Mituna ya batángi
Makama ezalaka etumbu ya Nzambe?
Nzambe asalelaka makama te mpo na kopesa bato etumbu. Asalá yango te, mpe akosala yango te. Mpo na nini? Mpamba te na 1 Yoane 4:8, Biblia elobi ete “Nzambe azali bolingo.”
Bolingo etambwisaka misala nyonso ya Nzambe. Bolingo elukaka konyokola basusu te, mpamba te Biblia elobi ete “bolingo esalaka mozalani mabe te.” (Baloma 13:10) Yobo 34:12 elobi boye: “Solo, Nzambe akosalaka na mabe te.”
Ya solo, Biblia esakolaki ete makama, na ndakisa “koningana minene ya mabelé” ekosalema na mikolo na biso. (Luka 21:11) Kasi, Yehova azali na ngambo te mpo na makambo mabe oyo makama yango ebimisaka, kaka ndenge moto oyo ayebisaka soki mbula ekobɛta akoki kozala na ngambo te soki mbula makasi ebɛti mpe ememeli bato makama. Kasi, soki Nzambe te nde atindaka makama oyo ekómelaka bato, eutaka wapi?
Biblia elobi ete: “Mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe,” Satana Zabolo. (1 Yoane 5:19) Azali mobomi-bato banda na ebandeli tii lelo oyo. (Yoane 8:44) Satana amonaka ete bomoi ya bato ezali na ntina te. Alukaka kaka matomba na ye moko, yango wana tokoki kokamwa te ndenge azali kotinda bato ya mokili mobimba bálukaka kaka matomba na bango moko. Lelo oyo, bakonzi ya mokili bazali kotika bato mosusu báfanda na bisika oyo makama ekoki kosalema to na bisika oyo bato bazali kosala makambo oyo ekoki komema makama. (Baefese 2:2; 1 Yoane 2:16) Na yango, bato ya lokoso bazali mpe na ngambo mpo na makama mosusu oyo ezali kokómela bato. (Mosakoli 8:9) Na ndenge nini?
Makama mingi oyo ebimaka na mokili ezalaka mpe foti ya bato bango moko. Tózwa ndakisa ya likama oyo ekómelaki bato ya engumba Nouvelle-Orléans, na États-Unis, ntango mai etondaki kuna, to ndakisa ya bandako oyo ebukanaki na ngomba oyo ezali pembeni ya mbu na ekólo Vénézuéla. Na bandakisa wana mpe mosusu, makambo lokola mopɛpɛ makasi mpe mbula ebimisaki makama minene mingimingi mpo bato batalelaki te esika nini bakoki kotonga, babongisaki bisika yango malamu te, bayokaki makebisi te, mpe bakonzi bakabolaki mabelé kaka bongobongo.
Tótalela likama moko oyo Biblia elobeli. Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, ndako moko molai ekweaki mpe ebomaki bato 18. (Luka 13:4) Mbala mosusu, soki likama yango esalemaki, ezalaki foti ya bato bango moko, to mpe ezalaki “ntango mpe likambo oyo ekanami te,” to mpe nyonso mibale; kasi esalamaki te mpo Nzambe nde alingaki kopesa bato yango etumbu.—Mosakoli 9:11, NW.
Ezali na makama oyo Nzambe atindelaki bato? Ɛɛ, kasi makama yango ebomaki bibomela te; ebomaki kaka bato mabe, ezalaki na mokano moko, mpe esalemaki mingi te. Kati na yango tokoki kotánga bandakisa mibale: Mpela ya ntango ya Noa mpe kobomama ya Sodoma mpe Gomola na mikolo ya Lota. (Genese 6:7-9, 13; 18:20-32; 19:24) Bitumbu yango ebomaki bato ya mabe kasi bato oyo bazalaki sembo na miso ya Nzambe babikaki.
Kutu, Yehova Nzambe azali na likoki, na mposa mpe na nguya ya kolongola bampasi mpe makama nyonso oyo enyokolaka bato. Mpo na Yesu Klisto, Mokonzi oyo Nzambe aponi, Nzembo 72:12 esakolaki ete: “Ye akobikisa mobola oyo akoganga mpe moto ya mawa oyo azali na mosungi te.”