye te mpo azali mopaya. Akutanaki na Batatoli ya Yehova mpe abandaki koyekola Biblia ná bango. Na nsima, akomelaki bango mokanda ya botɔndi mpe alobaki boye: ‘Bozali mindɛlɛ ya malamu mpe ya boboto. Ntango namonaki ete bokeseni mpenza na mindɛlɛ mosusu, namitunaki soki bozali bongo mpo na nini. Nsima ya kokanisa malamumalamu, nayaki komona ete bozali Batatoli ya Yehova. Esengeli kozala na eloko moko na kati na Biblia oyo ekómisá bino bongo. Namonaki na makita na bino ebele ya bato ya mposo ndenge na ndenge, oyo mitema na bango nyonso ezalaki na langi moko, mpamba te bazali bandeko. Sikoyo nayebi nani akómisá bango bongo. Ezali Nzambe na bino.’
Liloba ya Nzambe esakolaki ntango moko oyo “mokili ekotonda na boyebi ya [Yehova].” (Yisaya 11:9) Ata sikoyo, ndenge Biblia esakolaki yango, bamilio ya bato oyo “bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso” bazali koyanganisama na losambo ya solo. (Emoniseli 7:9) Bazali kozela komona ndenge bato ya mokili mobimba bakobanda kolingana na esika ya koyinana, na boyokani na elaka oyo Yehova apesaki Abalayama ete: “Mabota nyonso ya mabelé ekopambolama.”—Misala 3:25.
[Elilingi na lokasa 4]
Mobeko ya Nzambe eteyaki Bayisalaele kolinga bapaya
[Elilingi na lokasa 5]
Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Mosamalia ya boboto?
[Bililingi na lokasa 6]
Nzambe apesi bato ya ekólo moko te nzela bákanisa ete baleki bato ya bikólo mosusu