Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/2 lok. 15
  • Oyebaki yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebaki yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Liteya monene ya komikitisa
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu apesi liteya ya komikitisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Yesu apesi liteya ya komikitisa
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/2 lok. 15

Oyebaki yango?

Saani ya ebende oyo ezalaki na tempelo ya Salomo ezalaki na bonene nini?

Mokanda ya 1 Mikonzi 7:26 elobi ete saani yango ezalaki kokɔta “bata nkóto mibale” to litre 44 000 ya mai oyo banganga-nzambe bazalaki kosalela; nzokande, 2 Ntango 4:5 ezali koloba ete saani yango ezalaki kokɔta “bata nkóto misato” to litre 66 000 ya mai. Yango wana bato mosusu balobaka ete bokeseni yango euti na libunga ya moto oyo asalaki kopi ya Mokanda ya Ntango.

Nzokande, Libongoli ya Mokili ya Sika ezali kosalisa biso tóyeba ete mikapo wana nyonso mibale elobi solo. 1 Ntango 7:26, (NW) elobi ete: “[Saani yango] ezalaki kokɔta bata nkóto mibale ya mai.” Kasi, 2 Ntango 4:5 elobi ete: “[saani yango] ekokaki kokɔta bata nkóto misato ya mai.” Na yango, 2 Ntango 4:5 ezali kolobela balitre ya mai oyo ekokaki kokɔta na saani ya tempelo soki etondi. Nzokande, 1 Mikonzi 7:26 ezali kolobela balitre ya mai oyo bamesanaki kosalela. Na maloba mosusu, bazalaki kotondisa saani yango tii na likoló te. Emonani ete bazalaki kotya kaka balitre ya mai 44 000 na saani yango.

Mpo na nini Yesu ná Petelo bafutaki mpako ya tempelo kaka na mbongo moko ya ebende?

Na ntango ya Yesu, Moyuda nyonso ya mobali ya mbula koleka 20 asengelaki mbula na mbula kofuta badalakima mibale mpo na mpako ya tempelo. Yango ezalaki lifuta ya mikolo mibale ya mosala. Ntango batunaki soki afutaka mpako, Yesu ayebisaki Petelo boye: “Kende na mbu, bwaká ndɔbɔ, mpe kamatá mbisi ya liboso oyo ekomata mpe, ntango okofungola monɔkɔ na yango, okokuta mbongo ya ebende ya satatɛlɛ (statère). Kamatá yango mpe pesá bango yango mpo na ngai ná yo.”​—Matai 17:24-27.

Bato mingi ya mayele balobaka ete mbongo ya ebende ya satatɛlɛ oyo balobeli awa ezali nde badalakima minei (tétradrachme), elingi koloba mbongo ya mpako ya tempelo mpo na bato mibale. Mbongo ya ebende ya badalakima minei ezalaki mingi na mabɔkɔ ya bato koleka oyo ya badalakima mibale (didrachme). Na yango, buku moko (The New Bible Dictionary) elobi boye: “Emonani lokola, mbala mingi, Bayuda mibale bazalaki kosangisa mbongo na bango mpo na kofuta mpako ya tempelo.”

Lisusu, soki moto alingi kofuta mpako mpo na ye moko, asengelaki kobungisa mwa mbongo mosusu epai ya bato oyo bazalaki kosenza mbongo. Bato yango bazalaki kolya bato mbongo mingi (8 %). Nzokande, baoyo bazalaki kofuta mpako yango mpo na bato mibale bazalaki kobungisa mbongo wana te. Ata na likambo wana ya moke, lisolo ya Matai ezali na boyokani na makambo oyo ezalaki kosalema ntango Yesu azalaki awa na mabelé.

[Elilingi na lokasa 15]

Fɔtɔ ya monene ya Tetradrachme

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto