Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/8 lok. 3
  • Biloko oyo ezali na mokili ekoki kozanga mozalisi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biloko oyo ezali na mokili ekoki kozanga mozalisi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Likambo oyo bazali koloba te
  • Tósepela na bikelamu, tóyeba mpe Mozalisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/8 lok. 3

Biloko oyo ezali na mokili ekoki kozanga mozalisi?

ELEKI sikoyo mbula soki 150 banda Charles Darwin alobaki ete soki bikelamu ya bomoi ezali mitindo na mitindo ezali mpo emimesenisaki na bisika ekeseni. Nzokande, ebele ya bato bakómi koboya makanisi ya Darwin mpe makanisi ya ndenge wana oyo bato mosusu bazalaki kobakisa; bato yango bazali koloba ete makambo ya kokamwa ya bikelamu ya bomoi ezali komonisa ete esalemaki na mayele moko boye. Kutu, ata bato minene mosusu na makambo ya siansi bazali kondima te ete bikelamu ndenge na ndenge oyo tomonaka awa na mabelé ebimaki yango moko.

Bato yango bazali koloba ete siansi lokola bioloji, matematiki, bakisá mpe mayele ya bomoto ezali kondimisa ete bikelamu oyo etondi na mokili esalemaki na mayele. Bato yango balingi ete makanisi yango ekóma mpe koteyama na kelasi. Bato ya mayele oyo bazali kokweisa makanisi ya koloba ete biloko ebimaki yango moko bazali mingi na États-Unis; kasi mosusu mpe bazali na Angleterre, na Pakistan, na Pays-Bas, na Serbie, mpe na Turquie.

Likambo oyo bazali koloba te

Bato oyo bazali koloba ete bikelamu esalemá na mayele bazali kopona malamu maloba na bango mpo bákima likambo moko ya ntina mingi. Bazali kolinga koloba te ete mozalisi moko nde asalaki biloko yango. Okanisi ete biloko oyo ezali na mokili ekokaki kosalema kozanga mozalisi? Zulunalo moko (The New York Times Magazine) elobaki ete bato oyo bazali koloba ete biloko esalemaki na mayele “bazali koloba te nani asalaki yango.” Mokomi Claudia Wallis alobaki ete bato oyo bazali koloba ete bikelamu esalemaki na mayele bazali “kokeba na maloba na bango mpo bálobela Nzambe te.” Zulunalo mosusu (Newsweek) elobaki ete “bato oyo bazali kondima ete biloko esalemaki na mayele, bazali kolobela mozalisi na yango te.”

Kasi, soki okanisi malamu, okomona ete bakoki te kokanga ntina ya makambo mosusu soki bazali kokima kolobela mozalisi. Ndenge nini moto akoki kolimbola malamu ndenge mokili ebongisamá mpe ndenge bomoi ebandaki kozanga ete alobela mozalisi?

Likambo ya koyeba soki esengeli kolobela mozalisi to te ekangani na mituna oyo: Kondima ete ezali na mozalisi moko oyo azali na mayele mingi ekoki kopekisa siansi ekende liboso? Tosengeli kolobela mozalisi kaka soki tomoni te ndenge mosusu ya kolimbola makambo? Ezali mpenza likanisi ya kolongobana koloba ete ezali na mozalisi oyo asalaki biloko oyo ezali na mokili? Lisolo oyo elandi ekolobela mituna yango mpe mituna mosusu oyo eyokani na yango.

[Bililingi na lokasa 3]

Charles Darwin alobaki ete soki bikelamu ya bomoi ezali mitindo na mitindo mpo emimesenisaki na bisika ekeseni

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Darwin: Euti na fɔtɔ moko ya Mrs. J. M. Cameron/U.S. National Archives photo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto