Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/1 lok. 26
  • Tata oyo akokani na mosusu te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tata oyo akokani na mosusu te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Kobomama ya Sodoma mpe Gomola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu abikisi bato na ndenge ya likamwisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu akamwisi bayoki na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu alongi komekama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/1 lok. 26

MPO NA BILENGE

Petelo awangani Yesu

Malako: Tángá lisolo oyo na esika ya kimya. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ, salá lokola ozalaki wana ntango makambo yango esalemaki. Salá lokola nde ozali komona makambo yango mpe ozali koyoka mingongo. Omityá na esika ya bato oyo balobeli.

TALELÁ LISOLO OYO.​—TÁNGÁ MATAI 26:31-35, 69-75.

Okanisi ete na lisolo yango bato bazalaki boni?

․․․․․

Okanisi ete bato oyo bazalaki kotuna Petelo bazalaki koloba na ye lokola baninga? balingaki kaka koyeba ye? bazalaki na nkanda? to nini?

․․․․․

Okanisi ete Petelo amiyokaki ndenge nini ntango bazalaki kotuna ye?

․․․․․

Mpo na nini Petelo awanganaki Yesu? Ezalaki nde mpo alingaki ye te to mpo na likambo mosusu?

․․․․․

KƆTÁ NA MOZINDO.​—TÁNGÁ LUKA 22:31-34; MATAI 26:55-58; YOANE 21:9-17.

Ndenge nini komityela motema ememaki Petelo na libunga?

․․․․․

Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki kaka kotyela Petelo motema, atako ayebaki ete Petelo akosala libunga?

․․․․․

Atako Petelo awanganaki Yesu, ndenge nini amonisaki ete azalaki na mpiko koleka bayekoli mosusu?

․․․․․

Ndenge nini Yesu amonisaki ete alimbisaki Petelo?

․․․․․

Mpo na yo, mpo na nini Yesu atunaki Petelo mbala misato ete: “Olingaka ngai?”

․․․․․

Okanisi ete Petelo amiyokaki ndenge nini nsima ya kosolola na Yesu, mpe mpo na nini?

․․․․․

SALELÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI. KOMÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI NA NTINA NA . . .

Kobanga bato.

․․․․․

Motema mawa ya Yesu mpo na bayekoli na ye, ata ntango basalaki mabunga.

․․․․․

Na lisolo oyo, likambo nini omoni ete ezali na ntina mingi mpo na yo, mpe mpo na nini?

․․․․․

․․․․․

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto