Tata ya malamu asalaka nini?
“Batata, bósilikisaka bana na bino te, mpo bálɛmba nzoto te.”—Bakolose 3:21.
TATA asengeli kosala nini mpo bana na ye básilika te? Ebongi mpenza ayeba mokumba na ye na kati ya libota. Zulunalo moko elobaki boye: “Tata azali na mokumba moko monene mpe ya ntina mingi na libota, oyo esalisaka bana bákola malamu.”
Mokumba ya tata ezali nini? Na mabota mingi, batalelaka tata libosoliboso lokola moto oyo apesaka bitumbu. Yango wana, soki mwana asali mabe, baama mi balobaka: ‘Zelá tata na bino aya!’ Mpo bana bákola malamu, esɛngaka kopesa bango bitumbu oyo ebongi na bango, kasi te kokangaka miso na mabe na bango. Kasi, kozala tata ya malamu esuki kaka te na kopesa bana bitumbu.
Likambo ya mawa, batata nyonso te nde babɔkwamá na baboti oyo bapesaki bango ndakisa ya malamu. Mibali mosusu babɔkwamá kaka na bamama na bango. Kasi, baoyo babɔkwamá na batata ya makambo makasi bakoki mpe kozala na momeseno ya konyokola bana na bango. Ndenge nini tata ya ndenge wana akoki kotika momeseno wana ya mabe mpe kobongisa lolenge na ye ya kobɔkɔla bana?
Ezali na buku moko oyo ezali na batoli ya kitoko, oyo tosengeli kotyela motema, oyo ekoki kosalisa batata bábɔkɔla bana na bango na ndenge ebongi. Buku yango ezali Biblia, oyo ezali na batoli ya malamu koleka babuku mosusu nyonso mpo na oyo etali bomoi ya libota. Toli ya Biblia ezali kaka maloba ya mpamba te; mpe ekoki komemela biso mpasi te. Batoli ya Biblia emonisaka bwanya ya Nkolo na yango, Yehova Nzambe, Mokeli ya libota. (Baefese 3:14, 15) Soki ozali tata, ekozala malamu otalela oyo Biblia ezali koloba na oyo etali kobɔkɔla bana.a
Kozala tata ya malamu esalisaka bana bákola malamu na nzoto, na makanisi mpe na elimo. Soki mwana azali koyokana malamu na tata na ye, akozala na mokakatano te ya kokóma mpe moninga ya Nzambe. Kutu, Biblia emonisi ete Yehova, Mozalisi na biso, azali mpe Tata na biso. (Yisaya 64:8) Tólobela sikoyo makambo motoba oyo tata asengeli kosalelaka bana na ye. Mokomoko ya makambo yango ekomonisa ndenge nini kosalela toli ya Biblia ekoki kosalisa tata akokisa mokumba na ye malamu.
1 Bana bazalaka na mposa tata alinga bango
Yehova apesá batata ndakisa ya malamu mpenza na likambo yango. Mpo na komonisa ndenge Nzambe ayokaka na ntina ya Yesu, Mwana ya liboso ya Nzambe, Biblia elobi boye: “Tata alingaka Mwana.” (Yoane 3:35; Bakolose 1:15) Mbala mingi, Yehova alobaki ete alingaka mpe andimaka mwana na ye. Ntango Yesu abatisamaki, mongongo ya Yehova eutaki na likoló mpe elobaki ete: “Yo ozali Mwana na ngai, molingami; nandimi yo.” (Luka 3:22) Yesu azalaki ata na ntembe moke te ete tata na ye alingaka ye. Liteya nini batata bakoki kozwa epai ya Nzambe na likambo yango?
Kokakatanaka te koyebisa bana na yo ete olingaka bango. Kelvin, tata moko ya bana mitano, alobi boye: “Nazalaki ntango nyonso komonisa bana na ngai ete nalingaka bango. Nazalaki kosala yango kaka na maloba te, kasi nazalaki mpe kotyela mokomoko na bango likebi. Nazalaki mpe kolatisa bango bakushe mpe kosukola bango.” Longola yango, bana na yo balingaka koyeba ete ondimaka bango. Na yango, komonaka kaka mabunga na bango te. Zalá nde na momeseno ya kopesaka bango longonya. Donizete, tata moko ya bana mibale, alobi boye: “Tata asengeli kolukaka mabaku ya kopesa bana na ye longonya.” Soki bana na yo bayebi ete ondimaka bango, yango ekosalisa bango bámona ete bazali mpe na ntina. Yango ekosalisa bango mpe bápusana penepene na Nzambe.
2 Bana bazalaka na mposa ya ndakisa malamu
Yoane 5:19 elobi ete Yesu asalaka “kaka oyo amonaka Tata azali kosala.” Simbá ete vɛrsɛ yango elobi ete Yesu azalaki komona mpe kosala makambo oyo tata na ye “azali kosala.” Mbala mingi, bana mpe basalaka kaka bongo. Na ndakisa, soki tata azali kopesa mwasi na ye lokumu mpe limemya, mwana na ye ya mobali akobanda mpe kopesa basi lokumu mpe komemya bango. Ndakisa ya tata ezali na ntina kaka mpo na bana mibali te, kasi makambo oyo bana basi bazali komona epai ya tata na bango ekoki kotinda bango bákóma kotalela mibali na lolenge boye to boye.
Bana na yo bazalaka na mokakatano ya kosɛnga bolimbisi? Na likambo yango mpe, ndakisa na yo ezali na ntina. Kelvin akanisi lisusu mokolo oyo bana na ye mibale ya mibali babebisaki camera moko ya ntalo mingi. Asilikaki makasi mpe abukaki mesa na likɔfi. Na nsima, Kelvin ayokaki mabe mpenza ndenge asilikaki makasi, mpe asɛngaki mwasi na ye ná bana bolimbisi. Amonaka ete ndenge asɛngaki bango bolimbisi, yango esalisaki mpenza bana na ye; bazalaka lisusu na mokakatano te ya kosɛnga bolimbisi.
3 Bana balingaka kozala na esika ya esengo
Yehova azali “Nzambe ya esengo.” (1 Timote 1:11) Yango wana, tokoki kokamwa te ete Mwana na ye, Yesu, azalaki mpenza na esengo ya kozala esika moko na Tata na ye. Masese 8:30 ezali kosalisa biso tómona boyokani oyo Yesu azalaki na yango ná Tata na ye: “Nazalaki pembeni na ye lokola [kapita-mosali, NW] . . . kosepela liboso na ye ntango nyonso.” Tata ná mwana bazalaki koyokana malamu mpenza!
Bana na yo balingaka kozala na esika ya esengo. Kozwa ntango ya kosakana na bango ekosala ete esengo ya ndenge wana ezala na kati ya libota. Kosakana elongo esalisaka baboti ná bana bázala na boyokani makasi. Felix, oyo azali na mwana moko ya mobali ya elenge andimi likambo yango. Alobi boye: “Kobomba ntango mpo na kominanola ná mwana na ngai esalisaki biso tókóma na boyokani makasi. Tosakanaka elongo, tokutanaka na baninga mpe tokendaka kotala bisika ya malamu elongo. Yango esali ete libota na biso ekóma mpenza na bomoko.”
4 Teyáká bana na yo makambo ya Nzambe
Yesu ateyamaki na Tata na ye. Yango wana Yesu alobaki boye: “Makambo oyo nayokaki epai na ye [Tata], nazali koloba yango na mokili.” (Yoane 8:26) Na miso ya Nzambe, tata nde azali na mokumba ya koteya bana na ye bizaleli ya malamu mpe makambo ya elimo. Moko ya mikumba na yo tata ezali ya kokɔtisa na mitema ya bana na yo mitinda ya sembo. Tata asengeli kobanda koteya bana na ye ntango bazali naino bana mike. (2 Timote 3:14, 15) Felix abandaki kotángela mwana na ye masolo ya Biblia ntango azalaki naino mwana moke mpenza. Felix azalaki kosalela masolo ya kitoko oyo ezali mpe na mayemi, lokola oyo ezali na buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia.b Ntango mwana na ye azalaki kokola, Felix azalaki kopona mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia oyo ekoki na mbula ya mwana na ye.
Donizete alobi boye: “Ezali pɛtɛɛ te kokómisa boyekoli ya Biblia na libota kitoko. Yango wana, ezali na ntina mingi baboti bámonisa ete balingaka makambo ya elimo, mpo soki baboti bazali kosalela makambo oyo bazali koteya te, bana bamonaka yango noki.” Carlos, oyo azali na bana misato ya mibali alobi boye: “Tofandaka elongo mbala moko na pɔsɔ mpo na kotalela bamposa ya libota. Mokomoko na kati ya libota aponaka likambo oyo alingi tólobela.” Kelvin azalaki ntango nyonso koluka mabaku ya koyebisa bana na ye makambo ya Nzambe, ezala bazali wapi to bazali kosala nini. Yango ekundweli biso maloba ya Moize oyo: “Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo, mpe okolakisa yango na etingya na bana na yo mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛlɛma yo.”—Deteronome 6:6, 7.
5 Pesáká bana na yo disipilini
Mpo bana bákóma mikolo oyo babongi, esengeli kosembolaka bango. Baboti mosusu bakanisaka ete kosembola bana elimboli nde konyokola, kobɛta to kofinga bango. Nzokande, Biblia emonisi ete kosembola bana esɛngaka te kopesa bango bitumbu ya makasimakasi. Basengeli nde kosembolaka bango na bolingo, kaka ndenge Yehova asalaka. (Baebele 12:4-11) Biblia elobi boye: “Batata, bósilikisaka bana na bino te, kasi bókoba kobɔkɔla bango na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.”—Baefese 6:4.
Ntango mosusu, esɛngaka kopesa bana etumbu. Kasi, mwana asengeli koyeba ntina oyo azwi etumbu. Etumbu oyo baboti bapesi na mwana esengeli te kotinda ye akanisa ete balingaka ye te. Biblia epekisi mpenza kobɛta mwana na ndenge ya mabe. (Masese 16:32) Kelvin abakisi boye: “Liboso ya kopesa bana etumbu soki basali mpenza mabe, nazalaki ntango nyonso koyebisa bango polele ete nazali kosala bongo mpo nalingaka bango.”
6 Bateláká bana na yo
Esengeli kobatelaka bana na makambo mpe baninga ya mabe. Likambo ya mawa, na mokili oyo, ezali na “bato ya mabe” oyo bazali koluka kobebisa bana mike, oyo bayebi naino eloko te. (2 Timote 3:1-5, 13) Ndenge nini okoki kobatela bana na yo? Biblia epesi toli kitoko oyo: “Moto ya mayele akososola mabe liboso mpe akomibomba; nde bazoba bakoleka wana mpe bakozwa etumbu.” (Masese 22:3) Mpo na kobatela bana na yo na makama, osengeli koyeba makama yango. Yebaká makambo oyo ekoki kobimisa makama mpe salaká nyonso mpo na kobatela bana na yo. Na ndakisa, soki opesi bana na yo nzela ya kosalela Internet, salisá bango báyeba ndenge ya kokima makama na yango. Ekozala malamu otya ordinatɛrɛ na esika moko ya polele mpo omonaka ndenge bazali kosalela yango.
Tata asengeli kosalisa bana na ye báyeba kokima makama oyo bakoki kokutana na yango na mokili oyo ya mabe. Bana na yo bayebi oyo basengeli kosala soki moto moko alingi kosala bango mabe ntango ozali te?c Bana na yo basengeli koyeba ndenge ya malamu mpe ya mabe ya kosalela binama na bango ya kobotela. Kelvin alobi boye: “Natikaka bato mosusu te, ezala ata balakisi, báteya bana na ngai makambo wana. Nazalaki koyeba ete koteya bana na ngai makambo etali kosangisa nzoto ezali mokumba na ngai, mpe nazalaki kokebisa bango na bato oyo babebisaka bana.” Bana na ye nyonso bakolá malamu, mpe sikoyo bazali na esengo na mabala na bango.
Lukáká lisalisi ya Nzambe
Likabo ya malamu koleka oyo tata akoki kopesa bana na ye ezali ya kosalisa bango bákolisa boyokani na bango ná Nzambe. Mpo na yango ndakisa ya tata ezali na ntina mingi. Donizete alobi boye: “Batata basengeli komonisa mpenza ete bapesaka motuya mingi na boyokani na bango na Nzambe. Yango esengeli komonanaka polele, mingimingi ntango bakutani na mikakatano. Na ntango yango, tata asengeli komonisa ete atyelaka mpenza Yehova motema. Ntango azali kobondela na libota, kotɔnda Nzambe ntango nyonso mpo na bolamu na ye ekosalisa bana bámona ntina ya kozala baninga ya Nzambe.”
Na yango, wapi sɛkɛlɛ ya kozala tata malamu? Luká toli ya moto oyo ayebi mpenza kobɔkɔla bana malamu, elingi koloba Yehova Nzambe. Soki obɔkɔli bana na yo na kolanda toli ya Liloba ya Nzambe, okozwa matomba oyo Masese 22:6 elobeli: “Bɔkɔlá mwana na nzela ekoki na ye kotambola; [ntango akokóma mokóló, NW], akopɛngwa na yango te.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Atako batoli ya Biblia oyo elobelami na lisolo oyo etali mingimingi mokumba ya tata, mingi na yango etali mpe bamama.
b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
c Mpo na koyeba lisusu malamu oyo osengeli kosala mpo na kobatela bana na yo na bato oyo balukaka kosangisa na bango nzoto, talá Lamuká! ya Ɔkɔtɔbɛ 2007, na Lifalanse, nkasa 3–11, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 19]
Tata asengeli kozala ndakisa malamu mpo na bana na ye
[Elilingi na lokasa 20]
Tata asengeli kokokisa bamposa ya elimo ya bana na ye
[Elilingi na lokasa 21]
Osengeli kosembolaka bana na bolingo