Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/9 nk. 22-25
  • Nazali na esengo na bondeko ya solo ya mokili mobimba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nazali na esengo na bondeko ya solo ya mokili mobimba
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bokɔti kati na libota ya bondeko
  • Bokóli ya mosala ya ntango nyonso
  • Komekama mpo na bondeko na biso
  • Bandeko ya sembo na Ethiopie
  • Bolingí ekólo elóngami
  • Tozali na esengo mpo na bondeko na biso
  • Nini ekoki kosalisa bato ya bikólo nyonso báyokana?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Namoni boyokani ya mposo kati na mboka Afrique du Sud oyo ekabwani
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Bomoi ya malamu mpenza na mosala ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • ‘Tólinga lisangá mobimba ya bandeko’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/9 nk. 22-25

Nazali na esengo na bondeko ya solo ya mokili mobimba

LISOLÓ YA WILLIE DAVIS

Na 1934 Kokwea Monene ya nkita ezalaki konyokola mokili, mpe Etats-Unis ezalaki kati na yikiyiki ya mikakatano ya nkita. Na libándá na Prospect Relief Station (Esika ya kopesa Lisungi) na engumba Cleveland, na etúká ya Ohio, polisi moko mpe moto moko ya ba communistes bazalaki kobunda. Polisi abɛtaki mondóki mpe abomaki moto wana ya ba communistes elongo na moto mosusu oyo atelemaki wana pembeni, oyo azalaki bongo nkɔ́kɔ na ngai ya mwasi, Vinnie Williams.

BA COMMUNISTES balukaki kobongola kufa wana na matáta matali bokaboli mposo, mpo ete nkɔ́kɔ na ngai azalaki Moindo mpe polisi azalaki Mondɛlɛ. Bakabolaki nkóma ya kopanza nsango oyo ezalaki na mitó ya makambo “Bapolisi ya Cleveland bazali kokabola mposo” mpe “Bóbékola kufa ya bato wana.” Ba Communistes babongisaki mpe bakamataki makambo ya bokundi ya nkɔ́kɔ na ngai ya mwasi. Nazali naino na fɔtɔ́ ya bamemi sanduku ya ebembe​—bango banso Mindɛlɛ mpe bato na lingomba ya communiste. Nyonso bakangaki likofi litombwani likoló, na lolenge oyo ekamatamaki nsima lokola elembo ya lingomba ebéngami Black Power (Nguya ya Baindo).

Ntango nkɔ́kɔ na ngai ya mwasi akufaki, ngai nazalaki na libumu ya mwana na ye ya mwasi, mpe nabotamaki sanza minei na nsima. Nakólaki na likukuma. Nazalaki kokoka koloba te kozanga kokukuma, na yango ebandeli ya eteyelo na ngai esangisaki ebongiseli mpo na kolónga mikakatano ya koloba.

Baboti na ngai bakabwanaki ntango nazalaki na mibu mitano, mpe yaya na ngai ya mwasi mpe ngai tobɔkwamaki na mama na biso. Ntango nakómaki na mibu zomi, nabandaki koteka ndunda nsima ya eteyelo mpo na kosunga libota na ngai. Mbula mibale na nsima nakómaki kosala liboso mpe nsima ya eteyelo, ngai nde nasengelaki mpenza kosunga libota na biso na mosolo. Ntango mama akɔtaki lopitalo mpe esɛngaki ete básala ye lipasó mbala mingi, natikaki kelasi mpe nabandaki kosala mosala mokolo mobimba.

Bokɔti kati na libota ya bondeko

Na 1944, mobali moko Motatoli ya Yehova atikelaki mwasi ya ndeko na biso búku “La vérité vous affranchira,” (Solo ekosikola bino) mpe nabandaki kosangana na boyekoli ya Biblia oyo efungwamaki elongo na ye. Bobele na mbula wana, nabandaki kosangana na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi na lisangá ya Eastside. Molakisi ya Eteyelo, Albert Cradock, akutanaki na mikakatano lolenge moko na ngai, kasi ayekolaki kolónga yango. Yango ezalaki solo elendiseli mpo na ngai!

Na kartyé na biso ntalo monene ya bato bazalaki ba Italiens, Polonais, Hongrois, mpe Bayuda, mpe lisangá lisangisaki bato oyo bautaki na bikólo yango mpe bato ya bikólo mosusu. Mwasi ya ndeko na ngai mpe ngai tozalaki bato ya liboso kati na ba Américains ya loposo moindo na kosangana na lisangá oyo lizalaki bobele na Mindɛlɛ, kasi Batatoli bamonisaki ezaleli ya bokaboli mposo te epai na biso. Bazalaki kobyanga ngai mbala na mbala mpo na kolya na bandako na bango.

Na mobu 1956, nakendeki na súdi ya Etats-Unis epai mposa ya basakoli ezalaki mingi. Ntango nazongaki na nɔ́rdi na eleko ya molungé mpo na liyangani ya etúká, bandeko mingi ya Cleveland bayaki kotala ngai mpe bamonisaki bosepeli monene mpo na mosala na ngai. Komibanzabanza na bango eteyaki ngai likambo moko ya ntina mingi: Ntango nyonso kotala “moto na moto, bobɛlɛ makambo na ye moko tɛ, kasi makambo na bamosusu lokola.”​—Bafilipi 2:4.

Bokóli ya mosala ya ntango nyonso

Nsima ya kosala mibu misato na mosala ya kosakola lokola mobongisi-nzela, na Novɛ́mbɛ 1959, nabyangamaki mpo na mosala na Betele ya Brooklyn, biro monene ya mosala ya Batatoli ya Yehova na New York. Batyaki ngai na esika ya kotinda mikanda na masangá. Mokɛngɛli ya mosala na ngai, Klaus Jensen, mpe moninga na ngai ya ndako ya kolala William Hannan, bango nyonso Mindɛlɛ, bakómaki batata na ngai ya elimo. Bango nyonso basilaki koumela mibu 40 na Betele ntango nakómaki.

Na ebandeli ya bambula 1960, libota ya Betele lizalaki na basangani soko 600, mpe kati na bango penepene 20 bazalaki ba Américains ya loposo moindo. Na ntango wana, matáta matali mposo, mpe kozanga boyokani kati na bato bakeseni mposo ezalaki makasi na Etats-Unis. Nzokande, Biblia ezali koteya ete “Nzambe akokabolaka bato tɛ,” biso mpe tosengeli te kosala yango. (Misala 10:34, 35) Masoló ya elimo oyo tozalaki kolanda ntɔ́ngɔ́ nyonso na mesa ya Betele malendisaki ekateli na biso ya kondima likanisi ya Nzambe na ntina na makambo motindo yango.​—Nzembo 19:7.

Wana nazalaki kosala na Betele ya Brooklyn nakutanaki na Lois Ruffin, mobongisi-nzela ya engumba Richmond, na etúká ya Virginie, mpe tobalanaki na 1964. Tozalaki na ekateli ya kotikala na mosala ya ntango nyonso, na yango nsima na libala na biso tozongaki na súdi ya Etats-Unis. Na ebandeli tosalaki lokola babongisi-nzela monene, mpe na nsima na 1965, nazwaki libyangi ya kobanda mosala ya zongazonga. Na boumeli ya mibu zomi oyo milandaki, totalaki masangá na bitúká ya Kentucky, ya Texas, ya Louisiana, ya Alabama, ya Géorgie, ya Caroline ya nɔ́rdi mpe ya Mississippi.

Komekama mpo na bondeko na biso

Mibu wana mizalaki na mbongwana monene. Liboso ete tókende na Súdi, bokaboli mposo esilaki kobanda. Baindo bapekisamaki na mibeko kokende na biteyelo esika moko na Mindɛlɛ, kolya esika moko, kolala na lotɛ́lɛ moko, kokɔta elongo kati na bamagazini, to ata komela na lizíba moko ya mai. Kasi na mobu 1964, Congrès ya Etats-Unis ebimisaki mibeko mitali lotómo ya bato, yango epekisaki bokaboli mposo na bisika mpe na mituka ya bato nyonso. Bongo moboko ya mibeko mozalaki lisusu te mpo na bokaboli mposo.

Na yango, motuna monene mozalaki oyo ete, Bandeko mibali mpe basi kati na masangá ya Baindo mpe masangá ya Mindɛlɛ, bakosangana elongo mpe bakomonisa bolingo mpe bolingo ya motema moko epai na mosusu to bopusi ya bituluku mpe ya maoki oyo ekɔti uta kala ekopekisa bango na koboya kosangana? Ezalaki ntembe mpo na kolanda lilako oyo ya Makomami: “Mpɔ na bolingo [ya motema mpo na bandeko, NW] bolinganaka; mpɔ na lokumu, bokumisanaka.”​—Baloma 12:10.

Kobanda kala, likanisi oyo lipalanganaki mpenza, mingimingi na súdi, lizalaki ete Baindo bakókani na Mindɛlɛ te. Likanisi yango likɔtisamaki makasi epai na bato, lizalaki bisika nyonso, ata kati na mangomba. Yango wana ezalaki pɛtɛɛ te mpo na Mindɛlɛ mosusu na kotalela Baindo lokola bakokani na bango. Ya solo, yango ezalaki ntango ya komekama mpo na libota ya bondeko na biso—​mpo na Baindo to mpo na Mindɛlɛ.

Na esengo nyonso, bandeko mingi bandimaki na nsáí monene likambo ya kosangisama ya mposo kati na masangá na biso. Makanisi ya kotalela ete bato na loposo boye baleki basusu, oyo makɔtisamaki na boumeli ya bikeke mingi makokaki te kosila nokinoki. Nzokande ntango bosangisami ebandaki, bandeko na biso bandimaki yango kozanga nkaká, mingi kati na bango basepelaki na libaku ya koyangana elongo.

Likambo ya kokamwa, ata bato oyo bazalaki Batatoli te bandimaki bosangani ya mposo ya masangá na biso. Na ndakisa, na engumba Lanett, na etúká ya Alabama, batunaki baninga ya pembeni oyo bafandaki pembeni na Ndako ya Bokonzi soki bazalaki kosepela te ete Baindo báya na makita. Mwasi moko mobangé Mondɛlɛ apesaki ndeko mobali moko Moindo mbote na maboko mpe alobaki ete: “Yaká awa na kartyé na biso mpe sambelá Nzambe na yo lokola olingi!”

Bandeko ya sembo na Ethiopie

Na mobu 1974 tosepelaki mingi kolanda mateya ya kobongisama ya bamisionere na boumeli ya basanza mitano na ndambo na Galadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower na engumba New York. Na nsima totindamaki na Ethiopie, mboka moko ya Afrika. Mokonzi Haile Selassie, autaki kolongolama mpe kotyama na ndako ya bakangami. Lokola mosala na biso mozalaki na nsé ya bipekiseli, tosepelaki mingi na boyokani ya esengo kati na libota na biso ya bondeko ya boklisto.

Tofandaki mpe tosalaki mosala elongo na bandeko mingi oyo na nsima batindamaki na bolɔ́kɔ mpo na bokangami na bango na losambo ya boklisto. Nkutu basusu kati na baninga na biso wana ya motema babomamaki. Adera Teshome azalaki moninga na ngai, nkulutu na lisangá moko ya Addis Abeba, mboka-mokonzi ya Ethiopie.a Nsima na mibu misato ya bokangami, abomamaki. Ya solo, mwasi na ye azalaki na mawa mingi. Nsima na mibu mingi, ezalaki esengo komona ye na nsáí monene wana azali kosala lokola mobongisi-nzela!

Worku Abebe, ndeko mosusu ya sembo, akatamelaki etumbu ya kufa mbala mwambe.b Kasi abangaki soko moke te! Ntango namonaki ye mpo na mbala ya nsuka, alakisaki ngai matoi na ye oyo bakɛngɛli ya bolɔ́kɔ babebisaki na kolóso ya mindóki na bango. Alobaki kati na masɛki ete azalaki kolya kolóso ya mindóki na ntɔ́ngɔ́, na midi mpe na mpokwa. Atako asili sikawa kokufa, bandeko bazali naino kokanisa ye na bolingo nyonso.

Ndeko mosusu oyo nakanisaka na bolingo mingi ezali Hailu Yemiru.c Apesaki ndakisa ya bolingo mpo na mwasi na ye. Mwasi na ye akangamaki, kasi lokola azalaki na zemi mpe mosika te asengelaki kobota, Hailu asɛngaki na bakambi ya bolɔ́kɔ ete akamata esika na ye kati na bolɔ́kɔ. Na nsima, lokola alingaki te koangana kondima na ye, abomamaki.​—Yoane 15:12, 13; Baefese 5:28.

Na ntina na kobeba ya makambo ya politiki na Ethiopie, tokendeki na Kenya na 1976. Na boumeli ya mibu nsambo tozalaki kati na mosala ya zongazonga, kotaláká bandeko na mikili mingi ya Afrika ya Ɛ́sti​—lokola Kenya, Ethiopie, Soudan, Seychelles, Ouganda, mpe Tanzanie. Nasalaki mpe mibembo na Burundi mpe na Rwanda na mabaku mingi lokola moko na batindami mpo na kosolola elongo na bakonzi na ntina na kondimama ya mosala na biso na Leta ya bamboka wana.

Ezalaki esengo kozonga na Ethiopie na Yanuáli 1992 mpo na koyangana na liyangani ya etúká ya liboso oyo esalemaki nsima ya kolongolama ya bipekiseli likoló na mosala na biso. Ntalo monene ya bayangani koleka 7 000 bayebanaki te, mpamba te liboso bandeko bazalaki koyangana bobele na bituluku ya mike. Mokolo nyonso ya liyangani, ntalo monene ya bandeko bazalaki koya ngonga mibale liboso na ebandeli ya pologalámi mpe bazalaki kotikala kino na butu, mpo na kosepela na bolingo na bondeko na biso.

Bolingí ekólo elóngami

Na boumeli ya bikeke mingi bolingí ekólo ekólaki mingi na Afrika. Na ndakisa, na Burundi mpe na Rwanda, bikólo minene, ba Hutu mpe ba Tutsi, bazali koyinana kobanda kala. Kobanda mboka yango ezwaki lipandá na yango na mabɔkɔ ya Belgique na 1962, basangani ya bikólo mibale wana bazali kobomana mbala na mbala, mpe na motuya ya bankóto mingi. Nzokande, oyo nde esengo monene na komona basangani ya bikólo yango baoyo basili kokóma Batatoli ya Yehova kosala esika moko kati na kimya! Bolingo ya solosolo oyo bazali komonisa moko epai na mosusu esili kolendisa bato mosusu mingi na kondima solo ya Biblia.

Bobele bongo, bikólo ya Kenya bizalaki mpe na matáta kati na yango. Oyo nde kokesena kati na bondeko ya boklisto na libota ya Yehova na Kenya! Okoki komona bato na bikólo bikeseni kosambela kati na bomoko na Bandako ya Bokonzi. Ezalaki mpo na ngai esengo na komona mingi kati na bango kotika koyinana oyo euti na bolingí ekólo mpe komonisa bolingo ya solosolo mpo na bandeko mibali mpe basi ya bikólo mosusu.

Tozali na esengo mpo na bondeko na biso

Soki nakanisi mibu koleka 50 ya bosangani elongo na ebongiseli ya Nzambe, botɔ́ndi mpo na Yehova mpe Mwana na ye, Yesu Klisto, ezali kotondisa motema na ngai. Ezali solo likambo ya kokamwa na komona oyo basili kobimisa awa na mabelé! Nzokande, makambo mazalaki ntango nyonso esengo te kati na libota ya Nzambe, motindo moko mpe yango ezali lelo oyo. Kasi tosengeli te komizela na komona ete bikeke mingi ya mateya ya bokaboli mposo ya mokili oyo ya Satana ekoka kosila nokinoki. Tozali naino bato na kozanga kokoka.​—Nzembo 51:5.

Soki nakokanisi ebongiseli ya Yehova na mokili oyo, motema na ngai mozali kotonda na bosepeli, mpo na bondeko na biso ya solosolo kati na mokili mobimba. Nazali naino kokanisa na bolingo nyonso bandeko ya Cleveland, bango nyonso Mindɛlɛ, baoyo baleisaki ngai kati na solo. Mpe wana namonaki bandeko na biso na súdi ya Etas-Unis, Mindɛlɛ mpe Baindo, kokitanisa makanisi mabe na bango na bolingo ya motema mpo na bandeko, motema na ngai motondaki na esengo. Na nsima, kokende na Afrika mpe komona lolenge Liloba ya Yehova likoki kosilisa koyinana euti na bikólo epesaki ngai libaku ya kosepela mingi na bondeko na biso ya mokili mobimba.

Ya solo, mokonzi Davidi ya ntango na kala alimbolaki yango malamu wana alobaki ete: “Tala lokola ejali malamu mpe na esɛngɔ sɔkɔ bandeko bakojalana na motema mɔkɔ!”​—Njembo 133:1.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bafɔtɔ́ ya Adera Teshome mpe Hailu Yemiru ezwami na lokasa 177 ya Annuaire des Témoins de Jéhovah 1992; makambo Worku Abebe akutanaki na yango mayebisami na nkasa 178-181.

b Bafɔtɔ́ ya Adera Teshome mpe Hailu Yemiru ezwami na lokasa 177 ya Annuaire des Témoins de Jéhovah 1992; makambo Worku Abebe akutanaki na yango mayebisami na nkasa 178-181.

c Bafɔtɔ́ ya Adera Teshome mpe Hailu Yemiru ezwami na lokasa 177 ya Annuaire des Témoins de Jéhovah 1992; makambo Worku Abebe akutanaki na yango mayebisami na nkasa 178-181.

[Elilingi na lokasa 23]

Bokundi ya nkɔ́kɔ na ngai ya mwasi

[Elilingi na lokasa 24]

Batatoli Tutsi mpe Hutu bazali kosala esika moko kati na kimya

[Elilingi na lokasa 25]

Elongo na mwasi na ngai, Lois

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto