Monisá ete osepelaka na bato—Na kopesáká bango longonya
1 Longonya ya solosolo epesaka moto esengo, elendisaka ye, mpe etindaka ye asala mingi. Basakoli mingi bamonaka ete ntango bazali kosakola, soki bapesi moto longonya ata na maloba moke, moto yango asepelaka koyoka bango. Ndenge nini tokoki kopesa bato longonya ntango tozali koluka koyebisa bango nsango malamu?
2 Yebá kosalela miso: Ntango Yesu Klisto azongaki na likoló, atyaki likebi na makambo ya malamu oyo masangá nsambo ya Azia bazalaki kosala. (Emon. 2:2, 3, 13, 19; 3:8) Ndenge moko biso mpe, soki tozali kotyela bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola likebi mpenza, tokomona makambo oyo ekotinda biso tópesa bango longonya. Na ndakisa, tokoki kopesa moto longonya soki tomoni ete abongisi lopango na ye malamu, azali kosala makambo oyo emonisi ete alingaka bana na ye, to soki ayambi biso na esengo. Oyebaka kosalela miso mpe opesaka bato longonya na makambo yango?
3 Yebá koyoka: Ntango ozali kosakola, tunáká bato mituna mpo na kosalisa bango bábimisa makanisi na bango. Yokáká bango na likebi mpenza mpo na komonisa ete ozali kopesa bango lokumu. (Lom. 12:10) Soki osali bongo, okomona makambo oyo ekotinda yo opesa moto longonya oyo ebongi, mpe yango ekopesa yo nzela olobela makambo oyo yo ná ye bondimaka.
4 Zalá na bososoli: Tosengeli kosala nini soki moto oyo tozali kosolola na ye alobi likambo moko oyo eyokani te na mateya ya Biblia? Na esika ya koyebisa ye mbala moko ete alobi mabe, pesá ye matɔndi mpo na makambo oyo alobi. Na nsima okoki koyebisa ye na ndakisa boye: “Namoni mpenza ete okanisaka likambo yango mingi.” (Kols. 4:6) Ata soki moto azali koluka kaka kolongisa makanisi na ye, tokoki kopesa ye longonya ndenge azali kosepela kolobela likambo yango. Soki tozali kosolola na bato na komikitisa ndenge wana, yango ekoki kosala ete bato oyo batɛmɛlaka biso bábongola makanisi na bango.—Mas. 25:15.
5 Mpo longonya elendisa moto, esengeli mpenza kozala oyo ebongi. Soki tozali na maloba ya kolendisa, tokokumisa Yehova, mpe yango ekoki kotinda bato mosusu bándima nsango ya Bokonzi.