Mekolá kondima na bango
Alongisaki losambo ya solo
ELIYA azalaki kotala ebele ya bato oyo bazalaki komata na Ngomba Kalemele. Atako molili ezalaki naino, ezalaki komonana polele ete bato yango bazalaki mpenza babola. Elanga oyo eumelaki mbula misato na ndambo enyokolaki bango mpenza.
Basakoli 450 ya Baala bazalaki mpe komata elongo na bato yango; basakoli yango batondaki na lolendo mpe bazalaki koyina Eliya, mosakoli ya Yehova. Atako Yezabele, mwasi ya mokonzi, abomisaki basaleli mingi ya Yehova, Eliya alɛmbaki te kotɛmɛla losambo ya Baala. Kasi mpo na ntango boni lisusu? Mbala mosusu basakoli yango bazalaki kokanisa ete lokola Eliya azalaki kaka ye moko, akokaki te kolonga bango nyonso. (1 Mikonzi 18:3, 19, 20) Mokonzi Ahaba mpe ayaki na likalo na ye. Ye mpe azalaki kolinga Eliya te.
Mosakoli yango azalaki kozela likambo monene oyo esengelaki kosalema mokolo yango. Eliya azalaki kozela ndenge makambo ekoleka na etumba monene wana kati na mabe mpe malamu. Motema na ye ezalaki ndenge nini ntango ntɔngɔ etanaki? Lokola azalaki “moto na mayoki lokola oyo ya biso,” na ntembe te azalaki kobanga. (Yakobo 5:17) Ezala bongo to te, lokola azalaki na kati ya ebele ya bato oyo bazangaki kondima, mpe mokonzi na bango oyo atikaki losambo ya solo, mpe banganga-nzambe oyo bazalaki babomi-bato, Eliya amiyokaki mpenza ete azali ye moko.—1 Mikonzi 18:22.
Kasi, nini ememaki mpasi yango na Yisalaele? Mpe liteya nini okoki kozwa na lisolo yango? Biblia ezali kolendisa biso tótalaka malamumalamu basaleli ya sembo ya Nzambe mpe ‘tómekola kondima na bango.’ (Baebele 13:7) Tótalela ndakisa ya Eliya.
Nsuka ya kowelana moko molai
Na boumeli ya bambula mingi, Eliya azalaki komona ndenge oyo bato ya ekólo na ye bazalaki kosundola mpe kosambwisa eloko oyo elekaki motuya na ekólo na bango. Na boumeli ya bambula mingi, etumba moko monene ezalaki na Yisalaele: etumba kati na losambo ya Yehova, Nzambe ya solo, mpe losambo ya bikeko ya bikólo oyo ezalaki zingazinga. Na mikolo ya Eliya, etumbu yango eyaki ndɔngɔ.
Mokonzi Ahaba abalaki Yezabele, mwana ya mokonzi ya Sidona. Yezabele azalaki na mokano makasi ya kopalanganisa losambo ya Baala na Yisalaele mpe kolimwisa losambo ya Yehova. Ahaba alandaki makanisi ya mwasi na ye. Mokonzi yango atongaki tempelo mpe etumbelo mpo na Baala mpe ye moko abandaki kosambela nzambe yango ya lokuta. Na ndenge yango, atyolaki mpenza Yehova.—1 Mikonzi 16:30-33.a
Mpo na nini losambo ya Baala ezalaki mpenza mabe? Losambo yango ebebisaki ekólo Yisalaele, bato mingi batikaki Nzambe ya solo. Losambo yango ezalaki mpe na makambo ya mabe. Na batempelo na yango, basi ná mibali bazalaki kosala pite, bazalaki kosala bilambo oyo kati na yango bato bazalaki kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo, bazalaki ata mpe kotumba bana lokola mbeka. Mpo na yango, Yehova atindaki Eliya epai ya Ahaba mpo na koyebisa ye ete mbula ekobɛta lisusu te tii ntango mosakoli ya Nzambe akoloba ete mbula ebɛta lisusu. (1 Mikonzi 17:1) Bambula mingi elekaki liboso ete Eliya akutana lisusu na Ahaba mpe ayebisa ye ayanganisa bato na Ngomba Kalemele elongo na basakoli ya Baala.
Kasi, liteya nini tokoki kozwa na likambo yango lelo oyo? Bato mosusu bakoki kokanisa ete lisolo oyo elobeli losambo ya Baala ezali na ntina te lelo oyo, mpamba te tomonaka te batempelo mpe bitumbelo ya Baala. Kasi, lisolo yango ezali te kaka makambo oyo eleká kala. (Baloma 15:4) Liloba “Baala” elimboli “nkolo” to “mokonzi.” Yehova ayebisaki bato na ye ete basengeli kopona ye lokola “mobali” to nkolo na bango. (Yisaya 54:5) Ozali komona te ete tii na moi ya lelo bato bazali kosalela bankolo ndenge na ndenge na esika ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso? Bato oyo bazali komipesa mobimba mpo na konduka bomɛngo, bazali koboma nzoto mpo na komata mpɛtɛ na misala, bazali komipesa na masano, na kosangisa nzoto, to na banzambe mosusu na esika básalela Yehova bamonisaka ete baponi nkolo na bango. (Matai 6:24; Baloma 6:16) Na bongo, tokoki mpe koloba ete makambo oyo elekaki minene na losambo ya Baala ezali tii lelo oyo. Likambo oyo esalemaká kala mpo na komonisa nani, kati na Yehova mpe Baala, azali mpenza Nzambe ekoki kosalisa biso tópona malamu nani oyo tosengeli kosalela.
Na ndenge nini bazalaki ‘kotambolatambola’?
Mopɛpɛ ezalaka makasi na nsɔngɛ ya Ngomba Kalemele mpe, ntango moto atɛlɛmi kuna, akomona bisika mosusu ya mokili ya Yisalaele, banda na lobwaku ya Kisono, oyo ezali na nse, tii na Mbu Monene (Mbu ya Mediterane) oyo ezali mosika mingi te mpe na ngámbo mosusu, na nɔrdi, akomona na mosika bangomba ya Lebanona.b Kasi, ntango ntɔngɔ etanaki na mokolo wana, mokili ezalaki komonana kitoko ata moke te. Mokili oyo ezalaki kobota mbuma mingi, oyo Yehova apesaki bankɔkɔ ya Abalayama esilaki kokauka mpenza. Mokili yango ekaukaki na moi makasi, mabelé ebebaki mpo na bozoba ya bato ya libota ya Nzambe! Wana bato bazalaki komata, Eliya apusanaki penepene na bango mpe alobaki boye: “Kino ntango nini bino bokotambolatambola na nzela mibale ekeseni? Soki [Yehova] azali Nzambe, [bólanda] ye; nde soki Baala, [bólanda] ye.”—1 Mikonzi 18:21.
Maloba ‘kotambolatambola na nzela mibale’ oyo Eliya asalelaki elimboli nini? Bato yango bazalaki koyeba te ete basengelaki kopona nzambe moko kati na Yehova mpe Baala. Bazalaki kokanisa ete bakokaki kolanda banzela mibale, elingi koloba komipesa na milulu ya Baala mpe kosɛnga lisalisi ya Yehova Nzambe. Mbala mosusu bazalaki kokanisa ete Baala akopambola milona mpe bibwɛlɛ na bango, mpe “[Yehova] ya bibele” akobatela bango na bitumba. (1 Samwele 17:45) Babosanaki likambo moko ya ntina mingi, likambo oyo bato mingi mpe bazali kobosana lelo oyo: Yehova andimaka bombanda na banzambe mosusu te. Asɛngaka ete moto asambela kaka ye. Andimaka te ete moto oyo asambelaka ye asambela mpe nzambe mosusu. Kutu, amonaka ete moto yango azali kotyola ye!—Exode 20:5.
Bayisalaele yango bazalaki lokola moto oyo azali koluka kolanda nzela mibale. Lelo oyo, bato mingi bazali kosala libunga yango, bazali kotika ete “bankolo” mosusu bázwa esika na bomoi na bango mpe bazali kobosana losambo ya Nzambe! Maloba oyo Eliya ayebisaki bato mpo bátika kolanda nzela mibale ekoki kotinda biso tótalela makambo nini totyaka na esika ya liboso mpe soki tosambelaka mpenza nani.
Momekano monene
Na nsima, Eliya asɛngaki básala momekano moko. Momekano yango ezalaki mpasi te. Banganga-nzambe ya Baala basengelaki kotonga etumbelo mpe kotya mbeka likoló na yango; na nsima, basengelaki kobondela nzambe na bango mpo apelisa mɔtɔ. Eliya mpe asengelaki kosala bongo. Alobaki boye: “Nzambe oyo akozongisa na mɔtɔ, ye azali Nzambe.” Eliya ayebaki malamu nani azali Nzambe ya solo. Lokola azalaki na kondima makasi, atikaki ete basakoli ya Baala bábanda. Atikelaki bango bápona ngɔmbɛ oyo bakopesa lokola mbeka mpe bango nde bábanda kobelela nzambe na bango Baala.c—1 Mikonzi 18:24, 25.
Lelo oyo, Yehova asalaka makamwisi lokola na ntango ya kala te. Atako bongo, abongwani te. Tokoki kotyela ye motema ndenge Eliya asalaki. Na ndakisa, ntango bato mosusu bazali komonisa makanisi oyo ekeseni na mateya ya Biblia, tobangaka te kotika bango báloba. Lokola Eliya, totalelaka Nzambe ya solo mpo na kosukisa ntembe. Tosalaka yango na ndenge totyaka elikya, epai na biso moko te, kasi na Liloba ya Nzambe, oyo ekomamaki mpo na “kosembola makambo.”—2 Timote 3:16.
Basakoli ya Baala babongisaki mbeka mpe babandaki kobelela nzambe na bango. Bagangaki lisusu mpe lisusu ete, “Ee Baala, zongiselá biso!” Babelelaki bongo na boumeli ya bangonga mingi. Biblia elobi ete: “Kasi ezalaki na mongongo te, moko azongisaki te.” Ntango bakómaki na midi, Eliya abandaki koseka bango, alobaki na bango ete mbala mosusu Baala azali koyanola bango te mpo azali na mosala mingi, to mpe azali na kabinɛ, to azali kolala mpɔngi mpe esengeli bálamusa ye. Eliya alobaki na basakoli yango ete: “Bóganga na mongongo makasi.” Amonaki mpenza ete losambo ya Baala ezalaki lokuta, mpe alingaki ete Bayisalaele bámona yango bango moko.—1 Mikonzi 18:26, 27.
Mpo na yango, basakoli ya Baala “bagangaki na makasi mpe bamizokisaki bango mpenza lokola ezaleli na bango na mipanga mpe na makɔnga kino makila ebimaki likoló na bango.” Kasi, nyonso wana esalaki eloko te! “Mongongo ezalaki te, moko azongiselaki te, moko ayokaki mpe te.” (1 Mikonzi 18:28, 29) Baala azalaki ekeko mpamba. Losambo yango ezalaki mayele mabe ya Satana mpo na komema bato na kotika Yehova. Ndenge kaka ezalaki na ntango wana, baoyo bazali kopona nkolo mosusu na esika bápona Yehova lelo oyo, bakomona ete balekisaki ntango mpamba, mpe bakozala na nsɔni.—Nzembo 25:3; 115:4-8.
Nsuka ya momekano
Na nsima ya midi, ekómaki ngala ya Eliya. Abongisaki etumbelo moko ya Yehova oyo na ntembe te banguna ya losambo ya solo basilaki kobebisa. Atyaki mabanga 12, likambo oyo mbala mosusu ekundwelaki bato mingi ya Yisalaele ete basengelaki kaka kotosa Mibeko oyo Nzambe apesaki na mabota 12. Na nsima, atyaki mbeka likoló ya etumbelo mpe asɛngaki ete básopela yango mai oyo mbala mosusu bazwaki na Mbu ya Mediterane oyo ezalaki mosika te. Kutu, asɛngaki ete bátimola terase zingazinga ya etumbelo mpe bátondisa yango na mai. Asalaki ete makambo ezala pɛtɛɛ mpo na basakoli ya Baala, sikoyo alukaki ete makambo ezala mpasi mpo na Yehova, mpamba te azalaki na kondima makasi epai ya Nzambe.—1 Mikonzi 18:30-35.
Nsima ya kobongisa makambo nyonso, Eliya asalaki libondeli. Libondeli yango oyo ezalaki ya mindɔndɔ te emonisaki polele makambo oyo Eliya azalaki kotya na esika ya liboso. Ya liboso, alingaki ete bato nyonso báyeba ete Yehova, kasi Baala te, nde azali “Nzambe kati na Yisalaele.” Ya mibale, alingaki moto nyonso ayeba ete ye azali mosaleli mpamba ya Yehova; lokumu mpe nkembo nyonso esengelaki kopesama na Nzambe. Ya misato, amonisaki ete atikaki te komibanzabanza mpo na bato ya ekólo na ye, mpamba te alingaki ete Yehova ‘[azongisa] mitema na bango nsima.’ (1 Mikonzi 18:36, 37) Atako mpasi ekɔtaki na ekólo na bango mpo na kozanga bosembo na bango, Eliya atikaki te kolinga bango. Esengeli ete biso mpe tómonisaka na mabondeli na biso ete tomibanzabanzaka mpo na nkombo ya Nzambe, tozali na komikitisa mpe tozali na motema mawa mpo na bato oyo bazali na mpasi.
Liboso Eliya asala libondeli, mbala mosusu ebele ya bato wana bazalaki komituna soki ekomonana te ete Yehova azali mpamba lokola kaka Baala. Kasi, nsima ya libondeli na ye, bazwaki eyano mbala moko. Lisolo elobi boye: “Wana, mɔtɔ ya [Yehova] ekitaki, elyaki mbeka ya kotumba mpe nkoni mpe mabanga mpe putulu mpe mai mazalaki kati na libulu.” (1 Mikonzi 18:38) Yehova ayanolaki na ndenge ya kokamwa! Bato basalaki nini ntango bamonaki yango?
Bango nyonso bagangaki ete: “[Yehova] azali Nzambe, [Yehova] azali Nzambe!” (1 Mikonzi 18:39) Likambo yango efungolaki bango miso. Nzokande, bamonisaki naino kondima na bango te. Tokoki mpenza te koloba ete bato wana bakómaki na kondima kaka mpo balobaki ete Yehova azali Nzambe ya solo nsima ya komona mɔtɔ euti na likoló nsima ya libondeli ya Eliya. Yango wana, Eliya asɛngaki bango likambo mosusu. Atindaki bango básala likambo oyo basengelaki kosalaka banda kala: kotosa Mibeko ya Yehova. Mibeko ya Nzambe elobaki ete basakoli ya lokuta mpe basambeli ya bikeko basengeli kobomama. (Deteronome 13:5-9) Basakoli wana ya Baala bazalaki banguna minene ya Yehova Nzambe, oyo bazalaki kotɛmɛla mokano na ye. Ebongaki nde báyokela bango mawa? Bango moko bazalaki nde na mawa mpo na bana mike oyo bazalaki kotumba lokola bambeka epai ya Baala? (Masese 21:13; Yilimia 19:5) Ebongaki ata moke te koyokela bango mawa. Yango wana Eliya atindaki ete báboma bango nyonso mpe esalemaki bongo.—1 Mikonzi 18:40.
Bato mosusu balobaka mabe mpo na likambo oyo esalemaki nsima ya momekano wana na Ngomba Kalemele. Bamosusu balobaka ete bandimi oyo bazalaka na molende ya mabe bakoki kosalela lisolo yango mpo na kolongisa likambo ya koboma bato ya mangomba mosusu. Kutu, bato mingi bazali kosala makambo ya ndenge wana lelo oyo. Nzokande, Eliya azalaki te moto oyo azalaki koyina bato ya mangomba mosusu. Akokisaki kaka mokano ya Yehova ya koboma basali ya mabe. Lisusu, baklisto ya solo bayebi ete bakoki te kosala lokola Eliya, elingi koloba, kozwa mopanga mpo na koboma bato mabe. Yesu apesaki etinda oyo bayekoli na ye nyonso basengeli kolanda ntango alobaki na Petelo boye: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango, mpo baoyo nyonso bakamataka mopanga bakokufa na mopanga.” (Matai 26:52) Na mikolo ekoya, Yehova akotinda Mwana na ye aboma bato mabe.
Moklisto nyonso ya solo azali na mokumba ya komonisa kondima na bomoi na ye. (Yoane 3:16) Lolenge moko oyo akoki kosala yango ezali ya kolanda ndakisa ya bato ya kondima lokola Eliya. Mobali yango azalaki kosambela kaka Yehova mpe alendisaki bato mosusu básalaka bongo. Na mpiko nyonso, amonisaki lokuta ya lingomba oyo Satana azalaki kosalela mpo na komema bato bápesa Yehova mokɔngɔ. Atikaki Yehova abongisa makambo na esika atyela makoki na ye moko motema to asala mokano na ye moko. Ya solo, Eliya alongisaki losambo ya solo. Tiká ete mokomoko na biso amekola kondima na ye!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo oyo elekaki liboso kati na Eliya mpe Ahaba, talá lisolo “Tozali na kondima lokola oyo ya Eliya?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili 1992.
b Ngomba Kalemele ezalaka na ebele ya matiti ya mobesu, mpamba te, mipɛpɛ ya mpiɔ oyo eutaka na ebale ememaka mbula mpe ebele ya mamwɛ na ngomba yango. Lokola bato bazalaki kokanisa ete Baala anɔkisaka mbula, na ntembe te ngomba yango ezalaki esika monene ya losambo ya Baala. Na bongo, ngomba yango oyo esilaki kokauka ezalaki esika ebongi mpenza mpo na komonisa ete makambo oyo bazalaki kokanisa mpo na Baala, ezalaki lokuta.
c Eliya alobaki na bango ete: “Tyá mɔtɔ te.” Likambo yango ezali na ntina mingi mpamba te, bato mosusu ya mayele balobaka ete basambeli ya banzambe ya lokuta bazalaki kosalela bitumbelo oyo ezalaki na lidusu moko na nse, epai mɔtɔ ezalaki kouta mpo emonana lokola nde epeli na ndenge ya likamwisi.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 20]
Kopona nkolo mosusu na esika ya Yehova ememaka mpasi
[Elilingi na lokasa 21]
‘Yehova azali Nzambe ya solo!’