Fɛti ya bapakano ekoki kokóma ya boklisto?
NA ELEKO ya Noele ya mobu 2004, ntembe moko makasi ebimaki na Italie. Balakisi mosusu mpe bakambi mosusu ya biteyelo bazalaki koloba ete esengeli kolongola makambo nyonso etali losambo na fɛti ya Noele. Bapesaki makanisi yango mpamba te bana-kelasi mingi lelo oyo bazali Bakatolike te, Baprotesta mpe te. Nzokande, bamosusu bazalaki koloba ete esengeli kobatela makambo ya losambo na fɛti yango.
Kasi, makambo mingi oyo esalemaka na fɛti ya Noele eutá wapi? Wana ntembe yango ezalaki kokóma makasi, zulunalo ya Vatican (L’Osservatore Romano) epesaki mwa makanisi oyo ekoki kobenda likebi na biso.
Na oyo etali mokolo oyo fɛti ya Noele esalemaka, zulunalo yango elobaki boye: “Mokolo mpenza oyo Yesu abotamaki eyebani te mpamba te, masolo ya bokonzi ya Loma ya kala, balesansema oyo amperɛrɛ azalaki kosalisa na ntango wana, mpe masolo ya bikeke oyo elandaki elobeli yango te. . . . Ndenge eyebani malamu, Lingomba ya Katolike nde eponaki mokolo ya 25 Desɛmbɛ na ekeke ya minei. Mokolo yango ezalaki fɛti ya nzambe Moi na Loma ya kala. . . . Atako Constantin, mokonzi ya Loma, asilaki kondima boklisto na nzela ya mobeko moko oyo abimisaki, bato ebele, mingimingi basoda, bazalaki naino kondima lisapo ya . . . nzambe Moi. Bato bazalaki komipesa mingi na fɛti yango, oyo ezalaki kosalema na mokolo ya 25 Desɛmbɛ. Yango etindaki bakonzi ya Lingomba ya Katolike bákómisa yango fɛti ya boklisto, mpe bákumisaka mbotama ya Yesu Klisto, Moi ya boyengebene ya solo na esika ya nzambe Moi. Bakómisaki mokolo yango, mokolo ya kosepela mbotama na ye.”
Ezali boni mpo na nzete ya Noele, oyo basalelaka na Lingomba ya Katolike?
Zulunalo yango emonisaki ete na ntango ya kala, “bato bazalaki kokanisa ete banzete lokola pin to sapin ezali na nguya to ekoki kobatela moto na maladi.” Lisolo yango elobaki lisusu boye: “Na butu ya mokolo ya 24 Desɛmbɛ, bato bazalaki kokanisa Adama ná Eva na lisolo eyebani mingi ya Nzete ya Paladiso . . . Esengelaki básalelaka nzete ya pɔme, kasi lokola ezalaki mpasi mpo nzete yango ezala na eleko ya malili, bazalaki kosalela sapin, mpe bazalaki kokakisa mwa bapɔme na bitape na yango to, lokola elilingi ya Lisiko oyo ekoya, bazalaki kotya lolenge moko boye ya bagato oyo ezalaki komonisa Ukaristya ya Yesu, ná babɔmbɔ mpe makabo mpo na bana.” Nyonso wana ekómaki ndenge nini na nsima?
Nsima ya komonisa ete momeseno ya kosalela nzete ya Noele ebandaki na Allemagne, na ekeke ya 16, zulunalo yango emonisaki boye: “Italie ezali na kati ya bikólo ya nsuka oyo endimaki nzete ya Noele; ntina moko ezali ete nsango ezalaki kotambola ete kosalela nzete ya Noele ezalaki momeseno ya Lingomba ya Protesta mpe na esika na yango esengeli kosalela bililingi ya Mwana Yesu.” Pápa Paul VI nde “abandisaki momeseno yango ntango atyaki nzete monene ya Noele [liboso ya Katedrale Saint-Pierre, na Rome]” pembeni ya bililingi ya Mwana Yesu.
Okanisi ete ezali mabe te ete mokonzi moko ya lingomba azwa milulu mpe biloko mosusu oyo euti na bapakano mpe akómisa yango ya boklisto? Makomami ekebisi baklisto ya solo na maloba oyo: “Boninga nini ezali na kati ya boyengebene mpe botyoli-mibeko? To bosangani nini ezali na kati ya pole mpe molili?”—2 Bakolinti 6:14-17.
[Elilingi na lokasa 9]
Nzete ya Noele (na lokasa 8) mpe bililingi ya Mwana Yesu na Vatican
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© 2003 BiblePlaces.com
[Elilingi na lokasa 9]
Nzambe moi
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Museum Wiesbaden