“Mibeko ekómaki molakisi na biso”
BANA mingi bayebaka ntina ya mibeko mpe ya disipilini te. Bamonaka ete mibeko etyaka bango nkaka. Nzokande, mikóló oyo bazali na mokumba ya koteya bana bayebaka ete kotyela bango mibeko ezali na ntina mingi. Nsima ya bambula, bilenge mingi bamonaka ntina ya disipilini oyo bapesaki bango. Ntoma Paulo asalelaki ndakisa ya moto oyo azalaki kobatela bana mpo na komonisa ebongiseli moko oyo Yehova Nzambe asalaki mpo na kotambwisa libota na ye.
Na ekeke ya liboso, baklisto mosusu na etúká ya Galatia bazalaki koloba ete Nzambe azalaki kondima kaka baoyo bazalaki kotosa Mibeko ya Moize. Ntoma Paulo ayebaki ete likanisi yango ezali solo te, mpamba te Nzambe apesaki elimo santu ata epai ya bato mosusu oyo bazalaki kotosa Mibeko ya Moize te. (Misala 15:12) Na yango, Paulo asalelaki ndakisa moko mpo na kosembola makanisi na bango. Na mokanda oyo akomelaki baklisto ya Galatia, alobaki boye: “Mibeko ekómaki molakisi na biso oyo azalaki kokamba epai ya Klisto.” (Bagalatia 3:24) Moto moko ya mayele alobi ete mokumba ya molakisi ezalaki “mokumba ya ntina mingi na ntango ya kala.” Soki toyebi mokumba oyo molakisi azalaki na yango, ekosalisa biso tókanga ntina ya likanisi oyo ntoma Paulo alobelaki.
Molakisi mpe mikumba na ye
Na mabota mingi ya bozwi, ezala ya Bagrɛki, ya Baloma, mpe mbala mosusu ya Bayuda, bazalaki na molakisi oyo mokumba na ye ezalaki ya kolandela makambo ya bana banda ntango bazali naino mike tii ntango bakokóma bilenge. Mbala mingi, molakisi azalaki moombo moko ya mokóló oyo bazalaki kotyela motema; azalaki lokola kapita mpo na kobatela mwana mpe kosɛnzɛla ete mposa ya tata mpo na mwana na ye ekokisama. Molakisi azalaki elongo na mwana mokolo mobimba, azalaki kokende elongo na ye esika nyonso, kosɛnzɛla ete azala pɛto, kokende kotika ye na kelasi, mbala mingi azalaki komemela ye mikanda mpe biloko mosusu, mpe azalaki kolandela ndenge oyo azalaki kotánga.
Mbala mingi, molakisi azalaki kotángisa mwana makambo ya kelasi te. Azalaki kaka kosɛnzɛla ete mwana alanda malako ya tata na ye. Kasi, azalaki mpe kolakisa mwana makambo mosusu mpe kopesa ye disipilini. Azalaki kolakisa ye bonkonde, kopamela ye, ata mpe kopesa ye etumbu soki asali mabe. Ya solo, tata ná mama nde bazalaki balakisi ya libosoliboso ya mwana. Kasi, ntango mwana azali kokola, molakisi azalaki kolakisa ye ndenge malamu ya kotambola, koyebisa ye ete asengeli kolata kazaka, kofanda, mpe kolya na ndenge ebongi, mpe ete asengeli kotɛlɛma liboso ya mikóló, asengeli kolinga baboti na ye, mpe bongo na bongo.
Platon, Mogrɛki moko oyo azalaki moto ya filozofi (428-348 L.T.B.) azalaki kondima mpenza ete esengeli te kotika mwana asala nyonso oyo alingi. Akomaki boye: “Mpate to nyama mosusu oyo elyaka matiti ekoki kozanga mobateli te; ndenge moko mpe bana bakoki kozanga molakisi te, baombo mpe bakoki kozanga nkolo te.” Likanisi yango ekoki komonana lokola elekisi ndelo, kasi ezali ndenge wana nde Platon azalaki kotalela makambo.
Lokola balakisi bazalaki ntango nyonso nsima ya bana, bana yango bakómaki komona bango lokola bakɛngɛli oyo bazalaki konyokola bango mpe kopesa bango disipilini ya makasi, mpe kofunda bango ata na makambo ya mikemike. Atako bongo, molakisi azalaki kobatela mwana mpo abeba te mpe básala ye mabe te. Appien, Mogrɛki mpe moto ya mayele na masolo ya kala na ekeke ya mibale T.B., alobelaki lisolo ya molakisi moko oyo, ntango azalaki kokende kotika mwana na kelasi, azingaki mwana na mabɔkɔ na ye mpo na kobatela ye liboso ya bato oyo balingaki koboma mwana. Lokola aboyaki kotika mwana, bato yango babomaki molakisi yango mpe mwana.
Makambo ya mbindo ezalaki mingi na mikili oyo ezalaki kolanda mimeseno ya Bagrɛki. Bato ya mabe bazalaki kobebisa bana; yango wana, esengelaki kobatela bana, mingimingi bana ya mibali. Molakisi asengelaki kozala wana ntango mwana azali kotánga na kelasi mpo bateyi mingi bazalaki bato ya kotyela motema te. Kutu, Libanius, Mogrɛki mpe molobi moko ya ekeke ya minei T.B., alobaki ete balakisi basengelaki kozala “bakɛngɛli ya bana oyo bazali naino kokola,” mpo na “kobengana baninga ya mabe, kopekisa bango bápusana pene ya bana, mpo bámesana na bango te.” Ntango bakoli, bana mingi bazalaki na limemya mpo na balakisi na bango. Malita ya balakisi mingi ezali na mabanga oyo bato bakomá maloba ya botɔndi mpo na balakisi na bango oyo bakufá.
Mibeko ezalaki molakisi
Mpo na nini ntoma Paulo akokanisaki Mibeko ya Moize na molakisi? Mpo na nini ndakisa yango ebongi mpenza?
Ya liboso, mibeko ezalaki kobatela. Paulo alimbolaki ete Bayuda bazalaki “kokɛngɛlama na nse ya mibeko.” Ezalaki lokola nde bazalaki kobatelama na molakisi moko. (Bagalatia 3:23) Mibeko ezalaki kotambwisa makambo nyonso ya bomoi na bango. Ezalaki kopekisa bango bámipesa na bamposa ya mabe. Ezalaki kobatela etamboli na bango mpe kopamela bango ntango basali mabunga; ezalaki kosalisa Moyisalaele mokomoko ayeba bolɛmbu na ye.
Mibeko ezalaki mpe kobatela Bayisalaele na makambo lokola etamboli ya mabe mpe losambo ya lokuta ya bikólo mosusu. Na ndakisa, mobeko oyo epekisaki kobalana na bato ya bikólo mosusu ezalaki kosalisa bato ya ekólo mobimba bázala na boyokani malamu na Nzambe. (Deteronome 7:3, 4) Mibeko ya ndenge yango ezalaki kobatela libota ya Nzambe ezala pɛto na elimo mpe ebongisama mpo na koyamba Masiya. Yango ezalaki bibongiseli malamu mpenza. Moize ayebisaki bandeko na ye Bayisalaele boye: “Lokola moto akopamelaka mwana na ye, boye [Yehova] Nzambe na yo akopamelaka yo.”—Deteronome 8:5.
Nzokande, likambo ya ntina na ndakisa oyo ntoma Paulo apesaki ezalaki ete bokonzi ya molakisi ezalaki kaka mpo na mwa ntango. Ntango mwana akómi elenge, molakisi azalaki lisusu kokɛngɛla ye te. Xénophon, Mogrɛki moko oyo azalaki moto ya mayele na masolo ya kala (431-352 L.T.B.) akomaki boye: “Ntango mwana mobali akómi elenge, balongolaka ye na nse ya litambwisi ya [molakisi] mpe [moteyi] na ye; balandelaka ye lisusu te, kasi akómaka komitambwisa ye moko.”
Ezalaki mpe bongo mpo na Mibeko ya Moize. Mokumba na yango ezalaki mpo na mwa ntango; ezalaki “komonisa polele bobuki-mibeko, tii ntango momboto [Yesu Klisto] . . . akoya.” Ntoma Paulo alimbolaki ete mpo na Bayuda, Mibeko ezalaki ‘molakisi oyo azalaki kokamba epai ya Klisto.’ Na ntango ya Paulo, mpo Bayuda bándimama na Nzambe, basengelaki kondima mokumba oyo Yesu azalaki na yango na kati ya mokano ya Nzambe. Nsima ya kosalisa bango bándima yango, mokumba ya molakisi esukaki.—Bagalatia 3:19, 24, 25.
Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisalaele ezalaki ya kokoka. Ekokisaki malamumalamu mikano oyo Nzambe atyelaki yango—kobatela libota na ye mpe kosalisa bango báyeba masɛngami na ye. (Baloma 7:7-14) Mibeko ezalaki molakisi malamu. Nzokande, Bayisalaele mosusu bazalaki komona masɛngami na yango kilo. Yango wana, Paulo akomaki ete wana ntango oyo Nzambe atyaki ekokaki, “Klisto na nzela ya lisombi alongolaki biso na alakeli mabe ya Mibeko.” Mibeko ezalaki “elakeli mabe” na ndenge ezalaki kosɛngisa Bayuda, bato ya kozanga kokoka, makambo oyo bakokaki kotosa na ndenge ya kokoka te. Ezalaki kosɛnga Bayisalaele bálandaka milulu ya sikisiki. Ntango Moyuda moko andimi mbeka ya lisiko ya Yesu, ezalaki lisusu na ntina te akokisa masɛngami ya Mibeko.—Bagalatia 3:13; 4:9, 10.
Na yango, Paulo akokanisaki Mibeko ya Moize na molakisi mpo na komonisa ete ezalaki kobatela mpe ezalaki mpo na mwa ntango. Mpo na kondimama na Yehova, moto asengeli komonisa kondima epai ya Yesu, kasi te kotosa Mibeko ya Moize.—Bagalatia 2:16; 3:11.
[Etanda/Elilingi na lokasa 21]
“BAKAPITA” MPE “BATO YA MISALA”
Longola molakisi, ntoma Paulo asalelaki mpe ndakisa ya “bakapita” mpe ya “bato ya misala.” Bagalatia 4:1, 2 elobi boye: “Ntango mozwi-ya-libula azali naino mwana moke akeseni ata moke te ná moombo, atako azali nkolo ya biloko nyonso, kasi azali na mabɔkɔ ya bakapita mpe ya bato ya misala tii mokolo oyo tata na ye asilá kopona liboso.” Mokumba ya “bakapita” mpe ya “bato ya misala” ekesanaki na oyo ya balakisi, kasi Paulo azwaki ndakisa na bango nyonso mpo na komonisa likambo moko.
Na kolanda mibeko ya Baloma, ‘kapita’ azalaki moto oyo azalaki kobatela etike oyo azali naino mwana moke mpe kobatela bozwi na ye tii ntango akokóma mokóló. Na yango, Paulo alobaki ete atako mwana yango azalaki “nkolo” ya libula na ye, ntango azali naino moke akesanaki na moombo te, elingi koloba azalaki na lotomo te likoló ya libula yango.
Nzokande, ‘moto ya mosala’ azalaki kobongisa ndenge ya kosalela bozwi ya mwana. Josèphe, Moyuda moko oyo azalaki mokomi ya masolo ya kala, alobelaki elenge moko nkombo na ye Hyrcan, oyo asɛngaki tata na ye mokanda mpo moto ya mosala apesa ye mbongo mpo asomba eloko nyonso oyo alingi.
Na bongo, tomoni ete mwana oyo azali na nse ya libateli ya molakisi, to ya ‘kapita’ to mpe ya ‘moto ya mosala’ azalaki na bonsomi te ya kosala nyonso oyo alingi. Bato mosusu nde bazalaki kotambwisa bomoi na ye na boumeli ya ntango oyo tata na ye atyaki.
[Elilingi na lokasa 19]
Liyemi na mbɛki moko ya Bagrɛki emonisi molakisi moko asimbi nzete
[Eutelo ya bafɔtɔ]
National Archaeological Museum, Athènes
[Elilingi na lokasa 19]
Liyemi moko ya ekeke ya 5 L.T.B. ezali komonisa molakisi (asimbi nzete) azali kokɛngɛla ntango mwana azali koyekola maloba ya ntɔki mpe miziki
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Bildarchiv Preussischer Kulturbesitz/Art Resource, NY