Mokanda euti na République dominicaine
“Namoná naino bolingo lokola oyo te”
NIURKA asalaki lisolo na ye ya liboso na lisangá na biso na pɔsɔ oyo. Akomaki makambo oyo asengelaki koloba na ekomeli ya bato bakufá miso, mpe na nsima akangaki yango na motó. Tosalaki lisolo yango elongo, ngai nazalaki moto oyo ye azalaki koteya. Nazalaki koloba na mikro mpe ye azalaki koyoka mongongo na ngai na aparɛyi oyo alataka na matoi mpo na koyoka. Ntango tosilisaki, bayangani babɛtaki mabɔkɔ makasi na boye ete ayokaki yango. Ndenge oyo azalaki kosɛka emonisaki ete motema na ye etondaki na esengo. Ngai mpe nazalaki na esengo. Mosala ya misionɛrɛ ezali na matomba ebele!
Nazali koyeba lisusu mbala ya liboso oyo nakutanaki na Niurka. Eleki sikoyo mbula mibale. Nsima ya kotambola na motuka miniti 30 na nzela ya mabelé, namonaki ye mpo na mbala ya liboso. Afandaki na porte ya mwa ndako moko oyo batongá na mabaya mpe babriki mpe ezalaki na batole ya kala. Nazalaki mpe koyoka makɛlɛlɛ ya bantaba, ba lapin, mpe bambwa. Namonaki Niurka akitisi motó na nse; yango emonisaki ete azalaki komiyoka ye moko mpe azalaki kotungisama na makanisi. Azalaki na mbula 34 kasi azalaki komonana mokóló koleka.
Nasimbaki ye na lipeka, mpe atombolaki motó kasi azalaki komona te mpamba te miso na ye ekufaki esilaki koleka mbula 11. Nalobaki na mongongo makasi na litoi na ye mpo na koyebisa ye nkombo na ngai mpe ya ndeko oyo tozalaki na ye. Na nsima, toyebaki ete Niurka abelaká maladi moko oyo ebomaka miso mpe matoi (Syndrome de Marfan). Niurka abɛlaka mpe maladi ya diabɛti oyo esɛngaka kokeba ete sukali eleka mingi te na nzoto.
Ntango nasimbisaki ye mokanda moko, ayebaki ete ezali Biblia mpe alobaki ete azalaki kosepela kotánga yango liboso miso na ye ekufá. Kasi, ndenge nini nakokaki koteya solo ya Liloba ya Nzambe epai ya mwasi yango oyo azalaki komiyoka ye moko, azalaki mobola, mpe oyo azali motau? Lokola ayebi alfabɛ, nabandaki kokata bakopale na lolenge ya balɛtrɛ mpe nazalaki kosimbisa ye yango mpo aloba soki ezali lɛtrɛ nini. Eumelaki te, akómaki koyeba balɛtrɛ yango. Na nsima, ntango azalaki kosimba ngai na mabɔkɔ wana nazalaki kosala bilembo, azalaki koyeba koyokanisa lɛtrɛ mokomoko na elobeli ya bajɛstɛ. Na mokemoke, azalaki koyekola bilembo mosusu. Lokola ngai moko mpe nazalaki naino koyekola elobeli ya bajɛstɛ, ezalaki kosɛnga ete nalekisa bangonga mingi mpo na komibongisa liboso ya koyekola na ye. Kasi ngai na Niurka tozalaki na mposa makasi, yango wana, eumelaki te mpo tóyeba malamu elobeli ya bajɛstɛ.
Ebongiseli moko oyo esalisaka babola epesaki Niurka aparɛyi ya kotya na matoi mpo na koyoka; yango esalisaki ye mingi akola na elimo. Atako ezalaki modɛlɛ ya sika te, esalisaki ye mingi. Nsima ya mbula koleka zomi banda miso mpe matoi na ye ekufá, akokaki lisusu kosolola na bato. Lisusu, elimo ya Yehova esalisaki ye akóma na boyebi, na elikya mpe na bolingo. Mwa moke na nsima, Niurka akómaki kosalela nzete mpo na kotambola mpe kokende koteya bato mosusu solo ya Biblia.
Niurka ayekolaka Biblia na mama leki na ye mpe bandeko na ye mosusu mibale. Amibongisaka malamu mpe akangaka liteya nyonso na motó. Bato oyo ayekolaka na bango batángaka baparagrafe, mpe Niurka atángaka mituna na buku na ye oyo ezali na ekomeli ya bato bakufá miso. Ndeko oyo abimi na ye na mosala ya kosakola alobaka na litoi ya Niurka to mpe asalaka bilembo mpe ye asimbaka mabɔkɔ na ye mpo na koyeba eyano oyo moto apesi.
Bandeko nyonso ya lisangá basalisaka Niurka mpe balendisaka ye. Bandeko bakendaka kozwa ye mpo na kokende na makita mpe na mayangani. Bamosusu babimaka na ye na mosala ya kosakola. Eumeli te, Niurka ayebisaki ngai boye: “Namoná naino bolingo lokola oyo te.” Azali na mokano ya kozwa batisimo na liyangani ya etúká oyo ezali koya.
Soki toleki epai Niurka afandaka, tokutaka ye atomboli motó, azali kosɛka. Soki natuni ye mpo na nini azali kosɛka, alobaka boye: “Nazali kokanisa ntango oyo mabelé ekokóma paladiso. Mpe nazali kominona na kati ya paladiso.”
[Elilingi na lokasa 25]
Niurka ná bandeko mosusu ya lisangá liboso ya Ndako ya Bokonzi
[Elilingi na lokasa 25]
Niurka ayebisaka bato mosusu makambo oyo ayekoli