Bato na mokili mobimba bazali kokóma na bomoko—Ndenge nini?
LILOBA “bomoko” elimboli nini mpo na yo? Mpo na bato mingi, bomoko elimboli kaka kozanga kowelana to kobunda. Na ndakisa, soki bikólo mibale to mingi bayokani mpo na kimya, bakoki koloba ete bazali na bomoko. Kasi, ezali mpenza bongo? Te.
Na ndakisa, banda kala, bikólo mingi bayokanaka mpo na kimya mpe na nsima babundaka. Mpo na nini? Mpamba te na esika ya koluka kimya mpe bomoko, mbala mingi bakonzi ya mokili balukaka nde komonisa nguya mpe lokumu na bango. Longola yango, bikólo mosusu bazali kobanga mpo bayebi te nini ekokómela bango soki bikólo mosusu eleki bango na nguya.
Na yango, ata soki bikólo mibale bazali kobunda te, yango elakisi te ete bazali na bomoko mpe na kimya. Tókanisa naino: soki bato mibale bazali kolakisana mindoki, tokoki koloba ete bazali na kimya ata soki moko na bango alelisi naino mondoki te? Kokanisa bongo ekozala mpenza komikosa! Nzokande, yango mpenza nde ezali kosalema na kati ya bikólo mingi lelo oyo. Lokola bazali kotyelana mitema te, bazali kobanga ete mokolo mosusu mindoki ekolela. Milende nini ezali kosalema mpo na kopekisa likambo ya ndenge wana esalema?
Nsɔmɔ ya bibundeli ya nikleere ezali kolongola elikya ya bomoko
Bato mingi bazali kotya elikya na bango na boyokani oyo esalemaki na 1968 mpo na kopekisa bibundeli ya nikleere ekóma ebele. Bayokanaki ete bikólo oyo bazali na bibundeli yango te básala yango te, mpe oyo bazali na yango básala mosusu te. Boyokani yango, oyo lelo endimami na bikólo koleka 180, esalemaki mpenzampenza na mokano ya kosilisa bibundeli nyonso na mokili.
Atako ezali mokano ya malamu mpenza, bato mingi bazali komona kaka ete yango ezali mayele mabe ya mwa bikólo oyo bazali na bibundeli yango mpo na kopekisa bikólo mosusu básala mpe oyo ya bango. Yango wana, likama ezali ete bikólo mosusu oyo bakɔtaki na boyokani yango bakoki kobongola makanisi. Kutu, bikólo mosusu ezali komona ete kopekisa bango básala bibundeli oyo ekoki kobatela bango ezali bosembo te.
Eloko ezali kobebisa lisusu makambo, ata mpe kobakisa likama, ezali ete bapekisi ata ekólo moko te kosalela nikleere mpo na kobimisa kura. Yango etindi bato mosusu bákanisa ete bikólo mosusu oyo balobaka ete bazali kosalela nikleere mpo na kobimisa kura bazali mpe kosala bibundeli ya nikleere na kobombana.
Ekoki mpe kozala ete bikólo oyo bazali na bibundeli yango bazali kotosa boyokani yango te. Bato mosusu bazali koloba ete soki tokanisi ete bikólo oyo batondi na bibundeli ya nsɔmɔnsɔmɔ bakobwaka yango nyonso to bakolongola ata ndambo, tokomikosa mpenza. Mokomi moko alobi ete, “mpo likambo ya ndenge wana esalema . . . ekosɛnga bikólo oyo bazali kowelana lelo bákóma na boyokani makasi mpe bákóma kotyelana mpenza motema. [Yango wana, ezali mpenza mpasi tóndima ete] ekoki kosalema.”
Emonani mpenza ete milende oyo bato bazali kosala mpo na kokóma na bomoko, ata soki bazali kosala yango na motema moko, eboti ata mbuma moko te. Yango ekoki kokamwisa bayekoli ya Biblia te, mpo Liloba ya Nzambe elobi boye: “Ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” (Yilimia 10:23) Biblia elobi mpe polele ete: “Nzela ezali oyo emonani malamu na moto, nde nsuka na yango bobɛlɛ nzela ya kufa.” (Masese 16:25) Milende oyo baguvɛrnema ya bato ezali kosala mpo na kotya bomoko ekoki kokende mosika te. Atako bongo, elikya ezali.
Bomoko ya solosolo ekouta wapi?
Biblia ezali na bilaka oyo Nzambe apesi ete bato ya mokili mobimba bakosangana; kasi yango ekosalema na bato te. Ye moko Mozalisi oyo asalaki bato mpo báfanda na kimya na mokili mobimba, akokokisa oyo bato bazali kokoka kosala te. Bato mosusu bakoki koloba ete yango ezali kaka ndɔtɔ mpamba. Kasi, mokano ya Nzambe banda ebandeli ezalaki ete bato nyonso bázala na kimya mpe na bomoko.a Bavɛrsɛ mingi ya Biblia ezali komonisa mpenza ete Nzambe atiki te mokano na ye ya kosangisa bato nyonso. Talá mwa bandakisa:
• “Yaká kotala misala ya [Yehova] oyo asali bikamwiseli kati na mokili. Ye akosukisa bitumba kino nsuka ya mokili; akobukabuka litimbo mpe akokatakata likɔnga, akozikisa mpe makalo kati na mɔtɔ.”—NZEMBO 46:8, 9.
• “Bakoyokisana mpasi te, bakobebisana mpe te na ngomba mobimba ya bulɛɛ na ngai; zambi mokili ekotonda na boyebi ya [Yehova] lokolo mbonge ekozipaka mai-ya-monana.”—YISAYA 11:9.
• “Akosilisa kufa libela mpe Nkolo [Yehova] akokɔmba mpisoli na bilongi nyonso; akolongola mpe nsɔni ya bato na ye longwa na mokili mobimba, zambi [Yehova] alobi bongo.”—YISAYA 25:8.
• “Ezali na likoló ya sika mpe na mabelé moko ya sika oyo tozali kozela engebene elaka na ye, mpe na kati na yango boyengebene ekofanda.”—2 PETELO 3:13.
• “[Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.”—EMONISELI 21:4.
Tosengeli mpenza kotyela bilaka wana motema. Mpo na nini? Mpamba te Mozalisi, Yehova Nzambe, azali na nguya mpe na likoki ya kosangisa bato. (Luka 18:27) Azali mpe na mposa ya kosala yango. Kutu, Biblia elobi ete mposa ya Nzambe ezali ya “koyanganisa lisusu biloko nyonso esika moko na kati ya Klisto, biloko oyo ezali na likoló mpe biloko oyo ezali na mabelé.”—Baefese 1:8-10.
Elaka oyo Nzambe apesaki ya “mabelé moko ya sika” epai “boyengebene ekofanda” ezali ndɔtɔ ya mpamba te. (2 Petelo 3:13) Mpo na bilaka na ye, Yehova Nzambe alobi boye: “Ekobutwa epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolonga na likambo litindaki ngai yango.”—Yisaya 55:11.
Liloba ya Nzambe esangisi bango
Ndenge tolobaki na lisolo ya liboso, mbala mingi mangomba ekabolaka bato na esika ya kosangisa bango. Tosengeli kotalela likambo yango malamumalamu, mpo soki tondimi ete Mozalisi azali, omoni te ete basambeli na ye basengeli kozala na kimya mpe na bomoko? Ezali mpenza bongo!
Bokabwani oyo mangomba ezali kotya na kati ya bato ekoki te kouta epai ya Yehova Nzambe mpe Liloba na ye. Ezali nde komonisa ete mangomba ekoki makambo te mpo ezali kolanda makanisi ya bato mpo na koluka kimya, na esika ya kolanda mokano ya Nzambe. Yesu abengaki bakonzi ya mangomba ya ntango na ye “bakosi,” mpe alobaki na bango ete: “Yisaya asakolaki malamu mpo na bino, ntango alobaki ete, ‘Bato ya ekólo oyo bazali kokumisa ngai na mbɛbu na bango, nzokande motema na bango etangwá mosika na ngai. Bazali kokoba kosambela ngai kaka mpamba, mpo bazali koteya bakomandema ya bato lokola mateya.’”—Matai 15:7-9.
Nzokande, losambo ya solo ezali nde kosangisa bato. Mosakoli Yisaya asakolaki ete: “Ekozala ete na mikolo ya nsuka, ngomba ya ndako ya [Yehova] ekokokisama likoló koleka ngomba nyonso, ekotombwa likoló ya nkeka; mpe mabota nyonso bakokende wana. Akosambisa kati na mabota, akopamela mpe bikólo mingi; bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makɔnga na bango ete mazala bikateli ya matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.”—Yisaya 2:2, 4.
Na mikili koleka 230, Batatoli ya Yehova bazali kolanda malako oyo Yehova Nzambe apesá na likambo etali bomoko. Nini mpenza ezali kosangisa bango? Ntoma Paulo akomaki boye: “Bólata bolingo, mpo yango ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” (Bakolose 3:14) Liloba ya Grɛki oyo Paulo asaleli mpo na “ekanganeli” ekoki kopesa likanisi ya misisa ya matonga ya nzoto. Misisa yango ezalaka makasi lokola nsinga, mpe esalaka misala mibale ya ntina mingi. Ekangisaka binama ya nzoto mpe mikuwa esika moko.
Bolingo mpe esalaka kaka bongo. Bolingo esukaka kaka te na kopekisaka bato kobomana. Bolingo esalisaka nde bato ya bikólo ndenge na ndenge báfanda elongo mpe na kimya. Na ndakisa, ezali kopesa bato nzela básalaka te baninga makambo oyo bango balingaka te básala bango. Ndenge ekomami na Matai 7:12, Yesu alobaki boye: “Na yango, makambo nyonso oyo bolingaka ete bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango kaka bongo.” Kolanda toli yango esalisi bato ebele bátika kokanisela basusu mabe.
‘Bólinganaka na kati na bino’
Mpo na komonisa ete bazali bayekoli ya Yesu, Batatoli ya Yehova bazali na ekateli ya kolanda maloba ya Yesu oyo: “Bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:35) Bolingo ya ndenge wana emonanaki na lolenge ya kokamwa ntango bato bazalaki kowelana mpo bakeseni bikólo mpe mpo na makambo ya politiki. Na ndakisa, na 1994, ntango Bahutu ná Batutsi bazalaki kobomana na Rwanda, Batatoli ya Yehova bamonisaki mpenza ete balinganaka. Batatoli Bahutu batyaki bomoi na bango na likama mpo na kobatela bandeko na bango Batutsi.
Ya solo, ekoki kosalema te ete bato ya mokili oyo bákóma kolingana bango nyonso mpe mokili ekóma na bomoko. Biblia emonisi ete Nzambe ye moko akokokisa likambo yango na ntango oyo abongisi. Nzokande, ata lelo oyo, bato bakoki kolata bolingo mpe kokóma na bomoko.
Na mbula eleki, Batatoli ya Yehova balekisaki ngonga koleka miliare moko na kotala bato, koteya bango Biblia mpe komonisa bango litomba na yango na moi ya lelo. Boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe esangisi bamilio ya bato, oyo mingi na bango bazalaki liboso koyinana makasi. Na kati na bango, tokoki kotánga Ba-Arabe ná Bayuda, Ba-Arménien ná Ba-Turque, Ba-Allemand ná Ba-Russe, mpe bongo na bongo.
Okolinga koyeba ndenge Liloba ya Nzambe ezali kosangisa bato? Soki ezali bongo, kutaná na Batatoli ya Yehova na esika ofandi, to komá na adrɛsi moko oyo ebongi na yo na kati ya oyo ezali na lokasa 2.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu na ntina na mokano ya Nzambe mpo na bato, talá mokapo ya 3 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]
Bikólo mingi bayokanaka mpo na kimya mpe na nsima babundaka
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]
Kosalela mitinda ya Biblia ezali kosalisa bato koleka ndenge oyo baguvɛrnema ya mokili ekoki kosala
[Elilingi na lokasa 5]
Biblia ezali komonisa epai tokoki kozwa bomoko ya solo
[Elilingi na lokasa 7]
Batatoli ya Yehova Bahutu mpe Batutsi bazali kotonga esika ya losambo elongo