Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/7 nk. 7-11
  • Ndenge ya kolonga mikakatano ya kosakola ndako na ndako

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolonga mikakatano ya kosakola ndako na ndako
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kozwa mpiko
  • Ndenge ya kobanda masolo ya Biblia
  • Koyeba koyoka ezali na ntina
  • Tótalelaka bato na ndenge ebongi
  • ‘Tóloba Liloba ya Nzambe na mpiko’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Tómekola Yesu—Tósakolaka na mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mpo na nini kosakola ndako na ndako ezali na ntina mingi lelo oyo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Osakolaka na mpiko?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/7 nk. 7-11

Ndenge ya kolonga mikakatano ya kosakola ndako na ndako

“Tozwaki mpiko na lisalisi ya Nzambe na biso mpo na kolobela bino nsango malamu ya Nzambe na kobunda mingi.”​—1 TES. 2:2.

1. Mikakatano nini Yilimia akutanaki na yango, mpe nini esalisaki ye alonga yango?

YILIMIA azalaki moto lokola biso. Ntango Yehova apesaki ye mokumba ya kozala “mosakoli epai na mabota,” Yilimia alobaki boye: “Aha, Nkolo [Yehova], talá; nayebi koloba te zambi ngai nazali bobele elenge.” Atako bongo, atyelaki Yehova motema mpe andimaki mokumba yango. (Yil. 1:4-10) Na boumeli ya mbula koleka 40, bato bazalaki kokipe Yilimia te, bazalaki koboya koyoka ye, kosɛka ye, mpe mbala mosusu ata kosimba ye na nzoto. (Yil. 20:1, 2) Ntango mosusu azalaki ata kolinga kosundola mokumba yango. Kasi, akobaki kaka kosakola nsango na ye atako bato mingi bazalaki kosepela na yango te. Na nguya ya Nzambe, Yilimia asalaki likambo oyo akokaki kosala na makasi na ye moko te.​—Tángá Yilimia 20:7-9.

2, 3. Na ndenge nini basaleli ya Yehova bazali kokutana na mikakatano lokola oyo ya Yilimia?

2 Basaleli mingi ya Nzambe lelo oyo bayokaka ndenge Yilimia ayokaki. Ntango tozalaki kokanisa mosala ya kosakola ndako na ndako, mingi kati na biso tozalaki koloba, ‘Ngai nakokoka yango te.’ Kasi, ntango toyebaki ete Yehova nde alingi tósakola nsango malamu, tolongolaki kobanga mpe tomipesaki na mosala ya kosakola. Atako bongo, mingi kati na biso tokutaná na makambo oyo epekisaki biso, ata na boumeli ya mwa ntango, tókoba kosakola. Na ntembe te, kobanda kosakola ndako na ndako mpe kokoba kosala yango tii na nsuka ezali pɛtɛɛ te.​—Mat. 24:13.

3 Oyekolaka Biblia na Batatoli ya Yehova mpe oyanganaka na makita esili koleka mwa mikolo, kasi ozali kokakatana mpo na kobanda kosakola ndako na ndako? To ozwá batisimo kasi ozalaka na mokakatano mpo na kosakola ndako na ndako atako ozali nzoto makasi? Kobosana te ete bato ya ndenge nyonso bazali kokutana na mikakatano na mosala ya kosakola ndako na ndako. Na lisalisi ya Yehova, okoki kolonga.

Ndenge ya kozwa mpiko

4. Nini ezalaki kopesa ntoma Paulo mpiko ya kosakola nsango malamu?

4 Na ntembe te, oyebi malamu ete mosala ya kosakola na mokili mobimba ezali kosalema na makasi to na bwanya ya bato te, kasi na elimo ya Nzambe. (Zek. 4:6) Elimo yango esalisaka mpe moklisto mokomoko. (2 Kol. 4:7) Tózwa ndakisa ya ntoma Paulo. Paulo akanisaki ntango oyo batɛmɛli banyokolaki ye ná misionɛrɛ mosusu mpe akomaki boye: “Nsima wana tosilaki liboso konyokwama mpe kosambwisama mabe na Filipi . . . , tozwaki mpiko na lisalisi ya Nzambe na biso mpo na kolobela bino nsango malamu ya Nzambe na kobunda mingi.” (1 Tes. 2:2; Mis. 16:22-24) Ekoki kozala mwa mpasi tóndima ete mosakoli ya molende lokola Paulo azalaki ntango mosusu kokutana na mikakatano oyo ezalaki kosɛnga abunda makasi mpo na kosakola. Nzokande, lokola mingi kati na biso, Paulo azalaki na mposa ya lisalisi ya Yehova mpo na kosakola nsango malamu na mpiko. (Tángá Baefese 6:18-20.) Ndenge nini tokoki komekola ndakisa ya Paulo?

5. Wapi lolenge moko oyo tokoki kozwa mpiko ya kosakola?

5 Libondeli mpe epesaka biso mpiko ya kosakola. Mobongisi-nzela moko alobaki ete: “Nabondelaka Nzambe asalisa ngai nalobaka kozanga kokakatana, nazala na likoki ya kosimba mitema ya bato, mpe nazala na esengo na mosala ya kosakola. Kutu, ezali mosala ya Yehova, kasi ya biso te. Yango wana tokoki kosala eloko moko te soki ye asalisi biso te.” (1 Tes. 5:17) Biso nyonso tosengeli kobondelaka Nzambe ntango nyonso mpo apesa biso elimo na ye mpo tósakolaka na mpiko.​—Luka 11:9-13.

6, 7. (a) Emonaneli nini Ezekiele amonaki, mpe yango elingaki koloba nini? (b) Liteya nini basaleli ya Nzambe lelo oyo bakoki kozwa na emonaneli yango?

6 Mokanda ya Ezekiele emonisi mpe likambo mosusu oyo ekoki kosalisa biso tósakolaka na mpiko. Na emonaneli moko, Yehova apesaki Ezekiele rulo moko oyo bakomaki “maloba ya kolela ya mawa ya bolɔzi” na ngámbo nyonso mibale mpe alobaki na ye ete lyá yango, mpe abakisaki boye: “Mwana ya moto, leisá libumu na yo mpe tondisá nsɔpɔ na yo na mokanda oyo.” Emonaneli yango elingaki koloba nini? Ezekiele asengelaki komɛla nsango oyo alingaki kosakola mobimba. Esengelaki kokóma lokola nzoto na ye mpe kofanda mpenza na motema na ye. Ezekiele abakisaki ete: “Nalyaki yango mpe ezalaki na monɔkɔ na ngai elɛngi lokola mafuta ya nzoi.” Mpo na Ezekiele, kosakola nsango ya Nzambe ezalaki elɛngi lokola mafuta ya nzoi. Kozala momonisi ya Yehova mpe kokokisa mokumba na ye ezalaki lokumu monene mpenza mpo na ye, atako asengelaki kosakola bitumbu ya Nzambe epai ya bato ya matoi mangbongi.​—Tángá Ezekiele 2:8–3:4, 7-9.

7 Emonaneli yango ezali na liteya moko ya ntina mpenza mpo na basaleli ya Nzambe lelo oyo. Biso mpe tosengeli kosakola bitumbu ya Nzambe epai ya bato oyo bazali komona milende na biso mpamba. Mpo tókoba kozwa mosala ya kosakola na lokumu, tosengeli kolyaka malamu na elimo. Koyekola likolólikoló ekosalisa biso te tósimba malamu mpenza Liloba ya Nzambe. Okoki kobongisa lolenge na yo ya kotánga mpe koyekola Biblia? Okoki kokanisaka lisusu na mozindo na makambo oyo ozali kotánga?​—Nz. 1:2, 3.

Ndenge ya kobanda masolo ya Biblia

8. Mayele nini esalisaki basakoli mingi bábanda masolo ya Biblia na mosala ya kosakola ndako na ndako?

8 Mpo na basakoli mingi, kobanda lisolo na moto na mosala ya kosakola ndako na ndako nde likambo eleki mpasi. Mpo na koloba solo, na bateritware mingi kobanda masolo ya Biblia na bato ezalaka pɛtɛɛ te. Basakoli mosusu bamiyokaka malamu ntango bazali kosolola na bato epai na bango soki babandi lisolo na mwa maloba oyo babongisaki liboso mpe na nsima bapesi moto trakte, ndenge etanda emonisi yango. Motó ya likambo ya trakte to bililingi oyo ezali na kati ekoki kobenda likebi ya moto oyo tozali kosolola na ye, kosalisa biso tóyebisa ye na mokuse ntina toyei epai na ye mpe tótuna ye motuna. Na ndakisa, tokoki kolakisa moto trakte misato to minei mpe kosɛnga ye apona oyo esepelisi ye. Na ntembe te, mokano na biso ezali kaka ya kokabola batrakte to kosalela yango na bandako nyonso te, kasi ezali nde ya kobanda masolo oyo ekomema na boyekoli ya Biblia.

9. Mpo na nini komibongisa malamu ezali na ntina?

9 Ezala osaleli mayeli nini, komibongisa malamu ekosalisa yo ozala motema mpiɔ mpe na esengo ntango ozali kosakola ndako na ndako. Mobongisi-nzela moko alobaki boye: “Nayokaka esengo soki namibongisi malamu. Epesaka ngai mposa nayebisa bato makambo oyo nabongisi.” Mobongisi-nzela mosusu alobaki ete: “Soki nayebi makambo oyo ezali na mikanda oyo nalingi kokabolela bato, nazalaka na esengo kosalela yango.” Soki kobongisa na motema makambo oyo okoloba ezali na ntina, basakoli mingi bamonaka ete komeka yango na mongongo makasi ezali lisusu na ntina koleka. Kosala bongo esalisaka bango bápesa Yehova oyo bakoki.​—Kols. 3:23; 2 Tim. 2:15.

10. Bandeko oyo batambwisaka likita ya mosala ya kosakola basengeli kosalaka nini mpo likita yango ebimisa matomba?

10 Soki likita ya mosala ya kosakola etambwisami na ndenge ebongi, tokoki kosala mosala na biso ya kosakola ndako na ndako malamu mpe na esengo koleka. Soki mokapo ya mokolo ezali kolobela makambo etali mosala ya kosakola, tokoki kotánga mpe kolobela yango na mokuse. Na yango, ndeko oyo azali kotambwisa likita ya mosala ya kosakola asengeli kozwa mpenza ntango mpo na kolimbola to kosala elakiseli moko ya mokuse oyo eyokani na teritware to kolobela makambo mosusu ya ntina oyo bandeko bakoki kosalela na mosala ya kosakola mokolo wana. Yango ekosalisa mpenza basakoli oyo bayaki na likita yango bápesa litatoli na ndenge ebongi. Komibongisa malamu liboso ekoki kosalisa bankulutu ná bandeko mosusu oyo batambwisaka likita yango básala yango malamu mpe bálekisa ngonga te.​—Lom. 12:8.

Koyeba koyoka ezali na ntina

11, 12. Ndenge nini koyoka bato na boboto ekoki kosalisa biso tósakwela bango nsango malamu? Pesá bandakisa.

11 Atako komibongisa malamu ezali na ntina mingi, kotyela bato likebi mpe esalisaka mpenza biso tóbanda masolo ya Biblia mpe tósimba mitema ya bato na mosala ya kosakola. Ndenge moko oyo tokoki komonisa ete tozali kotyela bato likebi ezali koyeba koyoka bango. Mokɛngɛli motamboli moko alobaki boye: “Kozala motema molai mpe koyoka bato oyo ozali kosolola na bango na likebi ekoki kotinda bango báyoka nsango malamu, mpe emonisaka mpenza ete tozali kotyela bango likebi.” Koyeba komitya na esika ya bato oyo ozali kosolola na bango mpe koyoka bango na likebi ekoki kotinda bango báfungola mitema na bango, ndenge ndakisa oyo elandi emonisi yango.

12 Na mokanda na ye oyo ebimaki na zulunalo Le Progrès ya engumba Saint-Étienne, na France, mwasi moko abɛtaki lisolo ya bandeko mibale oyo babɛtaki na porte na ye mwa moke nsima ya liwa ya mwana na ye ya sanza misato. Akomaki ete: “Nayebaki mbala moko ete bazali Batatoli ya Yehova. Nalingaki kosɛnga bango na limemya bákende, kasi namonaki mwa buku oyo bazalaki kokabola. Ezalaki kolobela ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala. Nakɔtisaki bango na likanisi ya kokangisa bango monɔkɔ. . . . Batatoli yango baumelaki epai na ngai ngonga mobimba na ndambo. Bayokaki ngai na boboto nyonso mpe ntango bakómaki kokende, nayokaki kimya na motema mpe nandimaki bázongela ngai.” (Lom. 12:15) Na nsima, mwasi yango andimaki koyekola Biblia. Tósimba ete likambo oyo mwasi wana amikundolaki na bokutani na bango ya liboso ezalaki te makambo oyo bandeko basi bayebisaki ye, kasi nde lolenge oyo bayokaki ye.

13. Ndenge nini tokoki kobongola nsango na biso na kotalela bato oyo tozali kokutana na bango?

13 Ntango tozali koyoka bato na boboto, tokopesa bango nzela báyebisa biso ntina oyo bazali na mposa ya Bokonzi ya Nzambe. Yango epesaka biso libaku malamu ya kosakwela bango nsango malamu. Ekoki kozala ete omoná ete basakoli ya solosolo ezali oyo bayebaka koyoka. (Mas. 20:5) Batyelaka bato oyo bakutanaka na bango na mosala ya kosakola likebi. Bazwaka te kaka bankombo mpe baadrɛsi ya bato yango, kasi balukaka mpe koyeba bamposa na bango. Ntango moto moko atuni motuna, bakendeke kotánga mikanda mpe bazongaka kozanga koumela mpo na koyebisa ye makanisi oyo bazwi. Lokola ntoma Paulo, babongolaka lolenge na bango ya kosakola na kotalela bato oyo bakutani na bango. (Tángá 1 Bakolinti 9:19-23.) Kotyela bato likebi ndenge wana esalaka ete bándima nsango malamu mpe emonisaka mpenza “mawa monene ya Nzambe na biso.”​—Luka 1:78.

Tótalelaka bato na ndenge ebongi

14. Ndenge nini tokoki komonisa bizaleli ya Yehova ntango tozali kosakola nsango malamu?

14 Yehova amonisi ete azwaka biso na motuya ndenge apesá biso bonsomi ya kopona. Atako azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya nyonso, akangaka moto na makasi te mpo asambela ye, kasi asɛngaka bato básambela ye na bolingo; apambolaka baoyo bamonisaka botɔndi mpo na bibongiseli kitoko oyo azwá. (Lom. 2:4) Lokola tozali basaleli na ye, tosengeli kozalaka ntango nyonso pene mpo na kosakola nsango malamu na ndenge oyo ebongi na Nzambe na biso ya motema mawa. (2 Kol. 5:20, 21; 6:3-6) Na yango, tosengeli kozalaka na makanisi ebongi mpo na bato ya teritware na biso. Nini ekoki kosalisa biso tólonga na likambo yango?

15. (a) Yesu apesaki bantoma na ye toli básalaka nini soki bato baboi koyoka nsango na bango? (b) Nini ekoki kosalisa biso tómipesaka kaka na koluka bato oyo bakoyoka nsango malamu?

15 Yesu apesaki bayekoli na ye toli ete bámitungisaka te koleka ndelo soki bato baboi koyoka nsango na bango, kasi bámipesa kaka na koluka baoyo bakoyoka bango. (Tángá Matai 10:11-15.) Komityela mwa mikano oyo tokoki kokokisa ekoki kosalisa biso na likambo yango. Ndeko moko alobaki ete ye azali lokola moto oyo alukaka bisika oyo biloko ya motuya ezali. Alobaka, “Nazalaka na elikya ete nakozwa moto oyo akoki koyoka solo ya Biblia.” Ndeko mosusu azalaka na mokano ya “kokutana na moto oyo asepeli na solo ya Biblia pɔsɔ nyonso mpe kozongela ye nsima ya mwa mikolo moke mpo na kolandela mposa oyo moto yango amonisaki.” Basakoli mosusu basalaka makasi soki likoki ezali bátángela moto nyonso oyo bakutani na ye ata vɛrsɛ moko. Mokano nini yo okoki komityela?

16. Mpo na nini tosengeli kokoba kosakola?

16 Ata soki bato bazali koyamba biso to kosepela na nsango na biso te, tosengeli te kokanisa ete tosali mosala ya mpunda. Toboyi te, mosala ya kosakola ezali mpenza na ntina mingi mpo na lobiko ya bato ya mitema sembo, kasi ezali mpe kokokisa makambo mosusu ya ntina. Mosala ya kosakola epesaka biso libaku ya komonisa ete tolingaka Yehova. (1 Yoa. 5:3) Esalisaka biso mpe tókima nyongo ya makila ya bato. (Mis. 20:26, 27) Ezali kokebisa bato mabe ete “ngonga ya kosambisa [ya Nzambe] eyei.” (Emon. 14:6, 7) Oyo eleki nyonso, na nzela ya mosala ya kosakola nsango malamu, nkombo ya Yehova ezali kosanzolama na mabelé mobimba. (Nz. 113:3) Na yango, bato báyoka to te, biso tosengeli kokoba kosakola nsango ya Bokonzi. Ya solo, Yehova asepelaka na milende nyonso oyo tosalaka mpo na kosakola nsango malamu.​—Lom. 10:13-15.

17. Likambo nini bato bakondima mosika te?

17 Atako bato mingi lelo oyo bazali kotyola mosala na biso ya kosakola, mosika te bakomona ntina na yango. (Mat. 24:37-39) Yehova ayebisaki Ezekiele ete ntango bitumbu oyo ye azali kosakola ekoya, batomboki ya ndako ya Yisalaele “bakoyeba ete mosakoli azalaki na kati na bango.” (Ezek. 2:5) Ndenge moko, ntango Nzambe akokitisa bitumbu na ye na mokili oyo ya mabe, bato bakoyeba ete nsango oyo Batatoli ya Yehova bazalaki kosakola na bazando to babalabala mpe na ndako na ndako ezalaki nsango ya Yehova, Nzambe kaka moko ya solo, mpe ete Batatoli bazalaki mpenza bamonisi na ye. Oyo nde libaku malamu tozali na yango ya komema nkombo na ye mpe kosakola nsango na ye na ntango oyo ya yikiyiki! Na lisalisi na ye, tokokoba kolonga mikakatano ya kosakola ndako na ndako.

Okopesa eyano nini?

• Ndenge nini tokoki kozwa mpiko ya kosakola?

• Nini ekoki kosalisa biso tóbanda masolo ya Biblia na mosala ya kosakola ndako na ndako?

• Ndenge nini tokoki komonisa ete totyelaka basusu likebi?

• Nini ekoki kosalisa biso tótalelaka bato ya teritware na biso na ndenge ebongi?

[Etanda/​Elilingi na lokasa 9]

Mpo na kobanda lisolo ya Biblia

Okoki kobanda boye:

◼ Nsima ya kopesa moto mbote, okoki kopesa ye trakte mpe koloba, “Nayei kotala yo lelo mpo na kolakisa yo likanisi moko ya ntina mingi oyo ezali na lisolo oyo.”

◼ To okoki kopesa trakte mpe koloba, “Nayei kotala yo mpo na mwa ntango mokuse mpo na koyeba likanisi na yo na likambo oyo.”

Soki moto andimi trakte:

◼ Kozanga kolekisa ntango, okoki kotuna likanisi na ye na motó ya likambo ya trakte.

◼ Yoká ye na likebi mpo na koyeba likanisi na ye. Pesá ye botɔndi mpo na makanisi oyo apesi.

Okoki kokoba boye:

◼ Tángá vɛrsɛ moko to ebele mpe limbolá yango, na kolanda bamposa ya moto oyo bozali kosolola na ye.

◼ Soki moto asepeli, tikelá ye mokanda mpe soki likoki ezali lakisá ye ndenge toyekolaka na bato Biblia. Bóyokana mokolo okozongela ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto