Kosala mokano ya Nzambe lelo oyo
“[Klisto] akufelaki bato nyonso mpo baoyo bazali na bomoi bákoka kozala na bomoi mpo na bango moko lisusu te.”—2 BAKOLINTI 5:15.
1. Yebisá makambo oyo misionɛrɛ moko akutanaki na yango na teritware na ye.
MISIONƐRƐ moko na nkombo Aarona alobaki boye: “Longola mituka ya basoda, motuka na biso ezalaki motuka ya liboso oyo ekɔtaki na mboka wana ya mosika na Afrika nsima ya etumba ya bana mboka. Tozalaki kokutana to kosolola na bandeko ya lisangá wana ya moke te, mpe tosengelaki kokokisa bamposa na bango. Longola bilei, bilamba mpe mikanda, tomemaki mpe kasɛti-video Les Témoins de Jéhovah : un nom, une organisation.b Bato mingi bayaki na esika oyo bazalaki kolakisa bafilme; ezalaki ndako moko monene ya matiti, esika magnétoscope moko ná televizyo ezalaki. Lokola bato balekaki ebele, tolakisaki yango mbala mibale. Na mbala nyonso mibale, bato mingi bandimaki koyekola Biblia. Tomonaki mpenza ete tosalaki mosala ya mpunda te.”
2. (a) Mpo na nini baklisto bazali na ekateli ya kosalela bomoi na bango na mosala ya Nzambe? (b) Mituna nini tokotalela sikoyo?
2 Mpo na nini Aaron ná bandeko oyo azalaki kotambola na bango bandimaki mokumba wana ya mpasi? Lokola bazalaki na botɔndi mpo na mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto, bamipesaki epai ya Nzambe mpe balingaki kosalela bomoi na bango na boyokani na mokano na ye. Lokola bango, baklisto nyonso bazali na ekateli ya “kozala na bomoi mpo na bango moko lisusu te,” kasi mpo na kosala nyonso oyo bakoki “mpo na nsango malamu.” (2 Bakolinti 5:15; 1 Bakolinti 9:23) Bayebi ete ntango mokili oyo ekosuka, mbongo mpe lokumu nyonso ya mokili ekozala lisusu na ntina te. Na yango, lokola bazali na bomoi mpe na nzoto makasi, balingi kosalela makoki na bango mpo na kokokisa mokano ya Nzambe. (Mosakoli 12:1) Ndenge nini tokoki kosala yango? Epai wapi tokozwa nguya mpe makasi mpo na kosala yango? Mpe mabaku nini ya mosala ezali liboso na biso?
Ndenge ya kokende liboso
3. Kosala mokano ya Nzambe esɛngaka makambo nini?
3 Mpo na baklisto ya solo, kosala mokano ya Nzambe ezali likambo ya bomoi mobimba. Na momeseno, ebandaka na makambo lokola kokomisa nkombo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, kotánga Biblia mokolo na mokolo, kobima na mosala ya kosakola mpe kokokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo. Ntango tozali kokola, tóbosana te maloba ya ntoma Paulo oyo: “Kanisaká malamumalamu makambo wana; omipesa mobimba na yango, mpo bokoli na yo emonana polele na miso ya bato nyonso.” (1 Timote 4:15) Bokoli ya ndenge wana ezalaka te mpo na komitombola, kasi emonisaka nde ekateli na biso ya kosala mokano ya Nzambe kozanga koluka matomba na biso moko. Milende wana emonisaka ete tozali kotika Nzambe atambwisa biso na makambo nyonso ya bomoi; mpe asalaka yango malamu koleka biso moko.—Nzembo 32:8.
4. Ndenge nini tokoki kolongola kobanga?
4 Kasi, kokakatana to komitungisa mingi ekoki kopekisa biso kokende liboso na mosala ya Nzambe. (Mosakoli 11:4) Na yango, liboso tózwa esengo na kosalela Nzambe mpe basusu, tosengeli kolongola kobanga. Na ndakisa, Erik azalaki na mposa ya kokende na lisangá moko ya monɔkɔ ya bapaya. Kasi, azalaki komituna boye: ‘Bandeko bakoyamba ngai malamu? Nakolinga bango? Bango mpe bakolinga ngai?’ Alobi boye: “Nsukansuka, nayaki komona ete nasengelaki komibanzabanza mingi te mpo na ngai moko, kasi nde mpo na bandeko. Natikaki komitungisa mpe nazwaki ekateli ya kosala nyonso oyo nakoki mpo na basusu. Nabondelaki Nzambe asalisa ngai mpe nakendaki na lisangá yango. Sikoyo, nazali kokoba kosalela Yehova na esengo mpenza na lisangá yango.” (Baloma 4:20) Ya solo, soki tozali kosalela Nzambe mpe basusu kozanga koluka bolamu na biso moko, tokozala na esengo.
5. Mpo na nini komibongisa malamu liboso ya kosala mosala ya Nzambe ezali na ntina? Pesá ndakisa.
5 Mpo na kokokisa mpenza mokano ya Nzambe, tosengeli komibongisa malamu. Ekozala malamu tóboya kokɔta banyongo oyo ekoki kokómisa biso baombo ya mokili oyo mpe ekopekisa biso kosalela Nzambe ndenge tolingi. Biblia elobi na biso ete: “Modefi azali moombo ya modefisi.” (Masese 22:7) Kotyela Yehova motema mpe kotya makambo ya elimo na esika ya liboso ekosalisa biso tóbosana mokano na biso te. Na ndakisa, Guoming ná bandeko na ye mibale ya basi ná mama na bango bafandaka na esika oyo bandako ezalaka ntalo mpe misala ya malonga ezali mpenza te. Lokola basalelaka mbongo na mayele mpe basangisaka mbongo mpo na kosomba biloko, bazangaka eloko te ata soki bango nyonso bazali na misala te. Guoming abakisi boye: “Ntango mosusu, biso nyonso te nde tozwaka lifuta. Kasi, tozali kaka na likoki ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mpe ya kosalisa mama na biso. Totɔndaka mpenza mama na ndenge asɛngaka te ete tótika mosala ya Nzambe mpo na kolukela ye bomɛngo.”—2 Bakolinti 12:14; Baebele 13:5.
6. Ndakisa nini emonisi ndenge tokoki kokokisa mokano ya Nzambe na bomoi na biso?
6 Soki omipesá mingi na koluka bozwi to bisengo ya mokili, ekosɛnga mbala mosusu obongola makambo mingi mpo na kotya mokano ya Nzambe na esika ya liboso. Mbala mingi, mbongwana ya ndenge wana eyaka mbala moko te, mpe ata soki okwei mbala moko, kokanisa te ete ozindi libela. Tózwa ndakisa ya Koichi, oyo azalaki kolekisa ntango mingi na kominanola. Koichi ayekolaki Biblia ntango azalaki naino elenge, kasi na boumeli ya ebele ya bambula, amipesaki mobimba na masano ya video. Amitunaki mokolo mosusu boye: ‘Oyo makambo nini nazali kosala? Nasili kolekisa mbula 30, mpe nazali kosala eloko moko te ya malonga na bomoi na ngai!’ Koichi abandaki lisusu koyekola Biblia mpe andimaki lisalisi ya bandeko ya lisangá. Atako alongaki bolɛmbu yango mbala moko te, alɛmbaki te. Nsukansuka, na mabondeli mpe na lisalisi ya bandeko, alongwaki na boombo ya masano ya video. (Luka 11:9) Lelo oyo, Koichi azali mosaleli ya misala mpe azali kosalela Yehova na esengo.
Tóyekola kozala na bokatikati
7. Mpo na nini tosengeli kozala na bokatikati ntango tozali kosala mosala ya Nzambe?
7 Mpo na kosala mokano ya Nzambe, tosengeli komipesa mobimba. Tosengeli te kokakatana to kozala gɔigɔi. (Baebele 6:11, 12) Kasi, Yehova alingaka te ete tósilisa makasi na biso nyonso. Kondima na komikitisa nyonso ete tosalaka mosala ya Nzambe na makasi na biso moko te ekumisaka ye mpe emonisaka ete tozali na bokatikati. (1 Petelo 4:11) Yehova alaki ete akopesa biso makasi oyo tosengeli na yango mpo na kosala mokano na ye, kasi tosengeli te koboma nzoto koleka ndelo mpo na kosala makambo oyo asɛngi biso te. (2 Bakolinti 4:7) Soki tolingi kokoba kosalela Nzambe kozanga kolɛmba, tosengeli kosalela makasi na biso na ndenge ebongi.
8. Nini ekómelaki elenge moklisto moko oyo amipesakia na mosala na ye ya mosuni mpe na mosala ya Yehova, mpe mbongwana nini asalaki?
8 Na ndakisa, mbula mibale mobimba, Ji Hye, oyo afandaka na Azia, azalaki mobongisi-nzela mpe azalaki na mosala moko oyo ezalaki kolya ye ntango mingi. Alobi boye: “Namipesaki na mosala ya Yehova mpe na mosala ya mosuni, kasi nazalaki kolala kaka ngonga mitano ya mpamba na butu. Nsukansuka, nakómaki mpenza kolɛmba makambo ya elimo, mpe nazalaki lisusu na esengo te na mosala ya Nzambe.” Mpo na kosalela Yehova ‘na motema na ye mobimba, na molimo na ye mobimba, na makanisi na ye nyonso mpe na makasi na ye nyonso,’ Ji Hye alukaki mosala oyo ekokaki kozwa ye ntango mingi te. (Malako 12:30) Alobi boye: “Atako libota na ngai ezalaki kotya ngai mbamba ete naluka mbongo mingi, nasalaki makasi natya mokano ya Nzambe na esika ya liboso. Nazangaka mbongo te mpo na biloko ya ntina lokola bilamba oyo nakoki kotɛlɛma na yango na miso ya bato. Mpe nasepelaka mpenza ndenge nakómá kolala mingi! Nazali sikoyo kosalela Nzambe na esengo mpe nakómá na boyokani makasi na Yehova. Ezali bongo mpo nalekisaka lisusu ntango mingi te mpo na makambo ya mokili.”—Mosakoli 4:6; Matai 6:24, 28-30.
9. Ndenge nini milende na biso na mosala ya kosakola ekoki kosalisa basusu?
9 Moklisto nyonso te nde akoki kozala mobongisi-nzela. Soki ozali kobunda na bobange, na maladi to na mikakatano mosusu, kobosana te ete Yehova asepelaka mingi na bosembo na yo mpe na nyonso oyo ozali kosalela ye na motema mobimba. (Luka 21:2, 3) Na likambo yango, mokomoko na biso asengeli koyeba ete milende oyo azali kosala, ata soki ezali ya moke ndenge nini, ekoki kosala basusu malamu. Na ndakisa, kanisá naino ete tobimi na mosala ya kosakola, mpe na mwa bandako oyo tokɔtaki, moto ata moko te asepeli na nsango na biso. Na nsima na biso, na bandako nyonso oyo tokɔtaki, ata mpe na bisika oyo baboyaki kofungolela biso, bakotikala kobɛta masolo na biso na boumeli ya bangonga to ya mikolo. Tókanisa te ete moto nyonso oyo akoyoka nsango malamu akondima yango, kasi bamosusu bakondima. (Matai 13:19-23) Bato mosusu bakoki kondima ata na nsima, soki makambo ya mokili to bomoi na bango ebongwani. Ezala ndenge nini, soki tozali kosala oyo tokoki na mosala ya kosakola, tozali kosalela Nzambe. Tozali “kosala elongo na Nzambe.”—1 Bakolinti 3:9.
10. Mabaku nini bandeko nyonso ya lisangá bazali na yango?
10 Longola yango, biso nyonso tokoki kosalisa mabota na biso mpe bandeko ya lisangá. (Bagalatia 6:10) Ndakisa malamu na biso ekoki kosimba mpenza mitema ya basusu mpe kosalisa bango na boumeli ya ntango molai. (Mosakoli 11:1, 6) Soki bankulutu ná basaleli ya misala bazali kokokisa mikumba na bango malamu, yango ekosalisa lisangá ezala makasi na elimo mpe mosala ya Bokonzi ekokende liboso. Tondimi mpenza ete soki tozali “na mingi ya kosala na kati ya mosala ya Nkolo,” mosala na biso ‘ekozala mpamba te.’—1 Bakolinti 15:58.
Tómipesa na mosala ya Nzambe bomoi na biso mobimba
11. Longola kosala na lisangá na biso, mabaku nini mosusu ya mosala tokoki kozwa?
11 Biso baklisto tolingaka bomoi mpe tozalaka na mposa ya kopesa Nzambe nkembo na makambo nyonso oyo tosalaka. (1 Bakolinti 10:31) Soki tozali kosakwela basusu nsango malamu ya Bokonzi na molende mpe koteya bango bátosa makambo nyonso oyo Yesu alakisaki, mabaku mingi ya mosala ekofungwama liboso na biso. (Matai 24:14; 28:19, 20) Longola kosala elongo na lisangá na biso, tokoki kozwa mabaku ya kokende kosala epai mposa ya basakoli ezali makasi, na ndakisa na teritware mosusu, na lisangá moko ya monɔkɔ ya bapaya to na ekólo mosusu. Bankulutu ná basaleli na misala ya makoki oyo babali naino te bakoki kokɔta na Eteyelo mpo na kobongisa basungi mpe na nsima, kokende kosala na masangá oyo ezali na mposa ya bandeko oyo bakɔmeli, ezala na mboka na bango moko to na mikili mosusu. Babongisi-nzela oyo babalá bakoki kokɔta na Eteyelo ya Gieleadi, kokóma bamisionɛrɛ mpe kokende kosala na mikili mosusu. Ezali mpe na mposa makasi ya bandeko oyo balingi komipesa mpo na kosala misala ndenge na ndenge na Betele mpe mpo na kotonga to kobongisa bisika ya losambo mpe babiro ya filiale.
12, 13. (a) Ndenge nini okoki kopona makambo oyo okoki kosala na mosala ya Nzambe? (b) Pesá ndakisa moko oyo emonisi ete mayele oyo tozwi na mosala moko ekoki kosalisa na mosala mosusu.
12 Makambo nini okoki kosala na mosala ya Nzambe? Lokola ozali mosaleli ya Yehova, osengeli ntango nyonso kolanda litambwisi na ye mpe ya ebongiseli na ye. “Elimo na [ye] ya malamu” ekosalisa yo ozwaka bikateli ya malamu. (Nehemia 9:20, NW) Mbala mingi, mokumba moko efungolaka nzela na mokumba mosusu, mpe mayele oyo ozwi na mosala moko ekoki kosalisa na mosala mosusu.
13 Na ndakisa, Dennis ná mwasi na ye Jenny bazalaki mbala na mbala kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi. Nsima ya ekumbaki moko (Katrina) oyo ebɛtaki na sudi ya États-Unis, bamipesaki mpo na kosalisa bandeko oyo bandako na bango ebebaki. Dennis alobi boye: “Kosalela mayele oyo tozwaki na kotonga Bandako ya Bokonzi mpo na kosalisa bandeko ememeli biso esengo monene. Botɔndi oyo bandeko oyo tosalisi bazali komonisa ezali mpenza kosimba mitema na biso. Bato mosusu oyo bazalaki kobongisa bandako ya bato oyo likama yango ekómelaki bango basalaki mosala ya malonga te. Batatoli ya Yehova basili kobongisa mpe kotonga bandako koleka 5 300 mpe ebele ya Bandako ya Bokonzi. Bato oyo bazali komona yango bakómi sikoyo kosepela mingi na nsango ya Bokonzi.”
14. Okoki kosala nini soki ozali na mposa ya kobanda mosala ya ntango nyonso?
14 Okoki komipesa na mosala ya ntango nyonso bomoi na yo mobimba mpo na kolanda mokano ya Nzambe? Soki osali bongo, yebá ete okozwa mapamboli ebele. Soki ezali na makambo oyo ezali kopekisa yo osala yango, ekoki kosɛnga osala mbongwana na bomoi na yo. Bondelá ndenge Nehemia abondelaki ntango alingaki kokende kosala mosala moko ya ntina mingi: ‘E, Yehova, nalɔmbi yo, . . . longisá moombo na yo.’ (Nehemia 1:11) Na nsima, tyá motema epai ya oyo ‘ayokaka mabondeli,’ mpe salá makambo na boyokani na libondeli na yo. (Nzembo 65:2) Soki olingi Yehova apambola milende na yo na mosala na ye, osengeli liboso kosala milende yango. Soki olingi kobanda mosala ya ntango nyonso, kangamá na mokano na yo. Nsima ya bambula, okokóma na makoki mingi mpe esengo na yo ekobakisama.
Bomoi ya ntina mpenza
15. (a) Matomba nini tokozwa soki tozali kosolola na basaleli ya Yehova oyo baumeli mingi mpe kotánga masolo ya bomoi na bango? (b) Lobelá lisolo ya bomoi moko oyo elendisaki yo mpenza.
15 Mapamboli nini okoki kozwa soki ozali na mposa ya kosala mokano ya Nzambe? Sololáká na basaleli ya Yehova oyo baumeli mingi, mingimingi baoyo balekisi bambula mingi na mosala ya ntango nyonso. Bazali mpenza na bomoi ya esengo! (Masese 10:22) Bakoyebisa yo ete ata na ntango ya mpasi makasi, Yehova asalisaka bango bázwa nyonso oyo basengeli na yango, ata mpe mingi koleka. (Bafilipi 4:11-13) Banda na 1955 tii na 1961, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimisaki masolo ya bomoi ya bato ya sembo oyo ezalaki na motó ya likambo “Comment je poursuis le but de ma vie.” Kobanda wana, bankama ya masolo mosusu ya bomoi ezali kobima. Mokomoko na yango esalisaka biso tókanisa molende mpe esengo ya baklisto oyo Mokanda ya Misala elobeli. Soki ozali kotánga masolo wana ya kolendisa, okoki koloba boye: ‘Oyo ezali mpenza bomoi oyo nasengeli kozala na yango!’
16. Mpo na nini bomoi ya moklisto ezalaka bomoi ya ntina mpe ya esengo?
16 Aaron, oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo, alobi boye: “Na Afrika, nazalaki kokutana mbala na mbala na bilenge oyo bazalaki koyengayenga mpo na koluka bomoi ya malamu. Mingi na bango bazwaki bomoi yango te. Kasi, biso tozalaki kosala mokano ya Nzambe mpe kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi, mpe tozalaki na bomoi ya esengo mpenza. Tomonaki mpenza ete esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”—Misala 20:35.
17. Mpo na nini tosengeli komipesa na kosala mokano ya Nzambe sikoyo?
17 Ezali boni mpo na yo? Mokano nini ozali kolanda? Soki ozali na mokano moko te ya elimo, mikano mosusu nde ekoya kotonda na makanisi na yo. Mpo na nini kobebisa bomoi na yo na makambo oyo mokili ya Satana ezali komonisa lokola ezali malamu? Mosika te, ntango “bolɔzi monene” ekobanda, biloko mpe lokumu nyonso ya mokili ekozala lisusu na ntina te. Kaka boyokani na yo na Yehova nde ekozala na ntina. Tokozala mpenza na botɔndi na ndenge tosalelaki Nzambe mpe basusu, mpe tosalaki mokano ya Nzambe na bomoi na biso mobimba!—Matai 24:21; Emoniseli 7:14, 15.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.
b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Okoki kolimbola?
• Ndenge nini Yehova atalelaka mosala oyo tosalelaka ye?
• Mpo na nini koyeba esika makoki na biso esuki mpe kozala na bokatikati esalisaka biso tósalela Nzambe mpe basusu?
• Wapi mabaku ya mosala oyo tozali na yango?
• Ndenge nini tokoki kozala na bomoi ya malamu lelo oyo?
[Bililingi na lokasa 23]
Tosengeli kozala na bokatikati mpo na kokoba kosalela Yehova molimo na biso mobimba
[Bililingi na lokasa 24]
Misala ya kosalela Nzambe ezali ebele