Tóbosana te baoyo bafandi na bandako ya mibange
1. Mpo na nini tosengeli koluka koyebisa bato oyo bafandi na bandako ya mibange nsango malamu?
1 Bato mingi bazali kokutana na mikakatano oyo bobange ememaka. (Mos. 12:1-7) Mibange mosusu bafandaka na bandako ya mibange, yango wana ezalaka mpasi kokutana na bango ntango tozali kosakola ndako na ndako. Ezali bongo ata na mikili epai baboti oyo bakómi mibange bakendaka kofanda epai ya bana na bango to bato mosusu ya libota. Atako mbala mosusu mibange bakokaka kotambola te to bakómaka kobosana makambo, mibange to bato mosusu oyo bafandi na bandako ya mibange bazali naino na likoki ya koyekola makambo oyo etali Yehova, kokanga ntina na yango, mpe kolinga Yehova. Ndenge nini tokoki kosala mpo na koyebisa bango nsango malamu ya “elikya kitoko mpenza”?—Tito 2:13.
2. Ndenge nini tokoki kosala liste ya bandako ya mibange oyo tosengeli kokendaka kotala?
2 Ndenge ya kobanda: Mbala mingi, okoki koyeba bandako ya mibange soki otali na liste oyo bakomaka banimero ya telefone. Luká na esika bakomi “bandako ya mibange,” mpe “bandako oyo basungaka baoyo bazali na bosɛnga.” Mokɛngɛli na mosala ya kosakola akoki kozwa bibongiseli mpo basakoli oyo bameseni na mosala bákendaka na bisika yango. Soki makambo ebongisami malamu mpe totyeli Yehova motema, mbala mingi likoki ekozala ya kofungola etuluku ya boyekoli ya Biblia kuna.—Mas. 21:5; 1 Yoa. 5:14, 15.
3, 4. (a) Nani tosengeli kosolola na ye mpo na kobanda etuluku ya boyekoli? (b) Ndenge nini tokoki kolimbola ebongiseli ya koyekola na etuluku?
3 Lolenge ya kobanda koyekola na bato kuna etaleli ndenge oyo esika yango ezali. Soki esika yango ezali monene, ezali na bato mingi mpe basali mingi, eleki malamu kokende kosɛnga epai ya moyambi-bapaya mpo apesa biso nzela ya kosolola na mokambi ya esika yango. Soki ezali moke mpe ezali na mibange ebele te mpe bato mibale to misato oyo bakɛngɛlaka bango, ekozala malamu kobongisa ntango mpo na kosolola mbala moko na nkolo-ndako yango.
4 Ata soki esika yango ezali ndenge nini, limbolá ete omipesi na bolingo na yo moko mpo na kolendisa bato oyo balingaka kotánga mpe kosolola masolo ya Biblia. Tuná soki ezali na bato oyo bakosepela kosolola masolo ya Biblia elongo na basusu na miniti soki 30 na pɔsɔ. Okoki kosalela mikanda ndenge na ndenge, kasi basakoli mingi bamonaki ete bato basepelaka mingi na buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia mpe Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Okoki komona malamu olakisa mikanda yango epai ya mokambi ya esika yango. Okoki kosolola na ye mpo na kopona mokolo, ngonga mpe esika oyo bokobanda koyangana, mpe ekozala malamu atya yango na programɛ ya makambo etali ndako ya mibange. Kobanga te komimonisa ete ozali Motatoli ya Yehova. Salisá mpe mokambi yango akanga ntina ete okoya te mpo na kosala losambo, kasi nde mpo na kosalisa bato báyeba mateya ya Biblia.
5. Makanisi nini okoki kosalela mpo boyekoli yango esepelisa mpenza mpe ebimisa matomba?
5 Ndenge ya kotambwisa boyekoli: Ndenge oyo okotambwisa boyekoli ekotalela ndenge makambo ezali na esika yango; na yango, zalá pene ya kobongola makambo mpe monisá bososoli. Motambwisi asengeli komemaka babuku oyo bazali kosalela mpe kozwaka yango na nsuka ya boyekoli. Ntango mosusu, ekoki kosɛnga komema babuku ya makomi minene mpo na bato mosusu. Bokoki kotánga baparagrafe, kotuna mituna mpe biyano ekoki kopesama kaka ndenge tomesaná kosala. Okoki kosɛnga baoyo bazali na likoki ya kotánga mpe balingi kosala yango, bátánga baparagrafe to bavɛrsɛ ya Biblia. Na ntango ya boyekoli, mipesá mobimba, lobá na ndenge ya kolendisa, mpe zwá bango lokola baninga. Na ndingisa ya mokambi, mikolo mosusu okoki kolakisa bango bavideo na biso oyo ekolendisa kondima na bango na Biblia to oyo ekomonisa mateya oyo tokoki kozwa na lisolo moko ya Biblia. Okoki kobanda mpe kosukisa boyekoli na libondeli moko ya mokuse. Basakoli mosusu kutu bayembaki banzembo ya Bokonzi.
6. Okosala nini soki moto moko abimisi ntembe?
6 Bongo soki moto moko abimisi ntembe na likambo moko oyo etángami to elobami na boyekoli? Salelá bososoli ntango ozali kopesa eyano. (Kol. 4:6) Mbala mosusu okoki kolobela na mokuse vɛrsɛ moko ya Biblia oyo emonisi polele likambo oyo abimisi. Soki ebongi te kosala bongo, ekozala malamu oyebisa ye ete oyoki makambo alobi mpe sɛngá ye bótalela yango bino mibale nsima ya boyekoli.
7. Okosala nini soki moto moko abimisi motuna oyo etali ye moko to asepeli mpenza?
7 Ntango mosusu, moto akoki kotuna motuna to komonisa mposa ya koyeba makambo mosusu. Ndeko mwasi moko alobaka boye: “Ezali motuna moko ya malamu. Kasi lokola ezali motuna oyo etali yo moko, tiká tósilisa naino kotánga, bongo na nsima tokosolola yango biso mibale.” Mbala mingi, ekozala malamu kozwa bibongiseli mpo na koyekola Biblia na moto oyo asepeli mpenza na ntango mpe na esika mosusu.
8. Ndenge nini esengeli kotánga boyekoli na etuluku mpe bayekoli mosusu nyonso oyo tozwi kuna?
8 Mbala mingi, elekaka malamu ete Batatoli oyo babandaki, bákoba kotambwisa boyekoli na etuluku yango mbala nyonso. Mosakoli nyonso oyo apesi makanisi akoki kotánga ngonga. Soki boyekoli ekómi kosalema mbala na mbala, mosakoli oyo atambwisaka yango akoki kotánga bozongeli mbala nyonso oyo atambwisi boyekoli na etuluku yango, kasi akotánga kaka boyekoli moko na sanza. Nzokande, bayekoli mosusu ya Biblia oyo azwi kuna, oyo bazali koyekola mpe kokanga ntina ya makambo, akotánga bango ndenge totángaka bayekoli nyonso.
9, 10. Bizaleli nini esɛngami epai ya baoyo bazali kotambwisa boyekoli na etuluku na bandako ya mibange? Limbolá.
9 Kobá koyekola na bango: Ekozala malamu kopona mokolo mpe ngonga ya sikisiki mpo na koyekola na etuluku. Bato oyo bafandaka kuna mpe basali bakomizela ete boyekoli ebandaka mpe esukaka na ngonga oyo boponaki. (Mat. 5:37) Na yango, esengeli kotosa ndenge boyokanaki, kozala na molende mpe kosala makambo na molɔngɔ. Makambo oyo esalemá emonisi ete ezalaka malamu mingi soki basakoli mibale oyo bakɔmeli bazali kotambwisa boyekoli ya etuluku yango. (Mos. 4:9, 10) Na bisika ya minene, ekoki kosɛnga basakoli mingi.
10 Ezali mpe na ntina mingi komimonisa moninga mpe kosepela na bato. (Flp. 2:4) Na mbala ya liboso oyo bokosala boyekoli na etuluku, salá makasi okutana na moto nyonso oyo ayei. Komá bankombo na bango mpe salá makasi okanga yango liboso oya lisusu. Soki omonisi motema molai mpe boboto, moto nyonso akomona ete basepeli na ye mpe balingi ye.
11. Ndenge nini batambwisi ya boyekoli na etuluku bakoki komonisa limemya epai ya basali mpe bato ya libota ya mibange?
11 Ezali mpe na ntina komonisa bokonde mpe boboto epai ya bato oyo basalaka kuna mpe bato ya libota ya mibange yango. Soki bosili kotya ngonga ya boyekoli, ekozala malamu te kobongola ngonga mpe bibongiseli oyo bozwá kozanga ete bósolola liboso na mokambi ya esika yango. Tunáká mokambi mbala na mbala mpo na koyeba makanisi na ye mpo na ndenge oyo boyekoli ezali kokende. Soki bato ya mabota na bango bayei kotala bango na ntango ya boyekoli, salá makasi okutana na bango. Yebisá bango ntina ya boyekoli yango ya Biblia. Monisá bango ete ozali mpenza kotyela bato ya libota na bango likebi. Sɛngá bango báfanda mpe bálanda boyekoli.
12, 13. Lobelá masolo oyo emonisi matomba ya kopesa litatoli na bandako ya mibange.
12 Matomba: Balapolo oyo ezali kouta epai ya bakɛngɛli-batamboli mpe na masangá emonisi matomba oyo kosakola na bisika wana ezali kobimisa. Na esika moko, bato soki 20 bayanganaki na mbala ya liboso. Yango esalaki ete basakoli bábanda koyekola na bato motoba oyo bafandi kuna. Nsukansuka, moko na bango azwaki batisimo. Na ndako moko ya mibange, mwasi moko ya mbula 85, akómaki koyangana na makita ya lisangá moko ya penepene mpe amonisaki mposa ya kozwa batisimo. Mpo na kobongisa lisusu mosala na bango, ndako mosusu ya mibange ezwaki ekateli ya kolongola etuluku ya boyekoli oyo Batatoli ya Yehova bazalaki kotambwisa; kasi mibange oyo bafandaka kuna bamilelaki epai ya mokambi mpo na likambo yango! Nsukansuka, boyekoli ezongaki mpe bato 25 tii 30 bazalaki koyangana.
13 Bolingo oyo tomoniselaka bato oyo bafandaka na bandako ya mibange, ebendaka likebi ya bato mingi, ata baoyo bafandaka kuna te. Na ndakisa, mbala mosusu bato oyo basalaka kuna bayanganaka na boyekoli mpe bapesaka biyano. Milende oyo tosalaka mpo na kotyela bato oyo bafandaka na bandako ya mibange likebi, epesaka mpe litatoli malamu epai ya bato ya zingazinga. (1 Pe. 2:12) Ntango bayebisaki mokambi moko ntina ya boyekoli yango, alobaki ete: “Banda kala bozalaki wapi? Bokobanda ntango nini?” Mokambi mosusu akomaki boye: “Nakosɛnga mpenza ete boyekoli ya etuluku ya boye esalema na bisika nyonso ya ndenge oyo, awa epai na biso. Mosala wana oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala ofele, ezali na kati ya mosala na bango oyo basalelaka Nzambe.” Na ekólo Hawaii, ndako moko ya mibange epesaki Batatoli ya Yehova diplome mpo na mosala ya malamu mingi oyo basalaki na bolingo na bango moko mpe elobaki ete mosala na bango ezali “eloko ya motuya mpe ya ntalo mingi” mpo na bato ya ndako wana ya mibange.
14. Mpo na nini tosengeli kozala na mposa ya kopesa litatoli epai ya bato oyo bafandi na bandako ya mibange?
14 Yehova asɛngi mibange básanzola ye. (Nz. 148:12, 13) Libyangi yango etali mpe bato oyo bafandaka na bandako ya mibange. Ezali nde na bandako ya mibange na teritware na bino, epai mibange oyo bafandi kuna bakoki koyoka nsango malamu? Na lisalisi ya bankulutu mpe bakambi ya bandako ya mibange, tokoki kopesa litatoli epai ya bato oyo bafandi kuna. Ntango tozali kokanisa bato oyo bapusani na mbula, tozali komekola Yehova.—Nz. 71:9, 18.