Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/11 nk. 12-14
  • Biteni ya bambɛki emonisi bosolo ya masolo ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biteni ya bambɛki emonisi bosolo ya masolo ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Biteni ya bambɛki ya Samalia
  • Biteni ya bambɛki ya Alada
  • Biteni ya bambɛki ya Lakisi
  • Likambo oyo ekokani
  • Mikanda ya kala emonisi mpenza esika ekólo moko ya Yisraele ezalaki
    Makambo mosusu
  • Tel Arad endimisi bosolo ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Nkombo ya Nzambe na boumeli ya bikeke
    Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko
  • Boyekoli nimero 9—Arkeoloji mpe Makomi mapemami
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/11 nk. 12-14

Biteni ya bambɛki emonisi bosolo ya masolo ya Biblia

BIBLIA ezali Liloba ya Nzambe. (2 Timote 3:16) Makambo oyo elobi mpo na bato, bisika, losambo mpe bakonzi ya ntango ya kala ezali solo. Bosolo ya Makomami esimbami te na biloko oyo bato ya arkeoloji bakundolaka, atako biloko yango emonisaka bosolo ya masolo ya Biblia mpe esalisaka biso tóyeba masolo yango malamumalamu.

Kati na biloko oyo bato ya arkeoloji bakundoli, mingi ezali biteni ya bambɛki. Na ntango ya kala, na bikólo mingi ya Moyen-Orient, ata mpe na Ezipito mpe na Mezopotamia, bato bazalaki kokoma likoló ya biteni ya bambɛki mpo ezalaki mpasi te mpo na kozwa yango. Bato bazalaki kokoma likoló na yango makambo oyo bayokani, mituya, biloko ya kotɛka, mpe makambo mosusu, ndenge lelo oyo tosalelaka bapapye. Mbala mingi, bazalaki kokoma likoló ya biteni yango ya bambɛki na mai ya mokanda; biteni yango mosusu ezalaki kaka na liloba moko, misusu mpe ezalaki na milɔngɔ mingi.

Na Israël, bato ya arkeoloji bakundoli biteni mingi ya bambɛki ya kalakala. Na bisika misato, bakundolaki biteni ya bambɛki oyo ekomamaki na ekeke ya nsambo mpe ya mwambe liboso ya ntango na biso (L.T.B.); yango ezali na ntina mingi mpamba te ezali komonisa bosolo ya masolo mosusu ya Biblia. Ezali biteni ya bambɛki oyo bakundolaki na Samalia, na Alada, mpe na Lakisi. Tótalela mokomoko na yango.

Biteni ya bambɛki ya Samalia

Samalia ezalaki mboka-mokonzi ya bokonzi ya mabota zomi ya Yisalaele tii ntango Baasulia bakweisaki yango na mobu 740 L.T.B. Mpo na ebandeli ya Samalia, 1 Mikonzi 16:23, 24 elobi boye: “Na [mbula] ya ntuku misato na moko ya Asa mokonzi ya Yuda [947 L.T.B.], Omili abandaki kozala mokonzi na Yisalaele . . . Asombaki ngomba ya Samalia epai na Sɛmɛlɛ mpo na mpata mibale ya palata; atyaki ngomba na makasi mpe abiangaki nkombo ya mboka oyo ye atongaki ete, Samalia.” Tii na ntango ya Baloma, engumba yango ezalaki mpe bakómaki kobenga yango Sébaste. Engumba yango elimwaki na ekeke ya 6 ya ntango na biso (T.B.).

Na 1910, na esika oyo Samalia ezalaká, bato ya arkeoloji bakundolaki biteni mingi ya bambɛki, mpe balobaki ete ezali ya ekeke ya 8 L.T.B. Likoló ya biteni ya bambɛki yango bakomaki makambo na ntina na mafuta mpe vinyo oyo eutaki na bamboka ya zingazinga mpe etindamaki na Samalia. Buku moko (Ancient Inscriptions—Voices From the Biblical World ) elobi boye: “Biteni 63 ya bambɛki oyo bakundolaki na 1910 . . . [ezali] moko ya makomi ya ntina mingi na kati ya makomi nyonso ya Yisalaele ya kala. Likambo oyo esali ete biteni ya bambɛki ya Samalia ezala na ntina mingi ezali te makambo oyo ekomami likoló na yango, . . . kasi ndenge oyo etángi bankombo ya bato ya Yisalaele, mabota na bango mpe bankombo ya bisika.” Ndenge nini bankombo yango endimisi masolo mosusu ya Biblia?

Ntango Bayisalaele bazwaki Mokili ya Ndaka mpe bakabolaki yango, Samalia ezalaki na kati ya eteni oyo epesamaki na libota ya Manase. Yosua 17:1-6 elobi ete bana zomi ya Gileadi, nkɔkɔ ya Manase, bazwaki libula na bango ya mabelé na eteni wana. Bana yango ezalaki Abiezele, Heleke, Asiele, Sekeme, mpe Semida. Hefele, mwana ya motoba, azalaki na bankɔkɔ ya mibali te, kasi azalaki kaka na bankɔkɔ ya basi mitano; bankombo na bango ezalaki Mala, Noa, Hoge, Milika mpe Tilesa mpe mokomoko azwaki eteni ya mabelé.​—Mituya 27:1-7.

Na biteni ya bambɛki ya Samalia bamonaki bankombo mitano ya bana ya Gileadi mpe bankombo ya Hoge mpe Noa, bankɔkɔ ya Hefele. Buku moko (NIV Archaeological Study Bible) elobi boye: “Bankombo oyo bamonaki na biteni ya bambɛki ya Samalia ezali na boyokani na oyo Biblia elobi mpo na bankombo ya bana ya Manase mpe libula ya mabelé oyo bazwaki.” Na yango, biteni ya bambɛki wana endimisi lisolo ya Biblia oyo elobeli ndenge mabota ya Yisalaele ekabolaki biteni ya mabelé.

Biteni ya bambɛki ya Samalia endimisi mpe makambo oyo Biblia elobeli na ndenge makambo ya losambo ekómaki na Yisalaele. Na eleko oyo biteni ya bambɛki ya Samalia ekomamaki, Bayisalaele basangisaki losambo ya Yehova na oyo ya Baala, nzambe ya Bakanana. Esakweli ya Hosea, oyo ekomamaki mpe na ekeke ya 8 L.T.B., elobelaki ntango oyo Bayisalaele basengelaki kobongola motema mpe kobenga Yehova “Mobali na ngai,” na esika ya kobenga “Baala na ngai.” (Hosea 2:16, 17) Bankombo mosusu oyo bamonaki na biteni ya bambɛki ya Samalia elimboli “Baala azali tata na ngai,” “Baala ayembi,” “Baala azali makasi,” “Baala akanisi,” mpe bongo na bongo. Na bankombo oyo bazalaki kopesa bana, soki tozwi bankombo 11 oyo euti na nkombo Yehova, nsambo kati na yango esanganaki na nkombo ya “Baala.”

Biteni ya bambɛki ya Alada

Engumba Alada ezalaki na Negebe, na sudi ya Yelusaleme. Na esika oyo engumba Alada ezalaká, bato ya arkeoloji bakundolaki bifelo motoba ya makasi oyo elandaná; bamonaki ete bifelo yango etongamaki kobanda na ntango ya Mokonzi Salomo (1037-998 L.T.B.) tii ntango bato ya Babilone babebisaki Yelusaleme, na mobu 607 L.T.B. Na esika yango, bakundolaki mpe motángo oyo eleki monene ya biteni ya bambɛki ya kalakala. Kati na yango ezalaki na biteni koleka 200 oyo ezalaki na makambo ekomami na Liebele, na Aramɛyɛ, mpe na minɔkɔ mosusu.

Biteni mosusu ya bambɛki ya Alada endimisi makambo oyo Biblia elobi mpo na mabota ya banganga-nzambe. Na ndakisa, moko elobeli “bana ya Kola,” oyo mpe Biblia elobeli na Exode 6:24 mpe na Mituya 26:11. Maloba oyo ezali likoló ya Banzembo 42, 44-49, 84, 85, 87, mpe 88 emonisi ete banzembo yango ezali ya “bana ya Kola.” Biteni ya bambɛki ya Alada elobeli mpe mabota ya Pasahulu mpe ya Melemoto.—1 Ntango 9:12; Ezela 8:33.

Tótalela mpe ndakisa mosusu. Na bitiká ya efelo moko oyo etongamaki mwa moke liboso bato ya Babilone bábebisa Yelusaleme, bakundolaki eteni ya mbɛki oyo batindelaki komanda ya basoda oyo bazalaki na esika yango. Zulunalo moko (The Context of Scripture) elobi ete na eteni yango ya mbɛki ezalaki mpe na maloba oyo: “Epai ya nkolo na ngai Eliasibi. Tiká ete Yawe [Yehova] abatela yo. . . . Na oyo etali makambo oyo opesaki ngai mitindo: nyonso ezali kotambola malamu sikoyo: azali na tempelo ya Yawe.” Bato mingi ya mayele balobaka ete tempelo yango ezali tempelo ya Yelusaleme, oyo etongamaki na ntango ya Salomo.

Biteni ya bambɛki ya Lakisi

Engumba Lakisi ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 43 na sudi-wɛsti ya Yelusaleme. Na 1930, bato ya arkeoloji bakundolaki na esika yango ebele ya biteni ya bambɛki mpe biteni soki 12 kati na yango ezalaki bansango oyo bato bazalaki kotindelana; bato ya mayele balobaka ete yango ezali na “ntina mingi . . . mpo esalisaka na koyeba makambo ya politiki mpe yikiyiki oyo ezalaki ntango bato ya Yuda bazalaki komilɛngela mpo bayebaki ete Nebukadanesala [mokonzi ya Babilone] akoya kobundisa bango.”

Mikanda oyo eleki ntina ezali oyo soda moko ná Yaosi, oyo mbala mosusu azalaki mokonzi ya basoda oyo bazalaki na Lakisi, bazalaki kotindelana. Elobeli oyo esalelami na mikanda yango ekokani na oyo ezali na mikanda ya mosakoli Yilimia, oyo azalaki na bomoi na eleko wana. Tótalela ndenge oyo mikanda mibale endimisi makambo oyo Biblia elobi mpo na eleko yango ya mpasi.

Na Yilimia 34:7, mosakoli alobeli ntango oyo “ebolo ya mokonzi ya Babele bazalaki kobunda na Yelusaleme mpe na mboka nyonso ya Yuda oyo etikalaki na Lakisi mpe na Azeka, zambi bobele oyo etikalaki lokola mboka-na-mapango kati na mboka ya Yuda.” Moko ya mikanda ya Lakisi elobeli mpe makambo yango. Elobi boye: “Tozali komona bilembo [ya mɔtɔ] ya Lakisi . . . , mpo tokoki komona Azeka te.” Bato mingi ya mayele balobaka ete maloba yango emonisi ete bato ya Babilone basilaki kokweisa Azeka mpe etikalaki moke bákweisa Lakisi. Likambo oyo ebendi likebi na biso na mokanda yango ezali maloba “bilembo ya mɔtɔ.” Yilimia 6:1 emonisi mpe ete bato bazalaki kosalela mayele wana mpo na kopesana nsango.

Mokanda mosusu ya Lakisi endimisi mpe makambo oyo mosakoli Yilimia mpe mosakoli Ezekiele balobaki mpo na milende oyo mokonzi ya Yuda asalaki mpo na kosɛnga lisungi na Ezipito ntango atombokelaki Babilone. (Yilimia 37:5-8; 46:25, 26; Ezekiele 17:15-17) Mokanda yango elobi boye: “Sikoyo moombo na yo azwi nsango oyo: Generale Konyahu, mwana ya Elnatan, akei na sudi mpo na kokɔta na Ezipito.” Bato mingi ya mayele balobaka ete yango ezalaki mpo na koluka lisungi na Ezipito.

Biteni ya bambɛki ya Lakisi ezali mpe na bankombo mingi oyo ezali na mokanda ya Yilimia. Bankombo lokola: Neliya, Yajanai, Gemalia, Elenatana, mpe Hosaya. (Yilimia 32:12; 35:3; 36:10, 12; 42:1) Toyebi te soki bankombo oyo ezali na bambɛki yango ezali mpenza ya bato oyo Yilimia alobelaki. Nzokande, lokola Yilimia azalaki na bomoi na eleko yango, bokokani wana esengeli mpenza kobenda likebi na biso.

Likambo oyo ekokani

Biteni ya bambɛki ya Samalia, ya Alada, mpe ya Lakisi ezali kondimisa makambo ndenge na ndenge oyo Biblia elobeli. Makambo lokola bankombo ya bato, bankombo ya bisika, mpe makambo etali losambo mpe makambo ya politiki ya ntango wana. Nzokande, ezali na likambo moko ya ntina oyo ekokani kati na biteni ya bambɛki ya bisika yango misato.

Mikanda ya Alada mpe ya Lakisi ezali na maloba lokola “Tiká Yehova apesa yo kimya.” Kati na mikanda nsambo ya Lakisi, nkombo ya Nzambe etángami mbala 11. Lisusu, bankombo mingi ya Baebele oyo ezali na biteni ya bambɛki ya bisika yango misato ezali na nkombo Yehova na mokuse. Na bongo, biteni yango ya bambɛki ezali komonisa ete Bayisalaele ya ntango wana bazalaki kosalela nkombo ya Nzambe mokolo na mokolo.

[Elilingi na lokasa 13]

Eteni ya mbɛki oyo bazwaki na bitiká ya Alada etindamaki epai ya moto moko nkombo na ye Eliasibi

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Fɔtɔ ya © Israel Museum, Jerusalem; na ndingisa ya Israel Antiquities Authority

[Elilingi na lokasa 14]

Mokanda moko ya Lakisi oyo ezali na nkombo ya Nzambe

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Tokangi fɔtɔ yango na ndingisa ya British Museum

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto