Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/1 nk. 14-17
  • Evolisyo eyokani na mateya ya Biblia?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Evolisyo eyokani na mateya ya Biblia?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Moto ya liboso
  • Moto abungisi ezaleli ya kokoka
  • Moto akoki kondima evolisyo mpe mateya ya boklisto?
  • Ntina oyo bato bandimaka evolisyo
  • Kondima oyo esimbami na bilembeteli
  • Bomoi ekelamá to ebimá yango moko?—Eteni 2: mpo na nini koboya kondima liteya ya evolisyo?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Nzambe akelaki nde lolenge nyonso ya bomoi na nzela ya evolisyo?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Evolisyo
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Liteya ya évolution ezali kosambisama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/1 nk. 14-17

Evolisyo eyokani na mateya ya Biblia?

EZALI solo ete Nzambe akelaki bato uta na banyama? Nzambe asalaki bambisi longwa na bikelamu mikemike ya bomoi; na nsima, asalaki ete bambisi yango ebongwana bikelamu oyo ezali na makolo mpe banyama, mpe nsukansuka asalaki ete lolenge moko ya makako ekóma bato? Bato mosusu ya siansi mpe bakonzi mosusu ya mangomba balobaka ete bandimaka Biblia mpe evolisyo. Bato yango balobaka ete makambo oyo ezali na mokanda ya Genese ezali masapo. Mbala mosusu yo mpe omitunaka ete, ‘Liteya oyo elobaka ete moto autá na nyama eyokani na mateya ya Biblia?’

Koyeba ndenge oyo tokelamá ezali na ntina mingi mpo na koyeba soki tozali mpenza banani, tozali kokende wapi, mpe ndenge oyo tosengeli kotambwisa bomoi na biso. Soki toyebi ndenge oyo moto akelamá, tokoyeba mpe ntina oyo Nzambe atiki nzela na bampasi mpe soki mokano na ye mpo na bato ezali nini. Tokoki te kozala na boyokani ya malamu na Nzambe soki tozali kokakatana ete azali Mozalisi na biso. Yango wana, tótalela naino oyo Biblia elobi mpo na ebandeli ya moto, bomoi oyo azali na yango lelo oyo, mpe avenire na ye. Na nsima, tokotalela soki liteya ya evolisyo eyokani na Biblia.

Moto ya liboso

Bato oyo bandimaka evolisyo balobaka ete banyama ebele bazalaki kobongwana mokemoke tii bakómaki bato; bandimaka te ete ezalaki na eleko moko oyo moto azalaki kaka moko. Nzokande, Biblia elobi bongo te. Elobi ete biso nyonso toutaki na moto moko, Adama. Biblia elobi ete Adama azalaki moto ya solo. Eyebisi biso nkombo ya mwasi na ye mpe ya bana na ye mosusu. Emonisi biso makambo oyo asalaki, oyo alobaki, ntango oyo azalaki na bomoi mpe ntango oyo akufaki. Yesu azalaki kokanisa te ete lisolo ya Adama ezali lisapo mpo na bato oyo batángá mingi te. Mokolo moko alobaki boye na bakonzi ya mangomba, bato oyo batángá mingi: “Botángá te ete moto oyo azalisaki bango na ebandeli asalaki bango mobali mpe mwasi?” (Matai 19:3-5) Na nsima, Yesu azongelaki makambo oyo Biblia elobi mpo na Adama ná Eva, makambo oyo ezali na Genese 2:24.

Luka, mokomi moko ya Biblia oyo alukaki malamu makambo oyo akomaki, alobeli Adama lokola moto oyo azalaki mpenza na bomoi, ndenge Yesu azalaki na bomoi. Luka atángaki molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu tii na moto ya liboso. (Luka 3:23-38) Lisusu, ntango ntoma Paulo alobaki liboso ya ebele ya bato, kati na bango bato ya filozofi oyo batángaki na biteyelo ya lokumu ya Bagrɛki, alobaki na bango boye: “Nzambe oyo asalá mokili ná biloko nyonso oyo ezali na kati na yango . . . asalaki uta na moto moko bikólo nyonso ya bato, mpo na kofanda na etando mobimba ya mabelé.” (Misala 17:24-26) Tomoni polele ete Biblia eteyaka ete toutaki na “moto moko.” Makambo oyo Biblia eteyi mpo na ebandeli ya moto eyokani na evolisyo?

Moto abungisi ezaleli ya kokoka

Biblia elobi ete moto ya liboso oyo Yehova akelaki azalaki moto ya kokoka. Ekokaki kosalema te ete Nzambe akela moto ya kozanga kokoka. Lisolo ya Biblia elobi boye: “Nzambe azalisaki moto na elilingi na ye mpenza . . . Nzambe atalaki biloko nyonso bisilaki ye kozalisa, mpe ezalaki malamu mingi.” (Genese 1:27, 31) Kozala moto ya kokoka elimboli nini?

Moto ya kokoka azali na bonsomi ya kopona mpe akoki komekola bizaleli nyonso ya Nzambe na ndenge ya kokoka. Biblia elobi boye: “Nzambe asalaki bato po bázala malamu, kasi bango moko bamilukelaka mindondo.” (Mosakoli 7:29, Bible na Lingala ya lelo oyo) Adama aponaki kotombokela Nzambe. Na bongo, Adama akómaki moto ya kozanga kokoka mpe atikelaki bana na ye ezaleli yango. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokweaka na mabe, atako tozalaka na mposa ya kosala malamu. Ntoma Paulo akomaki boye: “Oyo nazali kolinga, nazali te na momeseno ya kosala yango; kasi oyo nazali koyina nde yango nazali kosala.”​—Baloma 7:15.

Biblia elobi ete moto ya kokoka akelamaki mpo na kozala na bomoi libela na libela mpe na nzoto kolɔngɔnɔ. Makambo oyo Nzambe ayebisaki Adama emonisi polele ete soki abukaki mobeko ya Nzambe te, alingaki kotikala na bomoi libela na libela. (Genese 2:16, 17; 3:22, 23) Nsima ya kokela moto, Yehova akokaki koloba te ete azali “malamu mingi” soki ayebaki ete akobanda kobela to akotomboka mokolo mosusu. Atako nzoto na biso esalemi na motindo ya kokamwa mingi, lokola ekómá ya kozanga kokoka, ekoki kozala na mbeba mpe ezwaka maladi. Nyonso wana emonisi ete liteya ya evolisyo eyokani te na Biblia. Evolisyo eteyaka ete moto autaki na nyama; nzokande, Biblia emonisi ete autaki na moto ya kokoka.

Makambo oyo Biblia elobi mpo na bizaleli ya Nzambe emonisi mpe ete akokaki te kosalela evolisyo mpo na kosala moto. Koloba ete Nzambe atambwisaki makambo mpo bikelamu ya bomoi ebongwanaka mokemoke tii ekóma moto, elingi koloba ete Nzambe nde amemaki moto na ezaleli ya kozanga kokoka mpe na mpasi oyo azali na yango lelo oyo. Nzokande, Biblia elobi na ntina na Nzambe ete: “Ye libanga, mosala na ye ebongi; mpo ete nzela na ye nyonso boyengebene. Nzambe ya sembo mpe na mabe te, ye moyengebene mpe mosembwi. Bango basaleli ye mabe, bazali bana na ye lisusu te na ntina na libebi na bango.” (Deteronome 32:4, 5) Na yango, bampasi oyo bato bazali na yango lelo ezali te mpo ete Nzambe atambwisaki makambo mpo bikelamu ya bomoi ebongwanaka tii ekóma moto. Bato bazali na bomoi ya mpasi mpo moto ya liboso atosaki Nzambe te mpe mpo na yango, akómaki moto ya kozanga kokoka mpe atikelaki bana na ye ezaleli yango. Nsima ya kolobela Adama, tólobela sikoyo Yesu. Liteya ya evolisyo eyokani na makambo oyo Biblia elobi na ntina na Yesu?

Moto akoki kondima evolisyo mpe mateya ya boklisto?

Mbala mosusu oyebi ete moko ya mateya minene ya boklisto elobaka ete: “Klisto akufaki mpo na masumu na biso.” (1 Bakolinti 15:3; 1 Petelo 3:18) Mpo na koyeba ntina oyo liteya yango eyokani te na evolisyo, tosengeli koyeba naino mpo na nini Biblia ebengaka biso bato ya masumu mpe likambo nini lisumu esalaka na nzoto na biso.

Tozali bato ya masumu mpamba te tokoki te komekola bizaleli ya Nzambe, na ndakisa bolingo mpe boyengebene na ye, na ndenge ya kokoka. Yango wana, Biblia elobi ete: “Bato nyonso basali lisumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe.” (Baloma 3:23) Biblia eteyaka ete lisumu nde ememaki liwa. Vɛrsɛ ya 1 Bakolinti 15:56 elobi boye: “Etubeli oyo epesaka liwa ezali lisumu.” Lisumu oyo bankɔkɔ na biso ya liboso batikelá biso esalaka mpe ete tóbelaka. Yesu amonisaki ete tobelaka mpo na lisumu. Alobaki na mokatatali moko ete, “Masumu na yo elimbisami,” mpe moto yango abikaki.​—Matai 9:2-7.

Ndenge nini liwa ya Yesu ebikisi biso? Biblia emonisi bokeseni oyo ezali kati na Adama ná Yesu na maloba oyo: “Kaka ndenge bato nyonso bazali kokufa na kati ya Adama, bato nyonso mpe bakozongisama na bomoi na kati ya Klisto.” (1 Bakolinti 15:22) Lokola Yesu akabaki bomoi na ye, afutaki lisiko oyo esengeli mpo na kolongola biso na lisumu oyo Adama atikelaki biso. Yango wana, moto nyonso oyo azali komonisa kondima epai ya Yesu mpe azali kotosa ye, akozwa eloko ya motuya mingi oyo Adama abungisaki: bomoi ya seko.​—Yoane 3:16; Baloma 6:23.

Sikoyo, omoni ete mateya ya boklisto eyokani te na evolisyo? Soki tondimaka te ete “bato nyonso bazali kokufa na kati ya Adama,” tokoki nde kolikya ete “bato nyonso mpe bakozongisama na bomoi na kati ya Klisto”?

Ntina oyo bato bandimaka evolisyo

Biblia emonisi biso ntina oyo bato mingi basepelaka na liteya ya evolisyo. Elobi boye: “Ekozala na eleko moko boye oyo bakokoka te mateya oyo epesaka litomba, kasi, na boyokani na bamposa na bango moko, bakomindukela bateyi mpo básalaka bango nyɔminyɔmi na matoi; mpe bakolongola matoi na bango na solo, nzokande bakobaluka epai ya masapo ya lokuta.” (2 Timote 4:3, 4) Atako evolisyo eteyamaka lokola siansi, nzokande ezali moko ya bindimeli ya mangomba. Eteyaka lolenge moko boye ya kotalela bomoi mpe Nzambe. Makambo na yango esepelisaka bato oyo balingaka te ete Nzambe atambwisa bango. Bato mingi oyo bandimaka evolisyo balobaka ete bandimaka mpe ete Nzambe azali. Kasi, balobaka mpe ete Nzambe akelaki biloko nyonso te, akipaka bato te, mpe akosambisa bango te. Bato mingi basepelaka na makanisi yango.

Mbala mingi, bato oyo bandimaka evolisyo bazalaka na bilembeteli te, kasi balandaka nde “bamposa na bango moko”​—na ndakisa, bazalaka na mposa ya kondimama na bato ya siansi oyo, mingi kati na bango bandimaka liteya wana. Profesɛrɛ Michael Behe, oyo alekisaki bambula mingi na koyekola bikelamu ya bomoi, alobaki ete bato oyo balobaka ete selile ebongwanaki mokemoke bazali ata na elembeteli moko te. Mbongwana ya ndenge wana ekokaki nde kosalema na eloko mokemoke wana? Profesɛrɛ yango akomaki boye: “Bolukiluki moko te ya siansi emonisi ete molekile ebandaki kobongwana mokemoke mpo ekóma ndenge oyo ezali lelo oyo. Mokanda to zulunalo moko te ya siansi elimboli lolenge oyo molekile ekokaki kobongwana mpo ekóma na motindo ya kokamwa oyo toyebeli yango. . . . Makanisi ya bato oyo balobaka ete molekile esalemaki na evolisyo ezali bilobaloba ya mpamba.”

Soki bato oyo bandimaka evolisyo bazali na bilembeteli te, mpo na nini balobelaka liteya yango polele? Profesɛrɛ Behe alimboli boye: “Bato mingi, ata mpe bato minene ya siansi, baboyaka kondima ete mozalisi moko akelaki molɔ́ngɔ́.”

Liteya ya evolisyo ebendaka bakonzi mingi ya mangomba oyo balingaka komonana ete bazali na mayele mingi. Bato yango bakokani na bato oyo ntoma Paulo alobelaki na mokanda na ye epai ya baklisto ya Loma. Akomaki boye: “Eloko oyo ekoki koyebana na ntina na Nzambe ezali komonana polele na kati na bango . . . Bizaleli na ye oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele banda na kozalisama ya mokili, mpamba te yango emonanaka na nzela ya biloko oyo esalemá, ɛɛ nguya na ye ya seko mpe Bonzambe na ye, yango wana bazali kutu na likambo ya koloba te; mpamba te, atako bayebaki Nzambe, bapesaki ye nkembo te lokola Nzambe mpe bapesaki ye matɔndi te, kasi bakómaki nde bazoba na kati ya makanisi na bango mpe motema na bango oyo ezangá mayele ekómaki molili. Atako bazali koloba ete bazali bato ya bwanya, bakómi bazoba.” (Baloma 1:19-22) Osengeli kosala nini mpo bateyi ya lokuta bákosa yo te?

Kondima oyo esimbami na bilembeteli

Biblia emonisi ete kondima esengeli kosimbama na bilembeteli. Elobi boye: “Kondima ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa, elakiseli ya polelepolele ya makambo ya solosolo atako ezali komonana te.” (Baebele 11:1) Mpo na kozala na kondima ya solosolo epai ya Nzambe, tosengeli kozala na makambo ya solosolo oyo ezali komonisa ete Mozalisi azali. Biblia emonisi epai tokoki kozwa makambo yango.

Davidi akomaki boye: “Nakotɔnda yo mpo ete nasalami na motindo ya kokamwa mingi.” (Nzembo 139:14) Soki tozali kozwa ntango ya kokanisa na lolenge ya kokamwa oyo nzoto na biso mpe ya bikelamu mosusu ya bomoi esalemá, tokomona ete Mozalisi na biso azali na bwanya mingi mpenza. Makambo ndenge na ndenge oyo esalemaka na kati ya nzoto na biso mpo na kobatela yango na bomoi ebongisamá malamu mpenza. Longola yango, biloko ndenge na ndenge oyo ezali na kati ya molɔ́ngɔ́ emonisaka ete makambo nyonso ebongisamaki na bosikisiki. Davidi akomaki boye: “Likoló ekosakolaka nkembo ya Nzambe, lola ekoyebisaka misala ya mabɔkɔ na ye.”​—Nzembo 19:1.

Biblia yango moko mpe ezali na ebele ya bilembeteli oyo ezali kondimisa ete Mozalisi azali. Soki otaleli boyokani oyo ezali kati na mikanda nyonso 66 ya Biblia, otaleli mitinda na yango, mpe kokokisama ya bisakweli na yango, okomona mpenza ete ezali buku euti na Mozalisi. Soki okangi ntina ya mateya ya Biblia, okomona ete buku yango ezali mpenza Liloba ya Nzambe. Na ndakisa, soki okangi ntina ya mateya ya Biblia lokola oyo elimboli ntina ya bampasi, Bokonzi ya Nzambe, avenire ya bato, mpe ndenge ya kozala na bomoi ya esengo, okomona mpenza bwanya ya Nzambe. Mbala mosusu yo mpe okokanisa lokola Paulo oyo akomaki ete: “E! bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye ezali bozindo boni! Kosambisa na ye ekoki kososolama te mpe banzela na ye ekoki komonana te!”​—Baloma 11:33.

Ntango ozali kotalela bilembeteli yango mpe kondima na yo ezali kokola, okondimisama mpenza ete ntango ozali kotánga Biblia, ozali koyoka maloba ya Mozalisi. Ye moko alobi boye: “Ngai nasalaki mokili mpe natongaki moto likoló na yango; ngai, na mabɔkɔ na ngai, nasembolaki lola mpe nalakisaki ebolo mobimba na yango.” (Yisaya 45:12) Okokanisa ata mokolo moko te ete olekisaki ntango mpamba mpo na koluka komindimisa ete Yehova azali Mozalisi ya biloko nyonso.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 14]

Ntoma Paulo alobaki na Bagrɛki oyo batángá mingi ete: “Nzambe . . . asalaki uta na moto moko bikólo nyonso ya bato”

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 15]

Evolisyo eteyaka ete moto autaki na nyama; nzokande, Biblia emonisi ete autaki na moto ya kokoka

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 16]

“Bolukiluki moko te ya siansi emonisi ete molekile ebandaki kobongwana mokemoke mpo ekóma ndenge ezali lelo oyo”

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 17]

Tokamwaka bwanya ya Mozalisi soki totali lolenge ya kokamwa oyo bikelamu ya bomoi esalemá

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto