Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/9 nk. 13-16
  • Matomba ya kopesa basusu longonya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Matomba ya kopesa basusu longonya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Toli moko ya bonkonde mpe ya limemya
  • Tósalaka yango na mayele
  • Ndakisa malamu ya Yesu na likambo yango
  • Bankulutu oyo bapesaka longonya na ntango ebongi
  • “Liloba lilobami na ntango ekoki ezali malamu boni!”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Monisá ete osepelaka na bato​—Na kopesáká bango longonya
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Kopesa moto longonya elendisaka ye
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • “Bókoba kolendisana mokolo na mokolo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/9 nk. 13-16

Matomba ya kopesa basusu longonya

OSILÁ koyoka moto moko azali komilela ete patrɔ na ye apesaka ye mpenza longonya te? Yo moko mpe osilá komilela mpo na likambo yango? To mpe soki ozali elenge, osilá komilela ete baboti na yo to balakisi na yo bapesaka yo longonya te?

Ntango mosusu, bato oyo bamilelaka bongo balobaka mpenza solo. Kasi, ndenge moto moko ya mayele na Allemagne alobaki, soki bato ya mosala bazali komilela bongo, ezalaka kaka te ete bapesaka bango longonya te, kasi nde ete patrɔ atyelaka bango likebi te. Ezala bongo to te, ezali polele ete likambo moko ezangaka bango. Kopesa bato longonya mpe kotyela bango likebi, yango nyonso ezali na ntina mingi soki tolingi kozala na boyokani malamu na basusu.

Ezali mpe ndenge moko na makambo ya losambo. Na lisangá ya boklisto, esengeli mpenza bandeko báyebaka kopesana longonya, bázala na mɔtɔ mpe bátyelanaka likebi. Kolanda mitinda ya Biblia nde ekosalisa bango bámonisa elimo wana mpe bábatela yango. Kasi, ata soki lisangá na biso ezali na bolingo ndenge nini, tosengeli kaka koluka kokolisa bolingo yango. Na likanisi wana na motó, tótalela sikoyo bandakisa misato ya bato oyo bayebaki kopesa basusu longonya: Elihu, mosaleli moko ya Nzambe oyo azalaki na bomoi liboso Yesu aya awa na mabelé, ntoma Paulo mpe Yesu Klisto.

Toli moko ya bonkonde mpe ya limemya

Elihu, oyo akokaki kozala ndeko moko ya mosika ya Abalayama, asalisaki mpenza Yobo azala na bokatikati liboso ya Nzambe. Elihu azalaki na bonkonde mpe na limemya. Azelaki na motema mpiɔ liboso ya kozwa maloba. Lisusu, atako bato oyo bazalaki komibenga baninga ya Yobo bazalaki koluka kaka komonisa mabe na ye, Elihu apesaki ye kaka toli te, kasi apesaki ye mpe longonya mpo na boyengebene na ye. Asalaki yango na mɔtɔ mpe amonisaki mpenza ete azalaki kotyela moninga na ye Yobo likebi, mpe na bokeseni na baninga wana ya nkombo mpamba, ye azalaki kobenga Yobo na nkombo na ye. Alobaki na ye na bonkonde mpenza boye: “E, Yobo, nalɔmbi yo ete oyokamela kosakola na ngai, mpe ete otya litoyi na maloba nyonso na ngai.” Na limemya nyonso, amityaki na esika ya Yobo mpe alobaki ete: “Talá mpe liboso ya Nzambe ngai nazali lokola yo, ngai mpe natongamaki na ndambo ya mabelé.” Na nsima, apesaki ye longonya na maloba oyo: “Soki ozali na likambo ya koloba, zongiselá ngai; lobá mpo ete [nasepeli na boyengebene na yo, NW].”​—Yobo 33:1, 6, 32.

Kozala na bonkonde mpe komemya moto ezali lolenge moko ya kopesa ye longonya. Ezali lokola nde ozali koloba na ye ete: ‘Ozali mpenza na motuya na miso na ngai mpe obongi na lokumu.’ Na ndenge yango, tokomonisa ye ete tolingaka ye mingi mpe totyelaka ye likebi.

Kozala na bonkonde elimboli kaka te koluka komonana na miso ya bato ete oyebi kofanda na bato. Mpo na kosimba mitema ya basusu, bonkonde na biso esengeli kouta na motema. Esengeli komonisa ete totyelaka mpenza basusu likebi mpe tolingaka bango.

Tósalaka yango na mayele

Ntoma Paulo amonisaki ntina ya kozala na mayele ntango tozali kopesa basusu longoya. Na ndakisa, ntango azalaki koteya na Atene na mobembo ya mibale oyo asalaki na mosala ya misionɛrɛ, alukaki komonisa malamu ya lingomba ya boklisto liboso ya bafilozofe mosusu ya Grèce. Yoká ndenge asalaki yango na mayele nyonso. “Bato mosusu ya filozofi ya Epikile mpe ya Basetoa babandaki kosolola na ye na kotyanáká ntembe, mpe bamosusu bazalaki koloba ete: ‘Eloko nini esopa oyo alingi aloba?’ Bamosusu: ‘Emonani lokola ete azali mosakoli ya banzambe ya bapaya.’” (Misala 17:18) Atako bazalaki koloba bongo, Paulo akitisaki kaka motema mpe ayanolaki bango ete: “Mibali ya Atene, namoni ete na makambo nyonso bomonani ete bomipesá na kobanga banzambe koleka bato mosusu nyonso.” Na esika amonisa bango ete kosambela bikeko ezali mabe, Paulo apesaki bango longonya mpo bamipesaki na losambo.​—Misala 17:22.

Paulo abangaki nde miso ya bato? Ata moke te! Ayebaki malamu ete mokumba na ye ezali te ya kosambisa basusu; abosanaki te ete liboso ye mpe ayebaki solo te. Mosala na ye ezalaki nde ya koyebisa basusu nsango ya Nzambe, kasi ya kosambisa bango te. Abosanaki te likambo oyo ekómelaki ye moko, oyo Batatoli ya Yehova mingi lelo oyo bazali komona: Bato mosusu oyo bazalaki komipesa na bosembo nyonso na losambo ya lokuta, lelo oyo bamipesi mpenza na losambo ya solo.

Paulo asalelaki mpenza mayele ya malamu, mpe ebotaki mbuma ya malamu mpenza. “Bato mosusu basanganaki elongo na ye mpe bakómaki bandimi, oyo na kati na bango Dionisiusi, mosambisi moko ya esambiselo ya Aleopaji, mpe mwasi moko nkombo na ye Damalisi, ná bamosusu elongo na bango.” (Misala 17:34) Paulo amonisaki mpenza bwanya na ndenge apesaki bato ya Atene longonya mpo na kondima na bango oyo ezangaki bokosi, atako bazalaki kosambela banzambe ya lokuta, na esika apamela bango mpo bazangaki boyebi ya sikisiki. Mbala mingi, bato oyo babungá nzela mpo na mateya ya lokuta bazalaka na mitema ya malamu.

Ntango asengelaki kosamba liboso ya Elode Agilipa II, Paulo ayebaki mpenza kopona maloba. Eyebanaki ete Elode akómisaki leki na ye Belenisi mwasi na ye, likambo oyo Liloba ya Nzambe epekisi mpenza. Atako bongo, Paulo asambisaki ye mpo na yango te. Apesaki nde Elode longonya mpo na likambo ya malamu oyo amonaki epai na ye. “Mpo na makambo nyonso oyo Bayuda bafundi ngai na yango, Mokonzi Agilipa, nazali komitánga moto ya esengo lokola ezali liboso na yo nde nasengeli kosamba na mokolo ya lelo, mingimingi mpenza mpo yo oyebi malamumalamu mimeseno nyonso mpe bantembe nyonso na kati ya Bayuda.”​—Misala 26:1-3.

Tokomonisa bwanya soki tozali koyeba kopona maloba ntango tozali kosolola na basusu! Kopesa longonya na moto oyo ofandi na ye esika moko, moninga ya kelasi to ya mosala ekoki kosala ete bókóma koyokana makasi mpe ekolendisa ye akóma na bizaleli ya malamu. Soki tozali kopesa basusu longonya na ntango oyo ebongi, tokosimba mitema na bango mpe tokoki mbala mosusu kosalisa bato ya mitema sembo bákóma na boyebi ya sikisiki oyo ekotinda bango bátika makanisi mpe misala ya mabe oyo bazalaki na yango.

Ndakisa malamu ya Yesu na likambo yango

Yesu azalaki kopesa bato longonya. Na ndakisa, ntango asekwaki mpe amataki na likoló, asalelaki ntoma Yoane mpo na koyebisa masangá nsambo ya Asie Mineure nsango oyo eutaki epai ya Nzambe. Azangaki te kopesa masangá oyo ezalaki na makambo malamu longonya. Epai ya lisangá ya Efese, ya Pelegame mpe ya Tyatila, asalelaki maloba lokola oyo: “Nayebi misala na yo, mpe mosala na yo ya makasi mpe ezaleli na yo ya koyika mpiko, mpe ete okoki te kondima kozala na bato mabe”; “ozali kokoba kosimba makasi nkombo na ngai, mpe owanganaki te kondima na yo epai na ngai”; mpe “Nayebi misala na yo, mpe bolingo na yo mpe kondima na yo mpe mosala na yo ya ministre mpe ezaleli na yo ya koyika mpiko, mpe ete misala na yo ya sika ezali mingi koleka oyo ya kala.” Ata na lisangá ya Saladi, oyo esengelaki kopamelama makasi, Yesu amonaki bato oyo babongaki kozwa longonya mpe alobaki na bango boye: “Nzokande, ozali na mwa bankombo na Saladi oyo bakómisaki bilamba na bango ya likoló mbindo te, mpe bakotambola elongo na ngai na bilamba ya mpɛmbɛ, mpamba te babongi na yango.” (Emoniseli 2:2, 13, 19; 3:4) Yesu atiká ndakisa malamu mpenza!

Na ndakisa ya Yesu, tosengeli te kokweisaka bato nyonso soki kaka ndambo na bango nde basali mabe. Tosengeli mpe te kopesaka kaka toli kozanga kopesa longonya soki esengeli. Nzokande, tosengeli kobosana te ete soki tozali kopesa bato longonya kaka ntango tolingi kopesa bango toli, bato yango bakoki ata koboya kondima longonya yango. Soki libaku ya kopesa moto longonya emonani, kokakatanaka te kosala yango. Soki mokolo mosusu esɛngi opesa ye toli, akozala pene na koyoka yango.

Bankulutu oyo bapesaka longonya na ntango ebongi

Cornelia, moklisto moko ya mwasi oyo azali kosala sikoyo na biro ya filiale moko na Mpoto amikundoli ete na ebandeli ya bambula ya 1970, mokɛngɛli ya zongazonga atunaki ye soki ayekolaka ye moko mpe atángaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ná Lamuka! Alobi boye: “Nayokaki nsɔni.” Kasi, andimaki ete azalaki kosala milende te mpo na kotánga masolo nyonso ya bazulunalo yango. Abakisi boye: “Na esika mokɛngɛli yango apamela ngai, apesaki ngai longonya mpo na mwa ndambo oyo nazalaki kotánga. Yango elendisaki ngai mingi mpe banda wana, nazwaki ekateli ya kotángaka masolo nyonso.”

Ray, oyo asalaka na biro ya filiale moko na Mpoto, azali komikundola mokolo oyo abandaki mosala ya mobongisi-nzela. Mokɛngɛli mokambi ya lisangá, oyo azalaki kosala na kompanyi moko, azalaki tata ya libota mpe azalaki na mikumba mingi na lisangá, akɔtaki na Ndako ya Bokonzi na mpokwa wana mpe akendaki esika Ray afandaki mpe atunaki ye boye: “Mokolo na yo ya liboso na mosala ya mobongisi-nzela eleki ndenge nini?” Lelo oyo, mbula soki 60 na nsima, Ray abosanaka nkulutu wana te.

Ndenge bandakisa mibale wana emonisi yango, soki ozali mpenza komonisa ete osepeli na milende oyo basusu bazali kosala, mpe ozali kosala yango kaka na maloba ya likolólikoló to ya kolɛtɛ te, yango ekoki kobimisa matomba ya malamu mpenza. Na lisangá ya boklisto, ezali na mokambo mingi oyo esengeli kotinda biso tópesa bandeko na biso longonya. Na ndakisa, tokoki kopesa bango longonya lokola bazali kosepela kosalela Yehova, mpo na biyano kitoko oyo bapesaka na makita, mpo bakómi kosala masukulu to masolo na makita kozanga kobanga miso ya bato, mpo na milende na bango na mosala ya kosakola mpe ya koteya mpe mpo na milende oyo bazali kosala mpo na kotya matomba ya Bokonzi mpe mikano ya elimo na esika ya liboso na bomoi na bango. Soki tozali kopesa basusu longonya, tokozwa matomba mingi. Tokozala na esengo mpe tokokóma kotalela makambo na ndenge ya malamu.​—Misala 20:35.

Bankulutu basengeli kopesaka masangá longonya mpo na milende oyo bazali kosala. Mpe soki esengeli bápesa toli, basengeli kosala yango na bolingo. Epai mosusu, basengeli te koluka ete makambo nyonso esalemaka na ndenge ya kokoka mpe kotalela ata mwa mabunga ya mike ya bandeko lokola masumu ya minene.

Soki bankulutu bazali kolanda ndakisa ya limemya mpe bonkonde oyo Elihu atiká, bayebi kopona maloba lokola Paulo mpe bazali komibanzabanza na bolingo nyonso mpo na basusu ndenge Yesu azalaki kosala, bakozala balendisi ya solosolo mpo na bandeko na bango. Kopesa basusu longonya ekolendisa bango básala lisusu malamu koleka, mpe yango ekosala ete lisangá mobimba ezala na boyokani makasi. Na ntembe te, Yesu asepelaki mpenza mokolo azwaki batisimo, ntango ayokaki Tata na ye ya likoló alobi ete: “Yo ozali Mwana na ngai, molingami; nandimi yo”! (Malako 1:11) Tiká ete tópesaka bandeko na biso longonya na motema moko mpo na kosepelisa mitema na bango.

[Bililingi na lokasa 15]

Koyeba kopona maloba ekoki komemela biso matomba ya malamu mpenza ndenge ememelaki Paulo

[Elilingi na lokasa 16]

Kopesa basusu longonya na motema moko ekoki komema matomba ya malamu mpenza

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto