Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/1 lok. 31
  • Oyebaki yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebaki yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini Yesu awelaki kokende te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • “Mibali misato ya bwanya” bazalaki banani? Balandaki “monzoto” ya Beteleme?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Banganga-minzoto bayei kotala Yesu
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu asekwisi Lazare
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/1 lok. 31

Oyebaki yango?

Ntango nini banganga-minzoto bakendaki kotala Yesu?

Evanzile ya Matai elobi ete ‘banganga-minzoto oyo bautaki na bipai ya ɛsti’ bakendaki kotala Yesu mpe bamemelaki ye makabo. (Matai 2:1-12) Biblia elobi te soki banganga-minzoto yango bazalaki boni, mpe likambo moko te emonisi ete bazalaki misato; Biblia epesi mpe bankombo na bango te.

Libongoli moko ya Biblia (New International Version Study Bible) elobi boye mpo na Matai 2:11: “Bato mingi bakanisaka ete banganga-minzoto bakendaki kotala Yesu na elyelo ya banyama na butu oyo abotamaki, ndenge babateli ya mpate basalaki; kasi ezali bongo te. Bango bakendaki mwa basanza na nsima mpe bakutaki ye azalaki ‘mwana’ moke na kati ya ‘ndako.’” Likambo yango ezali solo mpamba te ntango Elode alingaki kobomisa Yesu, atindaki bákata mitó ya bana nyonso ya mibali ya mike na Beteleme mpe na bamboka ya zingazinga, kobanda na bana ya mbula 2 tii na nse. Aponaki mbula yango “engebene ntango oyo asilaki kotuna malamumalamu epai ya banganga-minzoto mpo ayeba.”​—Matai 2:16.

Lokola banganga-minzoto oyo bakendaki kotala Yesu bamemelaki ye wolo mpe makabo mosusu, soki ezalaki na butu oyo abotamaki, Malia alingaki te kopesa lokola mbeka bandɛkɛ mibale ntango amemaki Yesu na tempelo ya Yelusaleme mikolo 40 na nsima. (Luka 2:22-24) Mbeka oyo apesaki ezalaki oyo Mibeko esɛngaki mpo na babola oyo bakokaki kopesa mwana ya mpate te. (Levitike 12:6-8) Nzokande, ekoki kozala ete makabo yango ya motuya esalisaki baboti ya Yesu ntango bakimaki na ye na Ezipito.​—Matai 2:13-15.

Mpo na nini elekaki mikolo minei liboso Yesu akóma na lilita ya Lazalo?

Na mokuse, tokoki koloba ete Yesu ye moko nde alingaki bongo. Mpo na nini tolobi bongo? Tótalela lisolo oyo ezali na Yoane 11.

Ntango Lazalo, moninga moko ya Yesu oyo azalaki kofanda na Betani abɛlaki makasi, bandeko na ye ya basi batindelaki Yesu maloba. (Vɛrsɛ 1-3) Na ntango yango, Yesu azalaki na esika oyo akokaki kosala mobembo ya mikolo soki mibale mpo akóma na Betani. (Yoane 10:40) Emonani ete ntango Yesu azwaki nsango yango, Lazalo asilaki kokufa. Yesu asalaki nini? “Afandaki bongo mikolo mibale mpenza na esika azalaki,” mpe na nsima akendaki na Betani. (Vɛrsɛ 6, 7) Na yango, lokola Yesu alekisaki lisusu mikolo mibale na esika oyo azalaki mpe na nsima, asalaki mobembo ya mikolo mibale, akómaki na lilita mikolo minei nsima ya liwa ya Lazalo.​—Vɛrsɛ 17.

Na ntango wana, Yesu asilaki kosekwisa bato mibale​—moko, ntango kaka akufaki; mosusu, mwa bangonga nsima ya liwa. (Luka 7:11-17; 8:49-55) Akokaki nde kosekwisa moto oyo akufaki banda mikolo minei, oyo nzoto na ye ebandaki kopɔla? (Vɛrsɛ 39) Buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia emonisi ete Bayuda mosusu bazalaki koloba ete “moto oyo akufi banda mikolo minei akoki lisusu kozonga na bomoi te; na ntango yango nzoto na ye ebandaki kopɔla, mpe molimo, oyo bazalaki kokanisa ete ebimaka na nzoto nsima ya mikolo misato, esilaki kobima.”

Kati na ebele ya bato oyo bayaki na lilita ya Lazalo, soki ezalaki na baoyo bazalaki naino kokakatana, balingaki komona ete Yesu azali na nguya ya kosekwisa bato. Yesu atɛlɛmaki liboso ya lilita mpe agangaki ete: “Lazalo, bimá!” Na ntango yango, “moto oyo akufaki abimaki.” (Vɛrsɛ 43, 44) Biblia elobi ete bato oyo bakufá bakosekwa; kasi elobi te ete milimo na bango etikalaka na bomoi nsima ya liwa, ndenge bato mingi bakanisaka.​—Ezekiele 18:4; Yoane 11:25.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto