Mpo na bilenge
Kobomama ya Sodoma mpe Gomola
Malako: Tángá lisolo oyo na esika ya kimya. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ, salá lokola ozalaki wana ntango makambo yango esalemaki. Salá lokola nde ozali komona makambo yango mpe ozali koyoka mingongo. Omityá na esika ya bato oyo balobeli.
TALELÁ LISOLO OYO.—TÁNGÁ GENESE 19:1-14.
Mpo na yo, bapaya oyo bayaki epai ya Lota bazalaki ndenge nini?
․․․․․
kanisi ete banani bazalaki na kati ya ebele wana ya bato?
․․․․․
KƆTÁ NA MOZINDO.—TÁNGÁ GENESE 13:7-13.
Ndenge nini Lota akómaki kofanda na Sodoma?
․․․․․
Mpo na nini Yehova amonaki ete bato yango basengeli kobomama?
․․․․․
TÁNGÁ GENESE 19:15-26.
Ndenge nini Yehova amoniselaki Lota boboto?
․․․․․
po na yo, mpo na nini mwasi ya Lota atalaki nsima?
․․․․․
Mpo na nini akufaki?
․․․․․
SALELÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI. KOMÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI NA NTINA NA . . .
Lolenge oyo Yehova atalelaka makambo ya mabe.
․․․․․
Motema mawa ya Yehova.
․․․․․
Ndenge oyo Yehova akebisaki basaleli na ye liboso ya kopesa etumbu.
․․․․․
Na lisolo oyo, likambo nini omoni ete ezali na ntina mingi mpo na yo, mpe mpo na nini?
․․․․․
․․․․․