Tel Arad endimisi bosolo ya Biblia
Na Tel Arad, na ekólo Israël, bato ya arkeoloji bakundolaki bitika ya engumba moko oyo ekundamaki na nse ya mabelé na boumeli ya bankama ya bambula. Bamonaki mpe tempelo moko ya kala, ebele ya makomi ya kala mpe biloko mosusu.
LELO oyo, bato oyo bakendaka na engumba Arad bamonaka yango kaka lokola bingumba mosusu ya Israël. Engumba yango ya bato 27 000, ezali na kati ya esobe ya Yudea, na wɛsti ya Mbu Ekufá. Kasi, engumba Alada (Arad) oyo Biblia elobeli ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 8 na wɛsti ya Arad ya lelo. Ezali kuna nde bato ya arkeoloji bakundolaki ebele ya bandako mpe makomi ya kalakala oyo ekundamá na nse ya ebele ya zɛlo.
Makomi yango ekomamaki likoló ya biteni ya bambɛki. Na ntango ya kala, momeseno ya kokoma likoló ya biteni ya bambɛki epalanganaki mingi. Tel Arad ezali esika oyo bakundolaki motángo eleki monene ya biteni ya bambɛki na Israël mobimba. Kasi, nyonso wana ekoki kozala na ntina nini mpo na biso?
Biloko ya kala oyo bamonaki na Tel Arad esalelamaki na bileko ndenge na ndenge, banda na ntango ya Basambisi na Yisalaele tii na ntango oyo bato ya Babilone babebisaki mokili ya Yuda na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Na yango, biloko wana ekoki kondimisa bosolo ya Biblia. Ezali mpe komonisa ndenge oyo bato na Yisalaele ya kala bazalaki kotalela nkombo ya Nzambe.
Engumba Arad mpe Biblia
Biblia elobi makambo mingi te mpo na engumba Arad to Alada. Kasi, engumba yango ezalaki na nzela moko monene epai bato ya mombongo bazalaki koleka. Yango wana, makomi ya kala mpe biloko oyo bato ya arkeoloji bakundoli emonisi ete engumba yango ezalaki mbala na mbala kobɔtɔlama na banguna, kobebisama, mpe kotongama lisusu. Lokola ebebisamaki mpe etongamaki mbala na mbala, ekómaki lokola mwa ngomba to tell.
Biblia etángi nkombo Arad mpo na mbala ya liboso na lisolo oyo elobeli eteni ya nsuka ya mobembo ya mbula 40 oyo Bayisalaele basalaki na esobe. Nsima ya liwa ya Alona, ndeko ya Moize, Bayisalaele bakómaki pembeni ya ndelo ya Mokili ya Ndaka. Mokanana, mokonzi ya Alada, akanisaki ete ekozala pɛtɛɛ mpo alonga bato yango oyo bazalaki koyengayenga na esobe. Yango wana, abundisaki bango. Kasi, na lisalisi ya Yehova Nzambe, Bayisalaele balongaki ye, mpe babebisaki engumba yango mobimba, atako bato na yango mosusu babomamaki te.—Mituya 21:1-3.
Eumelaki te, Bakanana batongaki lisusu engumba yango. Mwa bambula na nsima, ntango Yosua akómaki kuna, wana azalaki kobɔtɔla bingumba ya Bakanana banda na nɔrdi mpe akómaki na “mokili ya ngomba mpe mokili ya ngɛlɛ,” moko na bakonzi oyo abundisaki ezalaki “mokonzi ya Alada.” (Yosua 10:40; 12:14) Na nsima, bakitani ya Hobaba, Mokeni oyo asalisaki Moize ntango Bayisalaele bazalaki na esobe, bafandaki na eteni yango ya mokili ya ngɛlɛ to Negebe.—Basambisi 1:16.
Biloko oyo bakundoli
Biloko oyo bamonaki na Tel Arad ezali komonisa bosolo ya makambo mosusu oyo Biblia elobi ete esalemaki kuna na nsima. Na ndakisa, bato ya arkeoloji bamonaki bifelo ya makasi oyo elandaná. Ekoki kozala ete bifelo yango mosusu etongamaki na eleko ya boyangeli ya Salomo, mokonzi oyo asalisaki misala minene ya kotonga. (1 Mikonzi 9:15-19) Ntango bazalaki kotimola, bamonaki bilembo oyo emonisi ete etumba moko makasi esalemaki wana, mbala mosusu na ebandeli ya ekeke ya 10 L.T.B. Yango ekokani na eleko oyo Sisaka, mokonzi ya Ezipito ayaki kobundisa Yisalaele, mbula mitano nsima ya liwa ya Salomo. Mayemi oyo ezali na efelo moko na engumba Karnak, na sudi ya Égypte ezali komonisa etumba yango mpe Alada etángami kati na bingumba oyo mokonzi ya Ezipito alongaki.—2 Ntango 12:1-4.
Likambo mosusu oyo ezali kobenda likebi ezali ete motángo monene kati na biteni ya bambɛki soki 200 oyo bakundolaki ezali na bankombo ya Baebele oyo ezali mpe na Biblia, na ndakisa Pasulu, Melemote, mpe bana ya Kola. Makomi yango mosusu ezali na ntina mingi mpamba te ezali na nkombo ya Nzambe. Nkombo yango, oyo ezalaki kokomama na balɛtrɛ minei ya Liebele יהוה (YHWH), ezali nkombo ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya Nyonso. Bikeke mingi na nsima, Bayuda mingi bakómaki kokanisa ete kotánga to kokoma nkombo yango ezali lisumu. Nzokande, biloko oyo bakundolaki na Tel Arad mpe na bisika mosusu, ezali komonisa ete na ntango ya kala mpenza, bato bazalaki kosalela nkombo ya Nzambe mokolo na mokolo mpo na kopesana mbote, to mpo na kopambola. Na ndakisa, na esika moko bakomi boye: “Epai ya nkolo na ngai Eliasibi. Tiká ete Yawe [ Yehova] abatela yo. . . . Azali na tempelo ya Yawe.”
Kasi, tempelo oyo tolobelaki na ebandeli etongamaki mpo na nini? Bato ya mayele bapesaki makanisi ndenge na ndenge mpo na tempelo moko ya kala ná etumbelo na yango oyo bamonaki na Tel Arad, oyo etongamaki ntango engumba yango ezalaki ya Bayuda. Atako tempelo yango ezali moke koleka oyo Salomo atongaki na Yelusaleme, batempelo yango ekokani na makambo mingi. Tempelo ya Arad etongamaki mpo na nini mpe ntango nini? Banani bazalaki kosalela yango? Bato ya mayele na makambo ya kala bapesaka makanisi ndenge na ndenge.
Mobeko ya Yehova elobaki polele ete tempelo ya Yelusaleme ezalaki esika bobele moko oyo Bayisalaele basengelaki kosalaka bafɛti mpe kopesaka bambeka. (Deteronome 12:5; 2 Ntango 7:12) Na yango, bato oyo batongaki tempelo ya Arad mpe oyo bazalaki kosambela kuna babukaki mobeko ya Nzambe; mbala mosusu, esalemaki na eleko oyo Bayisalaele mingi bazalaki kotika losambo ya pɛto mpe bazalaki kotonga bitumbelo mosusu mpe komipesa na milulu ya losambo ya lokuta. (Ezekiele 6:13) Soki ezali bongo, mbala mosusu tempelo yango ebomamaki ntango Hizikiya to Yosiya bapɛtolaki Yuda na ekeke ya 8 to 7 L.T.B.—2 Ntango 31:1; 34:3-5, 33.
Tomoni mpenza ete mwa biloko oyo bamonaki na Tel Arad ezali na ntina mingi mpo na biso. Nsima ya bikeke mingi, bato ya arkeoloji bamoni biloko ya kala oyo endimisi bosolo ya Biblia, emonisi ndenge oyo Bayisalaele balukaki komekola tempelo ya Yelusaleme mpo na kosala losambo ya lokuta mpe emonisi bandakisa ya ndenge oyo bazalaki kosalela nkombo ya Yehova na bomoi ya mokolo na mokolo.
[Karte/Elilingi na lokasa 23]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
JÉRUSALEM
Mbu Ekufá
Arad
Tel Arad
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Elilingi na lokasa 24]
Liyemi na efelo moko na Karnak, Égypte
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Elilingi na lokasa 25]
Likomi oyo elobi: “Tiká ete Yawe [Yehova] abatela yo”
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Fɔtɔ © Israel Museum, Jerusalem; na ndingisa ya Israel Antiquities Authority
[Elilingi na lokasa 25]
Eteni ya tempelo ya Tel Arad
[Elilingi na lokasa 25]
Efelo ya Tel Arad, na ngámbo ya ɛsti
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 25]
Todd Bolen/Bible Places.com