Armagedona etumba ya Nzambe mpo na kosukisa bitumba nyonso
“Mpo na bango, koboma moto ezali mabe mingi; yango wana, bayebaka ntina ya bitumba te mpe balingaka yango ata moke te, mpe liloba etumba ezali te na monɔkɔ ya mboka na bango.”—MALOBA YA FRIDTJOF NANSEN, MWANA-MBOKA NORVÈGE, NA MOBU 1888, MPO NA BA-INUIT, BATO YA GROENLAND.
NANI akolinga te kofanda na ekólo oyo bato na yango “bayebaka ntina ya bitumba te mpe balingaka yango ata moke te”? Nani akosepela te kofanda na mokili oyo ata liloba etumba ezali te na monɔkɔ ya mboka na bango, mpamba te bato bayebi bitumba te? Mokili ya ndenge wana ekoki komonana lokola ndɔtɔ, mingimingi soki tozali kotalela kaka bato mpo na kosala yango.
Nzokande, na esakweli ya Yisaya, Nzambe ye moko alaki ete akosala mokili ya ndenge wana: “Bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makɔnga na bango ete mazala bikateli ya matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.”—Yisaya 2:4.
Ezali polele ete mpo elaka wana ekokisama na mokili oyo ezali na basoda soki milio 20 mpe bitumba soki 20 ezali kobundama lelo oyo, mbongwana monene esengeli kosalema. Tokoki kokamwa te ete Yehova, Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, akozwa makambo ya mokili oyo na mabɔkɔ. Yango ekomema tii na oyo Biblia ebengi Armagedona.—Emoniseli 16:14, 16.
Atako na mikolo oyo bato bazali kosalela liloba “Armagedona” mpo na kolobela etumba ya nikleere oyo ekoboma mokili mobimba, diksionɛrɛ moko epesi ndimbola ya libosoliboso ya liloba yango: “Esika oyo etumba ya monene mpe ya nsuka ekosalema na kati ya banguya ya malamu ná banguya ya mabe.” Malamu ekolonga mabe, to etumba ya ndenge wana ezali kaka ndɔtɔ mpamba?
Tokoki kolendisama na komona ete Biblia elobi mbala na mbala ete mabe ekosuka. Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Bato ya masumu [bakolongwa] na mokili, mpe bato mabe [bakozala] lisusu te.” (Nzembo 104:35) Mokanda ya Masese elobi boye: “Basembwi bakofanda na mokili mpe bato malamu bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mokili mpe bato ya masumu bakobikolama wana.”—Masese 2:21, 22.
Lisusu, Biblia emonisi polele ete bato mabe bakotika bokonzi na bango na malɛmbɛ te; yango wana esengeli Nzambe azwa makambo na mabɔkɔ mpo na kosukisa mabe nyonso, ná bitumba. (Nzembo 2:2) Armagedona, nkombo oyo Biblia epesi etumba yango, ezali na ndimbola monene.
Bitumba oyo ebundamaki na ntango ya kala pene na Megido
Liloba “Armagedona” elimboli “Ngomba ya Megido.” Na ntango ya kala, bitumba mingi ya mineneminene ebundamaki na engumba Megido mpe na Lobwaku ya Yizelele oyo ezali zingazinga na yango. Na buku na ye (The Battles of Armageddon), Eric Cline, moto moko ya mayele na masolo ya kala, akomaki boye: “Banda na ntango ya kala, bitumba oyo ebongolá mpenza makambo na mokili ebundamaki na Megido mpe na Lobwaku ya Yizelele.”
Ndenge Cline amonisi yango, bitumba oyo ezalaki kobundama pene na Megido ezalaki mpenza bitumba ya nsɔmɔ. Basoda ya Mongolie, oyo balongaki bamboka mingi ya Azia na ekeke ya 13, bakweaki mpo na mbala ya liboso na lobwaku yango. Kaka pene na Megido, basoda ya Grande-Bretagne oyo batambwisamaki na mokonzi na bango Edmund Allenby, balongaki mpe basoda ya Turquie na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Mokomi moko ya masolo ya bitumba alobaki ete etumba oyo Allenby alongaki ezali “moko ya bitumba ya minene oyo eumelaki te.”
Bitumba ya nsɔmɔnsɔmɔ oyo Biblia elobeli ebundamaki mpe pene na Megido. Na ndakisa, Mosambisi Balaka alongaki basoda ya Kanana ná mokonzi na bango Sisela. (Basambisi 4:14-16; 5:19-21) Gideona ná bato na ye 300 balongaki ebele ya basoda ya Midiani na esika yango. (Basambisi 7:19-22) Mokonzi Saulo ná mwana na ye Yonatana bakufaki na Ngomba Giliboa, oyo ezali pene na esika yango, ntango Bafilistia balongaki basoda ya Yisalaele.—1 Samwele 31:1-7.
Lokola Megido mpe lobwaku oyo ezali zingazinga na yango ezali na esika oyo ebongi mpenza, bitumba mingi ebundamaki wana na boumeli ya mbula 4 000 oyo euti koleka. Moto moko ya mayele na masolo ya kala atángaki bitumba soki 34 oyo ebundamaki wana!
Na ntembe te, makambo oyo esalemá na Megido mpe ndenge esika yango ebongaki mpenza mpo na bitumba nde esali ete básalela nkombo “Armagedona” na ndenge ya elilingi. Atako nkombo yango ezali kaka na esika moko na Biblia, ndenge oyo balobeli yango na mokanda ya Emoniseli emonisi polele ete mbongwana oyo Armagedona ekomema na mokili ekotalela bomoi ya moto nyonso.
Armagedona na Biblia
Atako bitumba mingi oyo ebundamaki pene na Megido na ntango ya kala ezalaki ya nsɔmɔ, moko te esilisaki mabe. Moko te esalemaki na kati ya banguya ya malamu ná banguya ya mabe. Tomoni mpenza ete etumba ya ndenge wana esengeli kozala kaka etumba ya Nzambe. Ndenge Yesu alobaki, “moto ya malamu azali te, longola kaka moko, Nzambe.” (Luka 18:19) Longola yango, Biblia yango moko ebengi Armagedona etumba ya Nzambe.
Mokanda ya Emoniseli elobi ete “bakonzi ya mabelé mobimba” bakoyangana “mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” (Emoniseli 16:14) Esakweli yango ebakisi boye: “Mpe bayanganisaki bango na esika oyo ebengami na Liebele ete Hala-Magedona,” to Armagedona.a (Emoniseli 16:16) Na nsima, Emoniseli elobi ete “bakonzi ya mabelé mpe mampinga na bango” bakoyangana “mpo na kobunda etumba ná moto oyo afandi likoló ya mpunda mpe ná limpinga na ye.” (Emoniseli 19:19) Moto yango oyo afandi likoló ya mpunda ezali Yesu Klisto.—1 Timote 6:14, 15; Emoniseli 19:11, 12, 16.
Tokoloba nini nsima ya kotalela bavɛrsɛ wana? Tokoloba ete Armagedona ezali etumba oyo Nzambe akobunda na bato oyo bazangi botosi. Mpo na nini Yehova ná Mwana na ye, Yesu Klisto, bakobunda etumba ya ndenge wana? Ya liboso, Armagedona ‘ekobebisa baoyo bazali kobebisa mabelé.’ (Emoniseli 11:18) Longola yango, ekomema mokili ya kimya, “mabelé moko ya sika oyo tozali kozela engebene elaka [ya Nzambe]” epai “boyengebene ekofanda.”—2 Petelo 3:13.
Mpo na nini Armagedona esengeli koya?
Ozali kondima te ete Yehova, “Nzambe ya bolingo,” akoki kotinda Mwana na ye, “Nkolo ya kimya,” abunda etumba? (2 Bakolinti 13:11; Yisaya 9:6) Koyeba ntina oyo bakosala yango ekoki kosalisa yo. Mokanda ya Nzembo (NW) elobeli Yesu lokola mobundi oyo afandi likoló ya mpunda. Mpo na nini azali kobunda? Mokomi ya nzembo alobi ete Klisto azali kobunda ‘mpo na bosembo mpe boyengebene.’ Azali kobunda mpo alingi boyengebene mpe ayini mabe.—Nzembo 45:4, 7.
Ndenge moko mpe, Biblia eyebisi ndenge oyo Yehova atalelaka kozanga bosembo oyo ezali na mokili lelo oyo. Mosakoli Yisaya akomaki boye: “[Yehova] amoni yango mpe epesi ye mawa ete kosambisa-sembo ezalaki kozanga. . . . Alati boyengebene lokola ebende ya ntolo, mpe ekɔti ya lobiko likoló ya motó; alati bilamba ya kobukanisa lokola bilamba na ye mpe amizingeli na nkanda lokola na mokoto.”—Yis. 59:15, 17.
Ntango nyonso oyo bokonzi ekozala na mabɔkɔ ya bato mabe, bato ya sembo bakozala na kimya te. (Masese 29:2; Mosakoli 8:9) Tokoki te kopekisa bato mabe kosala mabe. Yango wana, mpo na kotya kimya mpe bosembo, esengeli kosala likambo moko: kolongola bato mabe. Salomo akomaki boye: “Moto mabe akosikola moyengebene.”—Masese 21:18.
Lokola Nzambe azali Zuzi, tokoki kotya motema ete mbala nyonso oyo akosambisa bato mabe, akokata likambo na bosembo. Abalayama atunaki boye: “Mosambisi ya mokili mobimba akosala sembo te?” Abalayama azwaki eyano ete Yehova azalaka ntango nyonso sembo! (Genese 18:25) Longola yango, Biblia elobi ete Yehova asepelaka te koboma bato mabe; asalaka yango kaka soki amoni ete moto aboyi mpenza kobongwana.—Ezekiele 18:32; 2 Petelo 3:9.
Tózwa etumba ya Armagedona na lisɛki te
Okozala na ngámbo nini na etumba yango? Mingi kati na biso bakoloba mbala moko ete bakozala na ngámbo ya banguya ya malamu. Kasi, tokoyeba ndenge nini soki tozali na ngámbo boye to boye? Mosakoli Sefania alendisi biso boye: “Bóluka boyengebene, bóluka bopɔlɔ.” (Sefania 2:3) Ntoma Paulo alobi ete mokano ya Nzambe ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.”—1 Timote 2:4.
Koyeba Yehova mpe mokano na ye ya kolongola mabe na mokili ezali likambo ya liboso oyo tosengeli kosala mpo na kozwa lobiko. Ya mibale, tosengeli kozala bayengebene mpo Nzambe andima mpe abatela biso.
Soki tosali makambo wana ya ntina mingi, tokobanga Armagedona te, etumba wana oyo ekosukisa bitumba nyonso, kasi tokozela yango na elikya. Nsima ya etumba yango, na bisika nyonso bato bakomona lisusu ntina ya bitumba te mpe bakolinga yango lisusu ata moke te. “Bakoyekola etumba lisusu mpe te.”—Yisaya 2:4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba soki Armagedona ezali mpenza esika moko awa na mabelé, talá “Mituna ya batángi,” na lokasa 31.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Etumba oyo Nzambe akobunda mpo na kozwa makambo ya mokili na mabɔkɔ ebengami Armagedona
[Elilingi na lokasa 6]
Megido
[Elilingi na lokasa 6]
Gideona ná bato na ye balongaki etumba monene pene na Megido
[Elilingi na lokasa 7]
Nsima ya Armagedona, na bisika nyonso bato bakomona lisusu ntina ya bitumba te mpe bakolinga yango lisusu ata moke te
[Elilingi na lokasa 8]
Koyeba Yehova mpe mokano na ye ezali likambo ya liboso oyo tosengeli kosala mpo na kozwa lobiko