Bokonzi ya nzambe ekoya ntango nini?
BANTOMA bazalaki na mposa ya koyeba ntango oyo Yesu akotya Bokonzi na ye. Batunaki ye boye: “Nkolo, okozongisela Yisalaele bokonzi na ntango oyo?” (Misala 1:6) Lelo oyo, mbula soki 2 000 na nsima, bato bazali kaka na mposa ya koyeba ntango oyo Bokonzi ya Nzambe ekoya.
Lokola Yesu azalaki kolobela mingi Bokonzi na mosala na ye, na ntembe te okoki kokanisa ete ayanolaki na motuna yango. Ya solo, apesaki eyano na motuna yango. Alobelaki mbala mingi eleko moko oyo abengaki “kozala” na ye. (Matai 24:37) Kozala yango ezali na boyokani na kotyama ya Bokonzi ya Masiya. Kozala yango ezali nini? Tótalela makambo 4 oyo Biblia elobi mpo na kozala ya Klisto.
1. Kozala ya Klisto esengelaki kobanda ntango molai mpenza nsima ya liwa na ye. Yesu apesaki lisese moko oyo kati na yango, amikokanisaki na moto moko oyo “asalaki mobembo na mokili moko ya mosika mpo na kozwa nguya ya bokonzi.” (Luka 19:12) Ndenge nini lisese yango, oyo ezalaki komonisa makambo oyo ekoya, ekokisamaki? Yesu akufaki mpe asekwaki; na nsima asalaki mobembo “na mokili moko ya mosika,” elingi koloba na likoló. Ndenge Yesu amonisaki yango na lisese mosusu, asengelaki kozonga na nguya ya bokonzi “nsima ya ntango moko molai.”—Matai 25:19.
Yesu azongaki na likoló; mwa bambula na nsima, ntoma Paulo akomaki boye: “Moto wana [Yesu] apesaki mbeka moko kaka mpo na masumu seko na seko mpe afandaki na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe, kozeláká banda ntango wana tii banguna na ye bakotyama lokola ebonga mpo na makolo na ye.” (Baebele 10:12, 13) Yango emonisi ete nsima ya kozonga na likoló, Yesu asengelaki kozela ntango molai mpenza. Azelaki tii ntango Yehova Nzambe atyaki ye Mokonzi. Ezali na ntango yango nde kozala ya Klisto ebandaki. Awa na mabelé bato basengelaki komona likambo yango?
2. Kozala ya Klisto ezali komonana na miso ya bato te. Yesu alobelaki elembo ya kozala na ye. (Matai 24:3) Soki kozala ya Klisto esengelaki komonana na miso ya bato, okanisi ete basengelaki kozala na mposa ya elembo? Na ndakisa, kanisá ete ozali kokende kotala mai ya mbu. Mbala mosusu, okoki komona bilembo oyo ezali kolakisa yo nzela; kasi soki okomi na libongo mpe omoni mai, okozala lisusu na mposa ya elembo moko mpo elakisa yo mai ya mbu? Te! Okozala na mposa ya elembo te mpo elakisa yo eloko oyo ozali komona na miso.
Soki Yesu apesaki elembo oyo ekomonisa kozala na ye, ezalaki te mpo na kolakisa bato eloko oyo bakoki komona na miso; kasi mpo na kosalisa bango básosola likambo oyo esengelaki kosalema na likoló. Yango wana, Yesu alobaki boye: “Bokonzi ya Nzambe ezali koya te na ndenge ya komonana polele.” (Luka 17:20) Na yango, ndenge nini elembo esengelaki komonisa bato oyo bazali na mabelé ete Klisto abandi koyangela?
3. Kozala ya Yesu esengelaki komonana na makambo ya mpasi awa na mabelé. Yesu alobaki ete na kozala na ye, elingi koloba ntango akobanda koyangela na likoló, mabelé ekozala na bitumba, nzala, koningana ya mabelé, maladi, mpe kozanga botosi. (Matai 24:7-12; Luka 21:10, 11) Makambo yango ya mpasi esengelaki kouta wapi? Biblia elobi ete Satana, “moyangeli ya mokili oyo,” azali na nkanda makasi mpo ayebi ete ntango na ye etikali moke mpenza lokola Klisto abandi koyangela. (Yoane 12:31; Emoniseli 12:9, 12) Lelo, tozali mpenza komona ete Satana azali na nkanda makasi mpe ete kozala ya Klisto ebandi. Mingimingi banda 1914, mbula oyo bato ya mayele balobaki ete makambo ya mokili ebongwanaki, makambo yango ezali komonana na ndenge oyo emonaná naino te.
Mbala mosusu okoki komona ete yango ezali nsango ya mabe, kasi ezali bongo te. Yango ezali komonisa ete Bokonzi ya Masiya ezali sikoyo koyangela na likoló. Etikali moke guvɛrnema yango eyangela mabelé mobimba. Kasi, ndenge nini bato bakoki koyeba makambo etali Bokonzi yango mpo na kondima mokonzi na yango mpe kondimama na bokonzi yango?
4. Kozala ya Yesu ezali komonana na mosala ya kosakola oyo ezali kosalema na mokili mobimba. Yesu akokanisaki kozala na ye na “mikolo ya Noa.”a (Matai 24:37-39) Noa atongaki masuwa; kasi, azalaki mpe “mosakoli moko ya boyengebene.” (2 Petelo 2:5) Noa azalaki kokebisa bato mpo na bitumbu ya Nzambe oyo ezalaki koya. Yesu alobaki ete bayekoli na ye awa na mabelé bakosala mosala moko ya ndenge wana na ntango ya kozala na ye. Alobaki boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.”—Matai 24:14.
Ndenge tomonaki yango na lisolo eleki, Bokonzi ya Nzambe ekobebisa baguvɛrnema nyonso ya mokili oyo. Mosala ya kosakola ezali kokebisa bato ete etikali moke Bokonzi yango eyangela mabelé, mpe ezali kopesa bato libaku ya kobika mpe kondimama na Bokonzi yango. Na yango, kanisá na motuna oyo: Ndenge nini okoyamba nsango yango?
Nsango ya Bokonzi ezali nsango malamu mpo na yo?
Nsango oyo Yesu asakolaki ezalaki mpenza kopesa bato elikya. Nsima ya botomboki oyo ebimaki na Edene, eleki sikoyo bankóto ya bambula, Yehova Nzambe azwaki mokano ya kosala guvɛrnema moko oyo ekosembola makambo, ekozongisa bato ya sembo na bomoi oyo alingaki ete bázala na yango banda na ebandeli—bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. Likambo nini mosusu ekoki kopesa esengo koleka koyeba ete guvɛrnema oyo Nzambe alakaki banda kala ezali sikoyo koyangela na likoló? Bokonzi yango ezali ndɔtɔ te, ezali solo mpenza!
Lelo oyo, Mokonzi oyo Nzambe aponi azali koyangela na kati ya banguna na ye. (Nzembo 110:2) Na mokili oyo mabe, Masiya azali kokokisa mposa ya Tata na ye ya koluka bato nyonso oyo balingi mpenza koyeba Nzambe mpe kosambela ye na “elimo mpe na solo.” (Yoane 4:24) Bato ya mposo nyonso mpe ya lolenge nyonso bakoki kozwa elikya ya kozala na bomoi ya seko na boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe. (Misala 10:34, 35) Tozali kolendisa yo osimba libaku malamu oyo ozali na yango. Luká koyekola makambo etali Bokonzi ya Nzambe sikoyo, mpamba te boyebi yango ekoki kosalisa yo ozwa bomoi ya libela na libela ntango bokonzi yango ya sembo ekoyangela!—1 Yoane 2:17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya Yesu ezali kosalisa mpo na kosembola likanisi ya mabe oyo ebimi mpo na ndenge oyo Babiblia mosusu ebongoli liloba “kozala.” Babiblia mosusu ebongoli liloba yango na “koya,” to “kozonga,” maloba oyo emonisaka likambo oyo esalemi na boumeli ya ntango mokuse. Nzokande, Yesu alobaki te ete kozala na ye ekokokana na Mpela ya ntango ya Noa, likambo oyo esalamaki na ntango mokuse; kasi alobaki ete ekokokana na “mikolo ya Noa,” mpo na komonisa eleko moko ya ntango molai. Se ndenge ezalaki mpo na mikolo ya Noa, kozala ya Klisto ezali eleko ya ntango molai, oyo bato bakomipesa na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo mpe bakotya likebi te na makebisi oyo ezali kopesama.
[Bililingi na lokasa 8]
Bansango ya mabe oyo tozali koyoka mokolo na mokolo ezali elembo ete makambo ya malamu ezali koya
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Canon antiaérien: fɔtɔ ya U.S. Army