Pusaná penepene na Nzambe
Tata oyo akokani na mosusu te
LILOBA “tata” ezali moko ya maloba oyo esimbaka mpenza mitema ya bato. Tata oyo alingaka mpenza bana na ye asalisaka bango bákola malamu. Biblia ebengi Yehova Nzambe “Tata.” (Matai 6:9) Yehova azali Tata ya ndenge nini? Mpo na kozwa eyano na motuna yango, tótalela maloba oyo Yehova alobaki ntango Yesu azwaki batisimo. Ndenge oyo tata alobaka na bana na ye emonisaka soki azali moboti ya ndenge nini.
Na mobu 29 ya ntango na biso (T.B.), na sanza soki ya Ɔkɔtɔbɛ, Yesu akendaki na Ebale Yolodani mpo abatisama. Biblia elobeli likambo oyo esalemaki: “Nsima ya kobatisama, Yesu na mbala moko abimaki na mai; mpe, talá! likoló efungwamaki, mpe amonaki elimo ya Nzambe ezali kokita lokola ebenga koyáká likoló na ye. Talá! Ezalaki lisusu na mongongo moko uta na likoló oyo elobaki ete: ‘Oyo azali Mwana na ngai, molingami, oyo nandimi.’”a (Matai 3:16, 17) Maloba yango ya boboto oyo Yehova alobaki ezali komonisa biso soki azali Tata ya ndenge nini. Tótalela makambo misato oyo Yehova alobaki na mwana na ye.
Ya liboso, ntango Yehova alobaki ete, “oyo azali mwana na ngai,” na maloba mosusu alingaki nde koloba ete ‘nazali na esengo ya kozala tata na yo.’ Tata ya malamu akokisaka mposa oyo bana bazalaka na yango ete bátyela bango likebi mpe bándima bango. Mwana nyonso alingaka ete bámona mpenza ete azali na esika na kati ya libota mpe azali na ntina. Atako Yesu azalaki mokóló, kanisá ndenge oyo ayokaki ntango Tata na ye andimaki ye ndenge wana!
Ya mibale, ntango Yehova abengaki Mwana na ye “molingami,” amonisaki polele bolingo oyo azalaka na yango mpo na Yesu. Na maloba mosusu, alobaki ete, ‘nalingaka yo.’ Tata ya malamu ayebisaka bana na ye ete alingaka bango mingi. Maloba ya ndenge wana mpe makambo mosusu oyo emonisaka bolingo esalisaka bana bákola malamu. Na ntembe te, maloba ya Yehova oyo emonisaki ete alingaka mwana na ye, esimbaki mpenza motema ya Yesu!
Ya misato, ntango Yehova alobaki ete “oyo nandimi,” amonisaki ete asepelaka na Mwana na ye. Ezalaki lokola nde Yehova alobaki ete, ‘Mwana na ngai, nasepeli na likambo oyo osali.’ Tata oyo alingaka mwana na ye alekisaka te libaku ya koyebisa ye ete asepeli na likambo ya malamu oyo alobi to asali. Soki baboti bazali kosepela na bana na bango ndenge wana, yango elendisaka bana. Na ntembe te, Yesu alendisamaki ntango ayokaki maloba ya Tata na ye oyo emonisaki ete asepelaka na ye!
Ya solo, Yehova azali Tata oyo akokani na mosusu te. Osepelaka kozala na tata ya ndenge wana? Boye, okosepela koyeba ete okoki kokóma na boyokani malamu na Yehova. Soki ozali koyekola makambo na ye mpe ozali mpenza koluka kosala mokano na ye, akosepela na yo. Biblia elobi boye: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:8) Likambo moko te ekoki kopesa yo kimya koleka kozala na boyokani malamu na Yehova Nzambe, Tata oyo akokani na mosusu te!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Evanzile ya Luka, lisolo oyo elobeli batisimo yango emonisi ete Yehova asalelaki liloba “yo”; alobaki boye: “Yo ozali mwana na ngai, molingami; nandimi yo.”—Luka 3:22.