Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/9 lok. 31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Masolo mosusu
  • “Moombo ya sembo” alongi komekama!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • “Moombo” oyo azali sembo mpe mayele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Nani azali moombo ya sembo mpe ya mayele?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
  • “Bazali kokoba kolanda Mwana-mpate”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/9 lok. 31

Mituna ya batángi

Yesu alingaki koloba nini ntango alobaki ete moombo na ye ya sembo akozala “mayele”?

Yesu atunaki boye: “Nani azali solo moombo ya sembo mpe ya mayele oyo nkolo na ye atye likoló ya basali ya ndako na ye, mpo na kopesa bango bilei na bango na ntango oyo ebongi?” (Matai 24:45) “Moombo” oyo azali kopesa “bilei” ya elimo ezali baklisto oyo bapakolami na elimo. Mpo na nini Yesu alobaki ete bazali mayele?a

Soki totaleli mateya ya Yesu, tokoyeba mpenza nini alingaki koloba ntango alobaki ete bazali “mayele.” Na ndakisa, ntango Yesu alobelaki “moombo ya sembo mpe ya mayele,” apesaki lisese ya bangɔndɔ zomi oyo bazalaki kozela koya ya mobali ya libala. Bangɔndɔ yango bazali elilingi ya baklisto bapakolami oyo bazalaki kozela koya ya Mobali ya libala, Yesu Klisto, liboso ya 1914. Mitano na kati na bango bazalaki na mafuta te ntango mobali ya libala akómaki, mpe bakɔtaki na fɛti ya libala te. Mitano mosusu wana bazalaki na mayele. Batyaki mafuta mingi na miinda na bango, yango wana miinda na bango ekobaki kopela tii ntango mobali ya libala akómaki mpe bakɔtaki na fɛti.​—Matai 25:10-12.

Ntango Yesu abandaki koyangela na 1914, baklisto bapakolami mingi bakanisaki ete bakomata mbala moko na likoló mpo na kokutana na ye. Nzokande, bazalaki na mosala mingi awa na nse, mpe bamosusu bamibongisaki te mpo na yango. Na ndakisa ya bangɔndɔ oyo bazalaki bazoba, Baklisto bapakolami mosusu bamikembisaki te na elimo, yango wana bakobaki komema pole te. Kasi, mingi kati na bango bazalaki mayele, elingi koloba bazalaki na bwanya mpe bazalaki komona mosika, mpe balendisamaki na elimo. Ntango bayebaki ete mosala ezali mingi, babandaki kosala yango na esengo nyonso. Na yango, bazalaki mpenza “moombo ya sembo mpe ya mayele.”

Tótalela mpe ndenge Yesu asaleli liloba “mayele” na Matai 7:24. Yesu alobaki boye: “Moto nyonso oyo ayokaka maloba na ngai oyo mpe atosaka yango akokokana na moto ya mayele, oyo atongaki ndako na ye likoló ya mabanga.” Moto ya mayele atongaka ndako na ye makasi mpo ayebi ete mipɛpɛ ya makasi ekoki kobɛta. Nzokande, zoba atongaka likoló ya zɛlɔ mpe abungisaka ndako na ye. Yango wana, moyekoli ya Yesu oyo azali na mayele amonaka na mosika makama ya kolanda bwanya ya bato. Bososoli na ye ekosalisa ye alandaka mateya ya Yesu na makambo nyonso ya bomoi na ye, elingi koloba na kondima, misala mpe mateya na ye. “Moombo ya sembo mpe ya mayele” asalaka mpe bongo.

Tótala mpe ndenge oyo basaleli liloba oyo babongoli na “mayele” na mabongoli mingi ya Makomami ya Liebele. Na ndakisa, Falao atyaki Yozefe mokɛngɛli ya bilei nyonso ya Ezipito. Yehova nde asalaki ebongiseli wana mpo bato na ye bázwa bilei. Mpo na nini baponaki Yozefe? Falao alobaki na ye boye: “Ezali na moto mosusu te ya mayele mpe bwanya lokola yo.” (Genese 41:33-39, NW; 45:5) Ndenge moko mpe, Biblia elobi ete Abigaili azalaki “mwasi ya mayele.” Apesaki Davidi, mopakolami ya Yehova, ná bato na ye bilei. (1 Samwele 25:3, 11, 18, NW) Yozefe ná Abigaili bakoki kobengama bato ya mayele mpamba te basosolaki mokano ya Nzambe mpe bamonisaki bwanya.

Na yango, ntango Yesu alobaki ete moombo ya sembo azali mayele, amonisaki ete baoyo bakozala bamonisi ya moombo wana bakozala na bososoli, bakobanda komona mosika mpe kosala makambo na bwanya, mpamba te Liloba ya solo ya Nzambe ekobanda kotambwisa kondima, misala mpe mateya na bango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Liloba “Mayele” euti na liloba ya Grɛki phronimos. Buku ya Marvin R. Vincent (Word Studies in the New Testament) emonisi ete liloba mayele elimbolaka mbala mingi bwanya mpe bokɛngi.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto