Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/8 nk. 4-7
  • Tósepela na bikelamu, tóyeba mpe Mozalisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósepela na bikelamu, tóyeba mpe Mozalisi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ekopekisa siansi ekende liboso?
  • Nzambe, kaka na makambo oyo tokoki kolimbola te?
  • Bozalisi mpe mayele ya bomoto
  • Okoki koyeba mozalisi
  • Biloko oyo ezali na mokili ekoki kozanga mozalisi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Bomoi ekelamá to ebimá yango moko?—Eteni 3: Mpo na nini kondima ete bomoi ekelamá?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Evolisyo
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/8 nk. 4-7

Tósepela na bikelamu, tóyeba mpe Mozalisi

OSILÁ koyoka nkombo Michel-Ange? Azalaki moyemi mpe moto ya Italie (fɔtɔ na ye mpe liyemi moko oyo asalá ezali na lokasa oyo). Soki omoni na miso liyemi moko oyo asalá, na ntembe te yo mpe okoloba lokola moto moko oyo ayekolaka mayemi ya kala, oyo abengaki ye “moyemi monene oyo akokani na mosusu te.” Moto nyonso oyo amoni liyemi oyo Michel-Ange asalá, akoki kotya ntembe te ete moto yango ayebaki mpenza mosala ya koyema.

Sikoyo, kanisá ebele ya bikelamu oyo etondi na mokili, oyo esalemi na ndenge ya kokamwa. Na zulunalo moko (The New York Times), bazongelaki maloba ya molakisi moko ya bioloji oyo alobaki boye: “Emonanaka polele ete biloko nyonso oyo ezali na mokili ebongisami malamu mpenza.” Abakisaki boye: “Totikalaka monɔkɔ polele soki totali ndenge oyo bikelamu ya bomoi ebongisamá.” Tokozala mpenza sembo soki tozali kosepela na bikelamu, kasi toboyi kondima ete ezali na mozalisi oyo asalaki yango?

Ntoma Paulo, oyo azalaki kotala malamumalamu biloko oyo ezalaki zingazinga na ye, alobaki ete bato mosusu ‘bazalaki kosanzola mpe kosalela eloko ezalisami liboso ya mozalisi na yango.’ (Baloma 1:25, haut fleuve) Bato mosusu, lokola bazali kolanda mateya ya evolisyo, baboyi kondima ete ezali na mozalisi moko oyo akelaki biloko nyonso. Kasi, tokoki mpenza koloba ete liteya ya evolisyo ezali siansi ya solosolo? Yoká makanisi ya Christoph Schönborn, episkɔpɔ-mokonzi ya engumba Vienne, oyo ekomamaki na zulunalo Times: “Liteya nyonso oyo eboyi kondima ete ndenge bikelamu ebongisamá na mayele ezali komonisa ete mozalisi azali to ezali koluka kolimbola makambo ndenge mosusu ezali makanisi mpamba, ezali siansi te.”

Ekopekisa siansi ekende liboso?

Bato mosusu bakanisaka ete kondima ete Mozalisi azali “ekopekisa bato bákoba kolukaluka ndimbola ya makambo.” Lisolo oyo ebimaki na zulunalo moko (New Scientist) emonisaki makanisi yango na maloba oyo: “Boyekoli ya siansi, oyo ekoki kopekisama na likambo moko te, ekozonga nsima soki, na likambo nyonso, tozali koloba kaka ete ‘mozalisi nde akelaki yango.’” Makanisi yango ezali solo? Te. Kutu, koloba ete ezali na Mozalisi oyo akelaki biloko nyonso ekosalisa mpo ete siansi ekende liboso. Mpo na nini tolobi bongo?

Kondima ete molɔ́ngɔ́ mpe bikelamu ya bomoi awa na mabelé esalemaki yango moko, ememaka bato na koboya koluka eyano nyonso oyo ekoki kozala solo. Nzokande, kondima ete ezali na Mozalisi oyo akelaki biloko nyonso oyo tomonaka zingazinga na biso ekoki kopesa biso mposa ya koluka koyekola mpe kosalela mayele na ye oyo emonanaka na biloko ndenge na ndenge na molɔ́ngɔ́. Tózwa ndakisa moko: Atako bato oyo bayekolaka mayemi ya kala bayebi ete Léonard de Vinci nde asalaki liyemi oyo babengaka “Mona Lisa,” yango epekisaka bango te báluka koyeba mayele mpe biloko oyo asalelaki. Ndenge moko mpe, kondima ete ezali na Mozalisi oyo asalaki biloko nyonso ekoki te kopekisa biso tóluka koyeba makambo ndenge na ndenge, ata ya mikemike mpo na bikelamu na ye.

Biblia emonisi ete kolukaluka mpo na koyeba makambo malamumalamu ezali mabe te; kutu, ezali kolendisa bato báluka biyano na mituna oyo bamitunaka na makambo ya siansi mpe makambo ya Nzambe. Mokonzi Davidi azwaki ntango ya kotalela na mozindo nzoto na ye oyo asalemi na motindo ya kokamwa. Na nsima alobaki boye: “Nasalami na motindo ya kokamwa mingi; misala na yo ezali ya kokamwa mpe molimo na ngai eyebi yango malamu.” (Nzembo 139:14) Kutu, Biblia emonisi ete Mozalisi atunaki Yobo boye: “Ososoli monene ya mokili?” (Yobo 38:18) Maloba yango ezali na likanisi ata moke te ya kopekisa komituna mituna mpe koluka biyano. Mozalisi Monene alendisaki Yobo ete ayekola misala na ye. Tótalela mpe likambo oyo mosakoli Yisaya akomaki, oyo ezali kolendisa biso tóyeba malamu Mozalisi ya biloko oyo ezali zingazinga na biso. Na Yisaya 40:26, mosakoli alobaki boye: “Bótombola miso na bino likoló mpe bómona! Nani asalaki yango?” Na nsima, vɛrsɛ yango elobi likambo moko oyo ezali na boyokani na liteya ya Einstein, moto moko ya mayele, oyo alobaki ete biloko oyo ezali na molɔ́ngɔ́ esalemaki longwa na nguya moko boye.

Ya solo, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te kozwa biyano na mituna oyo tomitunaka mpo na bozalisi. Ezali bongo mpamba te tozali na makoki mingi te mpo na kokanga ntina ya makambo mpe toyebi nyonso te na oyo etali mokili oyo tofandi. Yobo ayebaki likambo yango. Akumisaki Mozalisi oyo asalaki ete mabelé esimbama na eloko te mpe ete mapata ezala na likoló. (Yobo 26:7-9) Kasi, Yobo amonaki ete makambo wana ya kokamwa “ezali bobele ndambo ya nzela” ya Mozalisi. (Yobo 26:14) Na ntembe te, Yobo azalaki na mposa ya koyekola makambo mingi lisusu na ntina na mokili mpe biloko oyo etondi kati na yango. Davidi mpe andimaki ete ayebi makambo nyonso te, akomaki boye: “Boyebi ya kokamwa boye eleki ngai; eleki mingi, nakoki kososola yango te.”​—Nzembo 139:6.

Kondima ete ezali na Mozalisi moko oyo akelá biloko nyonso ekoki te kopekisa siansi ekende liboso. Koyekola makambo etali molɔ́ngɔ́ mpe makambo ya Nzambe ekosuka te. Mokonzi moko ya kala oyo ayebani mpo na mayele na ye, akomaki na komikitisa nyonso ete: “Atye mpe lobiko kati na mitema na bango, nde moto te ayebi kososola mosala mosalaki Nzambe longwa na ebandeli kino nsuka.”​—Mosakoli 3:11.

Nzambe, kaka na makambo oyo tokoki kolimbola te?

Bato mosusu balobi ete tolukaka kokɔtisa na makasi nkombo ya Nzambe na makambo oyo siansi ekoki kolimbola te. Na maloba mosusu, “Nzambe” ezali nkombo oyo bato basalelaka mpo na kolimbola makambo ntango mayele na bango esuki. Kasi, makambo yango oyo bato bakoki kolimbola te ezali makambo nini? Ezali nde mwa makambo mikemike? Te, ezali makambo minene oyo ezali mpenza kokweisa liteya oyo elobaka ete biloko nyonso ebimaki yango moko. Ezali mituna ya ntina mingi oyo bato oyo bandimaka liteya wana balongi te kopesa biyano. Soki totaleli makambo na bosembo, tokomona ete ezali kutu bato yango nde bakómisi liteya yango “nzambe” mpamba te esimbami na makambo oyo ekoki kolimbolama te.

Nzokande, Biblia elobeli Nzambe na makambo nyonso, ezala oyo ekoki kolimbolama te. Emonisi ete asalaki eloko mokomoko ná makambo na yango nyonso, banda ebandeli tii nsuka. Mokomi ya nzembo alobelaki mosala mobimba oyo Yehova asalaki mpo na kokela biloko nyonso na maloba oyo: “Na yo ezali liziba ya bomoi; biso tokomona pole kati na pole na yo.” (Nzembo 36:9) Biblia elobi ete Nzambe “asalaki likoló mpe mabelé mpe mbu mpe biloko nyonso na kati na yango.” (Misala 4:24; 14:15; 17:24) Yango wana, na siɛklɛ ya liboso moteyi moko akomaki ete Nzambe “azalisaki biloko nyonso.”​—Baefese 3:9.

Longola yango, Nzambe asalaki “mibeko ya lola,” elingi koloba nyonso oyo esalaka ete biloko ezala, makambo oyo bato ya siansi bazali naino koyekola tii lelo oyo. (Yobo 38:33) Mozalisi asalaki biloko nyonso; mokano na ye ezalaki ete abongisa mabelé mpe bikelamu ndenge na ndenge efanda wana.

Bozalisi mpe mayele ya bomoto

Mpo na kosukisa, tótalela naino oyo mayele ya bomoto ezali koteya biso. John Horgan, mokomi moko ya makambo ya siansi, akomaki boye: “Ntango bilembeteli oyo esengeli kondimisa biso likambo moko ezali polele te, tosengeli kokakatana te kosalela mayele ya bomoto mpo na kozwa likanisi ya malamu.”

Soki tosaleli mayele ya bomoto, tokoki mpenza kondima ete bomoi ebandaki yango moko? Atako liteya oyo elobaka ete biloko oyo ezali na mokili esalemaki yango moko epalangani mingi, bato mingi ya mayele, ata mpe bato mosusu ya siansi, bandimaka ete Mozalisi moko akelaki biloko nyonso. Molakisi moko ya siansi alobaki ete bato mingi mpenza “bazali kokanisa ete ezali na mozalisi moko oyo abandisaki bomoi.” Mpo na nini? Bato mingi bakondima maloba ya ntoma Paulo oyo akomaki ete: “Ndako nyonso etongami na moto.” (Baebele 3:4) Na nsima, Paulo asukisaki na likanisi oyo ebongi mpenza ete: “Oyo atongaki biloko nyonso ezali Nzambe.” Na kolanda makanisi ya Biblia, soki moto moko azali kondima ete mpo ndako ezala esengeli moto atonga yango, kasi azali mpe koloba ete selile, eloko oyo esalemi na ndenge ya kokamwa mingi, ebimaki yango moko, moto wana azali kokanisa malamu te.

Mpo na baoyo bandimaka te ete Mozalisi azali, Biblia elobi boye: “Elema alobi na motema na ye ete, Nzambe azali te.” (Nzembo 14:1) Na vɛrsɛ oyo, mokomi ya nzembo alobeli bato ya ntembe. Bato mosusu bakoki kolanda kaka makanisi na bango na esika ya kotalela bilembeteli oyo ezali polele. Nzokande, moto ya mayele mpe ya bososoli azalaka na komikitisa mpenza mpe andimaka ete Mozalisi azali.​—Yisaya 45:18.

Mpo na bato mingi oyo bakanisaka malamu, ezali na bilembeteli oyo ezali komonisa polele ete ezali na mozalisi oyo aleki nyonso.

Okoki koyeba mozalisi

Soki tokanisi ete tokelamaki, boye tokelamaki mpo na mokano nini? Ntina ya bomoi ezali nini? Siansi ekoki te kopesa biyano ya solosolo na mituna wana. Nzokande, ezali na ntina mingi tózwa biyano ya solosolo na mituna wana. Na likambo yango, Biblia ekoki mpenza kosalisa biso. Biblia elobi ete Yehova azali Mozalisi, kasi ebakisi mpe ete azali na mokano, asalaka likambo na likambo na ntina. Biblia emonisi mokano ya Nzambe mpo na bato, epesi biso elikya ya bomoi ya malamu mpo na mikolo ezali koya.

Kasi, Yehova azali nani? Azali Nzambe ya ndenge nini? Batatoli ya Yehova bazali kolendisa yo oyeba Mozalisi oyo akelaki biso na mayele mingi. Okoyeba ndimbola ya nkombo na ye, bizaleli na ye, mpe makambo oyo asalaka epai ya bato. Na lisalisi ya Biblia, Liloba na ye, okoyeba mpo na nini tosengeli kosuka kaka te na koyekola biloko oyo akelá, kasi mpe kokumisa ye lokola Mozalisi.​—Nzembo 86:12; Emoniseli 4:11.

[Elilingi na lokasa 4]

Michel-Ange

[Bililingi na lokasa 5]

Kondima ete Mozalisi azali eyokani na siansi

[Elilingi na lokasa 6]

Bikelamu ndenge na ndenge emonisi ete Mozalisi azali na mayele mingi

[Bililingi na lokasa 7]

Bozalisi esengeli kozala na mozalisi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto