Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/9 lok. 3
  • Mpo na nini nzambe atiki nzela na mabe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini nzambe atiki nzela na mabe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Malamu na mabe: Etumba oyo eumeli bikeke mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Malamu ekolónga mabe mokolo mosusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Nini ekómisaka biso bato malamu to bato mabe?
    Lamuká!—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/9 lok. 3

Mpo na nini nzambe atiki nzela na mabe?

TOZALI komona polele ete mabe mpe bampasi etondi mpenza na mokili. Bato mingi bazali kokufa na bitumba, ezala basivili to basoda. Koboma bato mpe mobulu ezali bipai nyonso. Mbala mosusu, outi kokutana na makambo ya kozanga bosembo kaka mpo ozali moto ya mposo mosusu to ya ekólo mosusu. Soki okanisi makambo nyonso ya mabe oyo ozali komona to oyo okutani na yango, na ntembe te okomituna, ‘Mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe?’

Bato bamitunaka motuna yango banda kala. Eleki sikoyo mbula soki 3600, Yobo, moto moko oyo asalelaki Nzambe na bosembo, atunaki boye: “Mpo na nini bato ya masumu bakobika?” (Yobo 21:7) Na siɛklɛ ya nsambo liboso ya ntango na biso (L.T.B), mosakoli Yilimia atungisamaki mpo na misala ya mabe oyo bato ya ekólo na ye bazalaki kosala; atunaki boye: “Mpo na nini nzela ya bato mabe ekolonga? Mpo na nini baoyo bakokosaka mingi bazali na esengo?” (Yilimia 12:1) Yobo mpe Yilimia bayebaki ete Nzambe azali sembo. Atako bongo, bamitunaki mpo na nini mabe ezali mingi. Mbala mosusu yo mpe omitunaka bongo.

Bato mosusu balobaka ete Nzambe nde alingi ete mabe mpe bampasi ezala. Basusu bamitunaka boye: ‘Soki Nzambe azali na nguya nyonso, azali sembo, mpe bolingo, mpo na nini asukisaka mabe mpe bampasi te? Mpo na nini atiki mabe ezala tii lelo oyo?’ Lisolo oyo elandi ekopesa biyano na mituna yango mpe na mituna mosusu ya ntina mingi.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

AP Photo/Adam Butler

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto