“Taláká malamu mosala oyo ondimaki ya ministre na kati ya Nkolo”
“Taláká malamu mosala oyo ondimaki ya ministre na kati ya Nkolo, mpo okokisa yango.”—KOLS. 4:17.
1, 2. Mokumba nini baklisto bazali na yango epai ya bato?
TOZALI na mokumba monene epai ya bato oyo tofandi na bango. Bikateli oyo bazali kozwa lelo ekomemela bango bomoi to liwa na ntango ya “bolɔzi monene.” (Emon. 7:14) Mokomi ya mokanda ya Masese alobaki boye: “Bikisá bango babimisami mpo na kufa; pekisá bango baoyo bazali koleka na nzela ya kobomama.” Maloba oyo esengeli mpenza kobenda likebi na biso! Soki tokebisi bato te na bikateli oyo bazali kozwa, makila na bango ekozala likoló ya mitó na biso. Kutu, vɛrsɛ yango ebakisi boye: “Soki olobi ete, Talá, toyebaki yango te! Ye oyo akɛngɛli molimo na yo ayebi te? Ye akozongisela moto na moto [na kotalela] misala na ye te?” Ya solo, basaleli ya Yehova bakoki koloba te ete ‘bayebaki te’ likama oyo ezali kozela bato.—Mas. 24:11, 12.
2 Bomoi ezali na motuya mingi na miso ya Yehova. Azali kolendisa basaleli na ye básala nyonso oyo bakoki mpo na kosalisa bato mingi bábika. Mosaleli nyonso ya Nzambe asengeli kosakwela basusu nsango ya bomoi oyo ezali na kati ya Biblia. Mosala na biso ekokani na oyo ya sinzili oyo akebisaka bato soki amoni likama. Tolingi te ete makila ya bato oyo bazali na likama ya kokufa ezala likoló ya mitó na biso. (Ezek. 33:1-7) Yango wana, ezali na ntina mingi tókoba na molende nyonso ‘kosakola liloba’!—Tángá 2 Timote 4:1, 2, 5.
3. Lisolo oyo mpe masolo mibale oyo ekolanda ekolobela nini?
3 Lisolo oyo ekolobela ndenge okoki kolonga mikakatano oyo ekoki kopekisa yo okoba mosala oyo ezali kobikisa bomoi ya bato mpe ndenge nini okoki kosalisa bato ebele. Lisolo oyo ekolanda ekolobela ndenge okoki kokolisa mayele na yo ya koteya. Lisolo ya misato ekolobela mwa makambo ya kolendisa oyo basakoli ya Bokonzi bazali kokutana na yango na mokili mobimba. Nzokande, liboso ya kolobela makambo wana, ekozala malamu tólobela naino ntina oyo mpasi ezali mingi na mikolo na biso.
Ntina oyo bato mingi bazangi elikya
4, 5. Makambo nini bato bazali kokutana na yango mpe esalaka bango nini?
4 Makambo oyo ezali kosalema na mokili ezali komonisa ete tokómi na nsuka ya “ebongiseli ya makambo ya ntango oyo” mpe ete nsuka ekómi mpenza pene. Makambo oyo ezali kokómela bato lelo oyo ezali oyo Yesu ná bayekoli na ye basakolaki ete ekosalema na “mikolo ya nsuka.” Bato bazali kokutana na “bampasi” oyo ezali kouta na makambo lokola bitumba, kozanga bilei, koningana ya mabelé mpe mikakatano mosusu. Mokili etondi na batyoli ya mibeko, na bato oyo bazali koluka kaka matomba na bango moko mpe na bizaleli mosusu oyo esepelisaka Nzambe te. Ata mpo na bato oyo bazali kosala makasi mpo na kolanda mitinda ya Biblia, mikolo na biso ezali kaka “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza.”—Mat. 24:3, 6-8, 12; 2 Tim. 3:1-5.
5 Kasi, bato mingi bazali koyeba te ntina mpenza ya makambo oyo ezali kosalema na mokili. Yango wana, bato mingi bazali komitungisa mpo na bomoi na bango moko mpe ya mabota na bango. Kokufela bandeko to baninga mpe makama mosusu oyo ekómelaka bato ezali kotika bato na mpasi mingi. Lokola bayebi mpenza te ntina oyo makambo wana ezali kosalema mpe ndenge nini ekosila, bato yango bazali na elikya moko te.—Ef. 2:12.
6. Mpo na nini “Babilone monene” elongi te kosalisa bato na yango?
6 “Babilone monene,” lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba, esalisi mpenza bato te. Kutu, “vinyo ya pite na ye” ebungisi bato ebele nzela mpo báyeba Nzambe te. Lokola mwasi ya pite, mangomba ya lokuta ezali kolengola mpe kokonza “bakonzi ya mabelé.” Ezali kosalela mateya ya lokuta mpe misala ya bilimo mabe mpo na kotinda bato bálandaka nyonso oyo bakonzi ya politiki bakosɛnga bango. Mangomba ya lokuta ekómi na nguya mingi, kasi etiki mpenza solo ya Biblia.—Emon. 17:1, 2, 5; 18:23.
7. Likama nini ezali kozela bato mingi, kasi ndenge nini tokoki kosalisa bamosusu?
7 Yesu ateyaki ete bato mingi bazali kotambola na nzela ya monene oyo ezali komema na libebi. (Mat. 7:13, 14) Bato mosusu bazali na nzela wana mpo bango moko baboyi kolanda oyo Biblia eteyaka, kasi mingi mosusu bazali na nzela wana mpo bakosaki bango to mpo bakambi ya mangomba na bango bateyaki bango te oyo Yehova azali mpenza kosɛnga na bango. Ntango mosusu bamosusu bakoki kobongwana soki bateyi bango Biblia. Kasi, baoyo bazali kokangama na Babilone monene mpe bazali kokoba koboya kotosa mitinda ya Biblia bakokufa na “bolɔzi monene.”—Emon. 7:14.
Bósakolaka “kozanga kotika”
8, 9. Baklisto ya ekeke ya liboso basalaki nini ntango bakómaki kotɛmɛla bango, mpe mpo na nini?
8 Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe bakokómisa bato bayekoli. (Mat. 28:19, 20) Na yango, baklisto ya solo bamonaka ntango nyonso ete bakoki te kozala sembo epai ya Nzambe to kozala bandimi ya solo soki bazali kosakola te. Yango wana, atako bayekoli ya Yesu ya ekeke ya liboso bakutanaki na botɛmɛli, batikaki kosakola te. Batyelaki Yehova motema mpo apesa bango makasi mpe babondelaki ye asalisa bango bákoba “koloba liloba na [ye] na mpiko mpenza.” Yehova ayokaki bango mpe atondisaki bango na elimo na ye, mpe basakolaki liloba ya Nzambe na mpiko.—Mis. 4:18, 29, 31.
9 Ntango botɛmɛli ekómaki makasi, bayekoli ya Yesu batikaki kosakola nsango malamu? Ata moke te. Lokola makambo oyo bantoma bazalaki kosakola ezalaki kosepelisa bakonzi ya Lingomba ya Bayuda te, bakangaki bango, bakebisaki bango mpe babɛtaki bango fimbo. Nzokande, “kozanga kotika, bakobaki koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Klisto, Yesu.” Bayebaki ete basengeli “kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.”—Mis. 5:28, 29, 40-42.
10. Mikakatano nini Baklisto bazali kokutana na yango lelo oyo, kasi etamboli na bango ya malamu ekoki kobimisa matomba nini?
10 Lelo oyo, basaleli ya Nzambe nyonso te nde babɛtamaka to bakɔtaka bolɔkɔ mpo na mosala ya kosakola. Kasi, baklisto nyonso ya solo bakutanaka na komekama mpe mikakatano ndenge na ndenge. Na ndakisa, lisosoli na yo oyo eteyami na Biblia ekoki kotinda yo ozala na etamboli moko oyo bato mingi balingaka te to oyo ekokesenisa yo na bato mosusu. Baninga na yo ya mosala, baninga ya kelasi to bato mosusu oyo ofandi na bango esika moko bakoki komona yo lokola moto ya ndenge mosusu mpo osalelaka mitinda ya Biblia na makambo nyonso. Atako bongo, botɛmɛli na bango esengeli te kolɛmbisa yo. Mokili ezali na kati ya molili ya elimo, kasi baklisto basengeli “kongɛnga lokola miinda na mokili.” (Filp. 2:15) Ntango mosusu, bato ya bosembo bakomona misala na yo ya malamu, bakosepela na yango mpe bakopesa Yehova nkembo.—Tángá Matai 5:16.
11. (a) Ndenge nini bato mosusu bakoki kotalela nsango malamu? (b) Botɛmɛli nini ntoma Paulo akutanaki na yango, mpe asalaki nini?
11 Mpo na kokoba kosakola nsango ya Bokonzi, tosengeli kozala na mpiko. Bato mosusu, ata mpe bato ya libota na yo, bakoki kobanda kosɛka to koluka kolɛmbisa yo na banzela mosusu. (Mat. 10:36) Ntoma Paulo abɛtamaki mbala na mbala mpo na mosala ya kosakola. Talá ndenge azalaki kotalela botɛmɛli yango: “Nsima wana tosilaki liboso konyokwama mpe kosambwisama mabe . . . tozwaki mpiko na lisalisi ya Nzambe na biso mpo na kolobela bino nsango malamu ya Nzambe na kobunda mingi.” (1 Tes. 2:2) Ya solo, ezalaki pɛtɛɛ te mpo Paulo akoba kosakola nsango malamu atako bakangaki ye, batikaki ye bolumbu, babɛtaki ye bafimbo mpe babwakaki ye na bolɔkɔ. (Mis. 16:19-24) Nini epesaki ye mpiko ya ndenge wana? Mposa makasi ya kokokisa mosala oyo Nzambe apesaki ye.—1 Kol. 9:16.
12, 13. Mikakatano nini basakoli mosusu bazali kokutana na yango, mpe bazali kosala nini mpo na kolonga yango?
12 Ekoki mpe kozala mpasi tókoba kozala na molende na mosala ya kosakola na bisika oyo ezalaka mpasi kokuta bato na bandako to epai bato basepelaka mpenza na nsango malamu te. Tokoki kosala nini? Ekosɛnga tóbakisa mpiko mpo na kopesaka litatoli ntango nyonso oyo tozwi libaku ya kosala yango. Tokoki mpe kotalela lisusu manaka na biso to kosakolaka mingi na bisika oyo tokoki kokuta bato mingi.—Talá mpe Yoane 4:7-15; Misala 16:13; 17:17.
13 Mikakatano mosusu oyo bandeko mingi bazali kokutana na yango ezali bobange mpe maladi, oyo ekoki kopekisa bango kosakolaka mingi. Soki ezali bongo mpo na yo, kolɛmba te. Yehova ayebi epai makasi na yo esuki mpe asepelaka na oyo okoki kosala. (Tángá 2 Bakolinti 8:12.) Ezala mokakatano nini ozali kokutana na yango: botɛmɛli, bato bazali kosepela te na nsango ozali komemela bango to maladi; salá oyo okoki mpo na kopesa basusu litatoli.—Mas. 3:27; Talá mpe Malako 12:41-44.
‘Taláká malamu mosala na yo’
14. Ndakisa nini ntoma Paulo apesaki baklisto mpe toli nini apesaki bango?
14 Ntoma Paulo azalaki kozwa mosala na ye na lisɛki te mpe alendisaki baklisto mosusu básalaka lokola ye. (Mis. 20:20, 21; 1 Kol. 11:1) Moto moko oyo Paulo alendisaki ezalaki Alasipe, moklisto moko ya ekeke ya liboso. Na mokanda na ye epai ya Bakolose, akomaki boye: “Bóyebisa Alasipe ete: ‘Taláká malamu mosala oyo ondimaki ya ministre na kati ya Nkolo, mpo okokisa yango.’” (Kols. 4:17) Toyebi te soki Alasipe azalaki nani mpe soki azalaki na bomoi ya ndenge nini; kasi emonani ete andimaki mokumba ya kosakola. Soki ozali moklisto oyo amipesá, yo mpe ondimá mokumba yango. Okebaka ntango nyonso ete okokisa mosala yango?
15. Komipesa epai ya Yehova elimboli nini, mpe yango ebimisi mituna nini?
15 Liboso tózwa batisimo, tomipesaki epai ya Yehova na libondeli. Yango ezali ekateli oyo tozwaki ya kosala mokano na ye. Na yango, tosengeli komituna boye: ‘Kosala mokano ya Nzambe ezali mpenza likambo eleki ntina na bomoi na ngai?’ Tokoki kozala na mikumba ebele oyo Yehova alingi ete tókokisa, lokola kokokisa bamposa ya libota na biso. (1 Tim. 5:8) Kasi, ndenge nini tosalelaka bangonga mpe makasi oyo etikali? Likambo nini totyaka na esika ya liboso na bomoi na biso?—Tángá 2 Bakolinti 5:14, 15.
16, 17. Makambo nini baklisto oyo bazali bilenge to baoyo bazali na mokumba monene te basengeli kotalela?
16 Ozali elenge moklisto oyo asilisi kelasi to alingi kosilisa? Ekoki kozala ete ozali naino na mokumba ya libota te. Ozali kokana kosala nini na bomoi na yo? Makambo nini ekosalisa yo okokisa elaka oyo opesaki Yehova ya kosala mokano na ye? Bilenge mingi bamibongisaki mpo na kokóma babongisi-nzela, mpe yango ememeli bango esengo.—Nz. 110:3; Mos. 12:1.
17 Ntango mosusu okómi mwa mokóló. Ntango mosusu osalaka, kasi ozali mpenza na mokumba monene te, longola kokokisa bamposa na yo moko. Na ntembe te, opesaka mabɔkɔ na misala ya lisangá soki ozwi likoki ya kosala yango. Okosepela kobakisa esengo na yo? Ozali na mokano ya komipesa lisusu mingi na mosala ya kosakola? (Nz. 34:8; Mas. 10:22) Na bateritware mosusu, mosala ezali naino mingi, mpo bato mingi bayoki naino te nsango oyo ekoki kobikisa bomoi na bango. Okoki kotalela lisusu bomoi na yo, ntango mosusu mpo na kokende kosala epai mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali monene?—Tángá 1 Timote 6:6-8.
18. Mbongwana nini ndeko moko ná mwasi na ye oyo babalanaki sika basalaki, mpe bazwaki matomba nini?
18 Tózwa ndakisa ya Kevin ná Elena na États-Unis.a Bazalaki na mokano ya kosomba lopango ndenge bilenge oyo babalani sika bazalaki kosala na mboka na bango. Bango nyonso mibale bazalaki kosala mokolo mobimba mpo bázwaka mbongo mingi. Kasi, mosala na bango mpe misala ya ndako ezalaki kotikela bango kaka ntango moke mpo na mosala ya kosakola. Bayaki komona ete bazali kolekisa ntango mpe makasi na bango nyonso mpo na koluka biloko ya mokili. Nzokande, ntango bamonaki ete ndeko moko ná mwasi na ye oyo bazalaki babongisi-nzela bazalaki na bomoi ya esengo atako bazalaki na bozwi mingi te, Kevin ná Elena bazwaki ekateli ya kobongola bomoi na bango. Nsima ya kobondela Yehova, batɛkaki lopango na bango mpe balukaki mwa ndako ya moke. Elena akómaki kosala kaka mwa bangonga moke mpe akómaki mobongisi-nzela. Makambo kitoko oyo Elena azalaki kokutana na yango na mosala ya kosakola elendisaki Kevin atika mosala oyo ezalaki kozwa ye mokolo mobimba mpe akómaki mobongisi-nzela. Mwa moke na nsima, bakendeki na mboka moko ya Amerika ya Sudi, epai mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali monene. Kevin alobi boye: “Tozalaki ntango nyonso na esengo na libala na biso, kasi ntango tomipesaki na makambo ya elimo, esengo na biso ebakisamaki.”—Tángá Matai 6:19-22.
19, 20. Mpo na nini kosakola nsango malamu ezali na ntina koleka misala mosusu nyonso oyo ezali kosalema na mokili lelo oyo?
19 Kosakola nsango malamu ezali na ntina koleka misala mosusu nyonso oyo ezali kosalema na mokili lelo oyo. (Emon. 14:6, 7) Mosala yango ezali kosantisa nkombo ya Nzambe. (Mat. 6:9) Mbula na mbula, nsango ya Biblia ezali kobongisa bomoi ya bamilio ya bato oyo bazali kondima yango mpe ekoki kobikisa bango. Nzokande, ntoma Paulo atunaki boye: “Ndenge nini bakoyoka nsango soki moto oyo akosakola azali te?” (Lom. 10:14, 15) Ekozala mpasi báyoka yango soki mosakoli azali te. Mpo na nini te kozwa ekateli ya kosala nyonso oyo okoki mpo na kokokisa mosala na yo ya kosakola?
20 Lolenge mosusu oyo okoki kosalisa bato bámona mpenza ete ntango oyo ezali mabe mpe komonisa bango epai bikateli oyo bazali kozwa ekoki komema bango ezali ya kokolisa mayele na yo ya koteya. Lisolo oyo ekolanda ekolobela ndenge okoki kosala yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.
Okopesa eyano nini?
• Mokumba nini baklisto bazali na yango epai ya bato oyo bafandi na bango esika moko?
• Ndenge nini tokoki kolonga mikakatano oyo ekoki kopekisa biso kosakola?
• Ndenge nini tokoki kokokisa mokumba oyo tondimaki?
[Elilingi na lokasa 5]
Esɛngaka kozala na mpiko mpo na kosakola ata ntango ozali kokutana na botɛmɛli
[Elilingi na lokasa 7]
Okosala nini soki ozali kosakola na bisika oyo bato bazalaka mpenza te na bandako?