Mateya ya Biblia elendisaka kondima
MOKO ya bana-kelasi ya mbala ya 122 ya Gileadi, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia alobaki mokolo oyo bapesaki bango badiplome na bango boye: “Oyo nde libaku malamu ya kolekisa sanza mitano ya kolanda na likebi makanisi ya Mozalisi na biso mpe koyekola kotalela makambo ndenge ye atalelaka yango!” Bana-kelasi 56 oyo basengelaki kokende kobanda mosala ya misionɛrɛ na mikili 26 epai batindaki bango bakobosana te mwa 10 Marsi 2007.
Nsima ya kotombela boyei malamu na bayangani 6 205, ndeko Theodore Jaracz, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alobaki ete: “Tondimi mpenza ete na nsima ya likita oyo, bokolendisama mpenza na elimo mpe kondima na bino ekokóma makasi.” Atángaki bandeko minei oyo bakopesa bana-kelasi bilendiseli ya Biblia mpe batoli oyo ekosalisa bango bákokisa mosala na bango ya bamisionɛrɛ malamu.
Balendisi bana-kelasi bálendisaka kondima ya basusu
Leon Weaver, oyo azali na komite ya filiale ya États-Unis, asalaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo: “Bókoba kosala oyo ezali malamu.” Akundwelaki bana-kelasi ete mokomoko na bango alekisaki na mwayene mbula 13 na mosala ya ntango nyonso, mosala oyo elendisaka kondima. Alobaki boye: “Mosala yango ezali malamu mingi, mpamba te ezali kobikisa bomoi ya bato, mpe likambo eleki ntina ezali ete mosala yango ezali kokumisa Tata na biso ya likoló, Yehova.” Na nsima, ndeko Weaver alendisaki bana-kelasi bákoba “kolona mpo na elimo,” mpe ‘bátika te kosala oyo ezali malamu.’—Bagalatia 6:8, 9.
Ndeko David Splane, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, akundwelaki bango makambo mingi ya ntina na lisolo na ye oyo ezalaki na motó ya likambo: “Salá makasi obanda mosala na yo na ndenge ya malamu.” Ndeko Splane alendisaki bamisionɛrɛ yango ya sika ete mpo na kobanda mosala na bango na ndenge ya malamu na bisika batindi bango, basengeli kosala makambo oyo: “Bázalaka ntango nyonso na makanisi ya malamu. Báwelaka te kozwa bikateli. Básɛkaka. Bámonaka kaka te mabunga ya basusu. Bámikitisaka mpe bámemyaka bandeko ya masangá oyo batindi bango.” Na nsima abakisaki boye: “Ntango bokokita na mpɛpɔ, bósala makasi bóbanda mosala na bino na ndenge ya malamu, mpe tiká ete Yehova apambola makolo kitoko na bino wana ezali komemela bato ‘nsango malamu ya [eloko moko oyo eleki malamu, NW].’”—Yisaya 52:7.
Ndeko Lawrence Bowen, oyo azali molakisi na Eteyelo ya Gileadi, asalaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo: “Libula ya solosolo.” Ndeko Bowen akundwelaki bana-kelasi ete eloko oyo etindaki bandeko báfungola Eteyelo ya Gileadi na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ezali mpo bazalaki na kondima ete makambo oyo Yehova asakolaki ekokokisama. (Baebele 11:1; Emoniseli 17:8) Banda wana, Eteyelo ya Gileadi ezali kopesa bana-kelasi na yango likoki ya kolendisa kondima na bango. Kondima makasi etindaka bana-kelasi bákende liboso mpe básakola solo na molende.
Ndeko Mark Noumair, oyo azali mpe molakisi ya Gileadi, asalaki lisolo oyo motó ya likambo na yango ebendaki mpenza likebi ya bato: “Bozali kokundwela ngai moto moko.” Abendaki likebi na bango na ndakisa ya mosakoli Elisa oyo amonisaki kondima mpe mpiko ntango azalaki kokokisa mokumba na ye. Makambo ndeko Noumair alimbolaki azwaki yango na 1 Mikonzi 19:21. Alobaki boye: “ Elisa azalaki kokakatana te kosala bambongwana na bomoi na ye, kotya bamposa na ye na esika ya mibale mpe kosakola mokano ya Yehova.” Apesaki bana-kelasi longonya na ndenge bamonisaki elimo ndenge moko na oyo ya Elisa, mpe alendisaki bango bákoba komonisa elimo yango epai batindi bango.
Kondima epesaka elobeli ya polele
Ntango bandeko oyo bazalaki kobongisama mpo na mosala ya misionɛrɛ bazalaki kolanda mateya mpe kolendisa kondima na bango, bazalaki mpe kokende kosakwela basusu nsango malamu na bawikende. Yango wana, babɛtaki masolo mpe basalaki bilakiseli ya makambo kitoko oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola. Ndeko Wallace Liverance, oyo azali mpe molakisi na Eteyelo ya Gileadi, nde atambwisaki lisolo yango. Motó ya likambo ya lisolo yango ezalaki: “Tozali na kondima, yango wana tozali koloba,” eutaki na maloba ya ntoma Paulo oyo ezali na 2 Bakolinti 4:13.
Na nsima ya lisolo wana, ndeko Daniel Barnes ná Charles Woody, ya libota ya Betele, basololaki na bandeko oyo bazali mpe baoyo bazalaki bamisionɛrɛ. Masolo yango emonisaki ndenge Yehova abatelaka mpe apambolaka baoyo bazali kosalela ye na bosembo. (Masese 10:22; 1 Petelo 5:7) Misionɛrɛ moko alobaki boye: “Ngai ná mwasi na ngai tomonaki mpenza libateli ya Yehova na nzela ya mateya oyo tozwaki na Gileadi. Mateya yango elendisaka mpenza kondima na biso. Kondima ezali na ntina mpamba te, basaleli ya Yehova nyonso, ezala mpe bamisionɛrɛ, bakutanaka na mikakatano mpe mitungisi.”
Kobá koteya mateya ya Biblia oyo elendisaka kondima
Mpo na kosukisa programɛ yango na ndenge ebongi mpenza, ndeko Samuel Herd, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki lisukulu oyo elobaki ete: “Bókoba kolendisa kondima ya bandeko na bino.” Mateya oyo bana-kelasi bazwaki ezalaki na ntina nini? Ndeko Herd alobaki ete: “Ntina na yango ezalaki ya koteya bino ndenge ya kosalela lolemo na bino mpo na kokumisa Yehova, koteya bato na bisika oyo batindi bino mateya na ye ya solo mpe kolendisa kondima ya bandeko na bino.” Nzokande, akundwelaki bana-kelasi ete lolemo ekoki mpe koloba makambo oyo elɛmbisaka. (Masese 18:21; Yakobo 3:8-10) Alendisaki bana-kelasi bálanda ndakisa ya Yesu na ndenge ya kosalela lolemo na bango. Mokolo moko, nsima ya koyoka Yesu, bayekoli na ye balobaki boye: “Mitema na biso ezalaki te kozika . . . ntango azalaki kofungolela biso Makomami polelepolele?” (Luka 24:32) Ndeko Herd alobaki boye: “Soki maloba na bino ezali ya kolendisa, yango ekosimba mitema ya bandeko na bino na bisika batindi bino.”
Na nsima, bapesaki bana-kelasi badiplome na bango. Na nsuka, moko na bango atángaki mokanda na bango ya botɔndi. Mokanda yango elobaki boye: “Toyebi ete tozali na mokumba monene ya kosalela makambo oyo touti koyekola mpo na kokokisa malamu mosala na biso ya misionɛrɛ. Lokola tondimi kokende kino na nsuka ya mokili, tozali kobondela ete milende na biso esala ete masanzoli ebele emata epai ya moteyi na biso monene, Yehova Nzambe.” Bayangani babɛtaki mabɔkɔ makasi. Ya solo, molulu yango ya kopesa bana-kelasi badiplome elendisaki kondima ya bayangani nyonso.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 17]
“Soki maloba na bino ezali ya kolendisa, yango ekosimba mitema ya bandeko na bino na bisika batindi bino.”
[Etanda na lokasa 15]
MAKAMBO ETALI BANA-KELASI
Bauti na mikili: 9
Batindami na mikili: 26
Bana-kelasi bazalaki: 56
Mwayene ya mbula ya kobotama: 33,4
Mwayene ya mbula balekisi na solo: 16,8
Mwayene ya mbula balekisi na mosala ya ntango nyonso: 13
[Elilingi na lokasa 16]
Bana-kelasi ya mbala ya 122 ya Gileadi, eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia
Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ, banda na oyo ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi; mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.
(1) Howitt, R.; Smith, P.; Martinez, A.; Pozzobon, S.; Kitamura, Y.; Laud, C. (2) Fiedler, I.; Beasley, K.; Matkovich, C.; Bell, D.; Lippincott, W. (3) Sites, W.; Andersen, A.; Toevs, L.; Fusano, G.; Rodríguez, C.; Yoo, J. (4) Sobomehin, M.; Thomas, L.; Gasson, S.; Dauba, V.; Bertaud, A.; Winn, C.; Dobrowolski, M. (5) Yoo, J.; Dauba, J.; Mixer, H.; Newton, M.; Rodríguez, F.; Mixer, N. (6) Laud, M.; Lippincott, K.; Martinez, R.; Haub, A.; Schamp, R.; Pozzobon, L.; Toevs, S. (7) Howitt, S.; Kitamura, U.; Newton, D.; Haub, J.; Sites, J.; Thomas, D. (8) Sobomehin, L.; Matkovich, J.; Fusano, B.; Winn, J.; Schamp, J.; Andersen, D.; Dobrowolski, J. (9) Fiedler, P.; Bell, E.; Beasley, B.; Smith, B.; Bertaud, P.; Gasson, M.