Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/2 nk. 16-17
  • Na ntina na Nzambe ya solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Na ntina na Nzambe ya solo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nzambe azali na nkombo?
  • Yehova azali nani?
  • Nzambe asɛngaka nini epai na biso?
  • Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka Nzambe?
  • Ndenge nini tokoki koyeba Nzambe?
  • Mpo na nini koyeba Nzambe epesaka esengo?
  • Yesu Kristo azali nani?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Yesu Klisto azali nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Yesu Klisto azali nani?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • “Ngai nalingaka Tata”
    “Yaká, landá ngai”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/2 nk. 16-17

Yesu ateyi biso

Na ntina na Nzambe ya solo

Nzambe azali na nkombo?

Yesu ateyaki ete Nzambe azali na nkombo. Alobaki boye: “Bosengeli kobondela ndenge oyo: ‘Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama.’” (Matai 6:9) Biblia elobi ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. (Nzembo 83:18) Mpo na bayekoli na ye, Yesu abondelaki Tata na ye boye: “Nayebisi bango nkombo na yo.”​—Yoane 17:26.

Yehova azali nani?

Yesu abengaki Yehova “Nzambe kaka moko ya solosolo,” mpamba te Yehova azali Mozalisi. (Yoane 17:3) Yesu alobaki ete: “Botángá te ete moto oyo azalisaki bango na ebandeli asalaki bango mobali mpe mwasi.” (Matai 19:4) Yesu alobaki mpe ete: “Nzambe azali elimo.” (Yoane 4:24) Yango wana, tokoki komona Nzambe te.​—Exode 33:17-20.

Nzambe asɛngaka nini epai na biso?

Ntango moto moko atunaki Yesu ayebisa ye mobeko oyo eleki monene, Yesu ayanolaki ete: “Ya liboso ezali, ‘Yoká, E Yisalaele, Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko, mpe osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso.’ Ya mibale ezali oyo, ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’”​—Malako 12:28-31.

Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka Nzambe?

Yesu alobaki boye: “Ngai nalingaka Tata.” Ndenge nini amonisaki bolingo yango? Alobaki ete: “Ɛɛ kaka ndenge Tata [atindi ngai] nasala, nazali mpe kosala bongo.” (Yoane 14:31) Alobaki lisusu ete: “Nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka ye.” (Yoane 8:29) Tokoki kosepelisa Nzambe soki tozali koyekola makambo etali ye. Ntango azalaki kobondela mpo na bayekoli na ye, Yesu alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo.”​—Yoane 17:3; 1 Timote 2:4.

Ndenge nini tokoki koyeba Nzambe?

Lolenge moko oyo tokoki koyeba Nzambe ezali ya kotala biloko oyo akelá. Na ndakisa, Yesu alobaki ete: “Bótala malamumalamu bandɛkɛ ya likoló, mpamba te balonaka te mpe babukaka te mpe bayanganisaka te na ndako ya kobomba biloko; nzokande Tata na bino ya likoló aleisaka bango. Bino boleki bango na motuya te?” Liteya nini Yesu alingaki tóyeba ntango alobaki tótala bandɛkɛ? Tosengeli te kotika ete biloko ya mokili epekisa biso kosalela Nzambe.​—Matai 6:26-33.

Lolenge eleki malamu ya koyeba Yehova ezali ya koyekola Liloba na ye, Biblia. Yesu abengaki Makomami “liloba ya Nzambe.” (Luka 8:21) Yesu ayebisaki Nzambe boye: “Liloba na yo ezali solo.”​—Yoane 17:17; 2 Petelo 1:20, 21.

Yesu asalisaki bato báyeba solo na ntina etali Yehova. Moko ya bayekoli ya Yesu alobaki mpo na ye ete: “Mitema na biso ezalaki te kozika ntango azalaki koloba na biso na nzela, ntango azalaki kofungolela biso Makomami polelepolele?” (Luka 24:32) Mpo na koyeba Nzambe, tosengeli kozala bato ya komikitisa mpe kondima ete báteya biso. Yesu alobaki boye: “Soki bobongwani te mpe bokómi lokola bana mike te, bokokɔta soki moke te na bokonzi ya likoló.”​—Matai 18:3.

Mpo na nini koyeba Nzambe epesaka esengo?

Nzambe asalisaka biso tókokisa mposa na biso ya koyeba ntina ya bomoi. Yesu alobaki boye: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” (Matai 5:3) Yehova alakisaka biso nzela oyo eleki malamu na bomoi. Yesu alobaki boye: “Esengo na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kobatela yango!”​—Luka 11:28; Yisaya 11:9.

Mpo na koyeba makambo mingi lisusu, talá na mokapo 1 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?a

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 16]

“Nayebisi bango nkombo na yo.”​—Yoane 17:26

[Bililingi na lokasa 16, 17]

Biloko oyo Yehova akelá mpe Biblia ekoki kosalisa biso tóyeba ye

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto