Mituna ya batángi
Lokola mobeko moko ya Bayuda epekisaki kosalela ‘eloko batyá levire’ na Elekeli; mpo na nini Yesu asalelaki vinyo ntango abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye?—Exode 12:20, NW; Luka 22:7, 8, 14-20.
Elekeli, fɛti oyo Bayisalaele bazalaki kosala mpo na kokanisa kobima na bango na Ezipito, ebandaki na mobu 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Malako oyo Yehova apesaki mpo na fɛti yango elobaki boye: “Bokolya eloko moko te oyo batyá levire. Na bandako na bino nyonso bokolya mampa ezangá levire.” (Exode 12:11, 20, NW) Mobeko yango elobelaki kaka lolenge ya limpa oyo basengelaki kolya na Elekeli. Elobelaki vinyo te.
Ntina ya libosoliboso oyo Nzambe apekisaki Bayisalaele bátya levire na mampa ezalaki ete basengelaki kobima na Ezipito mbangumbangu. Exode 12:34 (NW) elobi boye: “Bato bamemaki pɔtɔpɔtɔ na bango ya kosala mampa oyo batyaki naino levire te, balingaki binikelo na bango na bilamba na bango mpe bamemaki yango na mapeka na bango.” Kozanga kosalela levire na Elekeli esengelaki kokundwela mabota nyonso ya nsima likambo wana ya ntina mingi.
Na nsima, Bayuda bakómaki kotalela levire lokola elilingi ya lisumu mpe ya kobeba. Na ndakisa, ntango ntoma Paulo alobelaki moto moko oyo azalaki na etamboli ya mbindo na kati ya lisangá, atunaki boye: “Boyebi te ete mwa levire moke evimbisaka pɔtɔpɔtɔ mobimba ya farini?” Abakisaki boye: “Bólongola levire ya kala, mpo bózala pɔtɔpɔtɔ ya sika ya farini, lokola nkisi ya kovimbisa ezali te na kati na bino. Mpo, ya solo, Klisto elekeli na biso apesami mbeka. Na bongo tiká tósala fɛti yango, na levire ya kala te, na levire ya makambo mabe te mpe ya ezaleli ya mabe te, kasi na mampa ezangá levire ya bosembo mpe ya solo.” (1 Bakolinti 5:6-8) Limpa oyo batye levire te ezalaki elilingi ebongi mpenza ya nzoto ya Yesu oyo ezangi lisumu.—Baebele 7:26.
Bayuda bakómaki komɛla vinyo na Elekeli bambula mingi na nsima. Mbala mosusu momeseno yango ebandaki nsima ya kouta na boombo na Babilone. Biblia elobi ata na esika moko te ete likambo yango emonanaki mabe; yango wana, Yesu mpe asalelaki vinyo na Elekeli. Ndenge oyo bazalaki kosala masanga ya vinyo na ntango ya kala ekeseni na ndenge oyo bazalaki kosala mampa. Mpo pɔtɔpɔtɔ ya kosala mampa evimba, ezalaki kosɛnga bátya yango levire. Nzokande, bazalaki kotya eloko moko te na mai ya mbuma ya vinyo mpo ekóma masanga oyo ekoki kolangwisa. Mai ya mbuma ya vinyo yango moko ezalaki kokóma masanga soki eumeli. Na Elekeli, mai ya mbuma ya vinyo oyo bakamoli sika ekokaki kozala te, mpamba te mwa basanza ekabolaki eleko ya Elekeli mpe eleko ya kobuka mbuma ya vinyo.
Na yango, ntango abandisaki Ekaniseli, Yesu abukaki mobeko moko te ya Elekeli ndenge asalelaki vinyo lokola elilingi ya makila na ye. Vinyo nyonso ya motane oyo babakisi sukali te, alkole te, to eloko mosusu, ekoki kosalelama mpo na komonisa ‘makila ya motuya’ ya Klisto.—1 Petelo 1:19.