Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/6 nk. 18-22
  • Ndimá bokonzi ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndimá bokonzi ya Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge oyo totalelaka bokonzi
  • Tóteya makoki na biso ya kososola
  • Satana alukaka kobebisa bokonzi ya Nzambe
  • Kebá na elimo ya botomboki
  • Ntina ya komikitisa
  • Mpo na nini osengeli kotosa bokonzi?
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Lolenge oyo baklisto bazali kotalela Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mpo na nini tosengeli kotosa bakonzi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Bokonzi ya nani osengeli kotosa?
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/6 nk. 18-22

Ndimá bokonzi ya Yehova

“Bolingo ya Nzambe elakisi boye, ete tótosaka bakomandema na ye; kutu bakomandema na ye ezali kilo te.”​—1 Yoa. 5:3.

1, 2. (a) Mpo na nini bato mingi bazali koboya kotosa bokonzi lelo oyo? (b) Tokoki nde koloba ete bato oyo baboyaka bokonzi bazali mpenza na bonsomi? Limbolá.

“BOKONZI” ezali liloba oyo bato mingi batalelaka na ndenge ya mabe. Bato mingi balingaka ata koyoka te ete moto mosusu apesa bango mitindo. Bato oyo balingaka kotosa bokonzi te balobaka boye: “Moto moko te asengeli koyebisa ngai oyo nasengeli kosala.” Kasi, tokoki nde koloba ete bato yango bazalaka mpenza na bonsomi? Te! Mingi kati na bango batosaka makanisi ya ebele ya bato mosusu oyo bazali “kolanda ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (Lom. 12:2) Na esika bázala na bonsomi, bato yango bazali “baombo ya libebi,” ndenge ntoma Petelo abengaki bango. (2 Pet. 2:19) Bato yango bazali kotambola “engebene ebongiseli ya makambo ya mokili oyo, engebene moyangeli ya nguya ya mopɛpɛ,” Satana Zabolo.​—Ef. 2:2.

2 Mokomi moko alobaki na lolendo nyonso ete: “Natikaka te ete baboti na ngai, to sango, to mokonzi moko ya lingomba, to mpe Biblia eyebisa ngai makambo oyo nasengeli kondima.” Ya solo, bato mosusu bakoki kosalela na lolenge ya mabe bokonzi na bango, mpe ebongi te tótosa bango. Kasi, yango elimboli nde ete tosengeli kotosa ata bokonzi moko te? Soki totali makambo oyo bazali kokoma na bazulunalo, tokomona ete kosala ndenge wana ebongi te. Ezali mawa na komona ete na ntango oyo bato bazali mpenza na mposa ya litambwisi, mingi kati na bango bazali mpenza koboya yango.

Ndenge oyo totalelaka bokonzi

3. Ndenge nini baklisto ya ekeke ya liboso bamonisaki ete bazalaki te kotosa makambo nyonso oyo bakonzi bazalaki kosɛnga bango básala?

3 Ndenge oyo biso baklisto totalelaka bokonzi ekeseni na ndenge oyo bato ya mokili batalelaka yango. Yango elingi koloba te ete tosalaka nyonso oyo basɛngi biso tósala. Kutu, ntango mosusu toboyaka kotosa makambo ya bato mosusu, ata soki bazali bakonzi. Ezalaki mpe bongo mpo na baklisto ya ekeke ya liboso. Na ndakisa, ntango nganga-nzambe monene mpe bakonzi mosusu oyo bazalaki basangani ya Sanedrina bayebisaki bantoma ete básakola lisusu te, bantoma batosaki te. Baboyaki kotika likambo ya malamu oyo bazalaki kosala.​—Tángá Misala 5:27-29.

4. Bandakisa nini ezali na Makomami ya Liebele emonisi ete basaleli mingi ya Nzambe basalaki makambo mpo na kosepelisa bato te?

4 Basaleli mingi ya Nzambe oyo bazalaki na bomoi liboso Klisto aya bazalaki mpe kosala bongo. Na ndakisa, Moize “aboyaki kobengama mwana ya mwana mwasi ya Falao, koponáká konyokwama elongo na bato ya ekólo ya Nzambe,” atako yango ebendelaki ye “nkanda ya mokonzi.” (Ebe. 11:24, 25, 27) Yozefe aboyaki kosangisa nzoto na mwasi ya Potifala, atako mwasi yango azalaki na likoki ya kosala ye mabe. (Gen. 39:7-9) Danyele “atyaki motema na komiyeisa mbindo na bilei kitoko ya mokonzi te,” atako ezalaki mpasi mpo kapita ya ndako ya mokonzi ya Babilone andima yango. (Dan. 1:8-14) Bandakisa yango ezali komonisa ete basaleli ya Nzambe na ntango ya kala bazalaki kozwa ekateli makasi ya kosala oyo ezali sembo, ata soki ekomemela bango mikakatano. Bazalaki te kondima makanisi ya bato kaka mpo básepela na bango; tosengeli komekola bango.

5. Na ndenge nini lolenge na biso ya kotalela bokonzi ekeseni na oyo ya mokili?

5 Nzokande, ekateli na biso emonisaka te ete tozali bato ya motó makasi; tozali mpe te bato oyo baboyaka kotosa bakonzi mpo basepeli na bango te. Tolingaka nde kotosa libosoliboso bokonzi ya Yehova. Na ntango mibeko ya bato eyokani te na mibeko ya Nzambe, tokakatanaka te mpo na kopona nani tosengeli kotosa. Lokola bantoma na ekeke ya liboso, totosaka Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.

6. Mpo na nini ezalaka ntango nyonso malamu kotosa mibeko ya Yehova?

6 Nini esalisaka biso tótosa bokonzi ya Nzambe? Tolandaka toli oyo ezali na Masese 3:5, 6: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.” Tondimaka mpenza ete nyonso oyo Nzambe asɛngaka biso ezalaka mpo na bolamu na biso. (Tángá Deteronome 10:12, 13.) Kutu, Yehova alobaki na Bayisalaele ete azali “Ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango.” Abakisaki boye: “Soki oyokaki malako na ngai! mbɛ kimya na yo ezalaki lokola ebale mpe boyengebene na yo lokola mbonge ya mai-ya-monana.” (Yis. 48:17, 18) Tondimaka maloba yango. Tondimaka ete kotosa mibeko ya Nzambe ezalaka ntango nyonso mpo na bolamu na biso.

7. Tosengeli kosala nini soki tokangi mpenza te ntina ya mobeko moko oyo ezali na Liloba ya Nzambe?

7 Tondimaka bokonzi ya Yehova mpe totosaka ye ata ntango tokangi mpenza te ntina ya likambo moko oyo asɛngi biso na Liloba na ye. Yango ezali bindimelá te; ezali nde komonisa ete totyelaka ye motema. Emonisaka elikya makasi oyo tozalaka na yango ete Yehova ayebi oyo ezali malamu mpo na biso. Botosi na biso emonisaka mpe bolingo na biso, mpamba te ntoma Yoane akomaki boye: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye, ete tótosaka bakomandema na ye.” (1 Yoa. 5:3) Kasi, ezali na ntina mosusu oyo totosaka Nzambe, oyo tosengeli kobosana te.

Tóteya makoki na biso ya kososola

8. Na ndenge nini ‘koteya makoki ya kososola’ esalisaka biso tóndima bokonzi ya Yehova?

8 Biblia elobi na biso ete tosengeli ‘koteya makoki na biso ya kososola mpo na kokesenisa ná mabe ná malamu.’ (Ebe. 5:14) Yango wana, tosengeli te kotosaka mibeko ya Nzambe kozanga kokanisa; tosengeli nde koyeba “kokesenisa ná mabe ná malamu” na kolanda mitinda ya Yehova. Esengeli tólukaka komona bwanya oyo ezali na banzela ya Yehova, mpo biso mpe tóloba lokola mokomi ya nzembo ete: “Mibeko na yo ezali kati na motema na ngai.”​—Nz. 40:8.

9. Ndenge nini tokoki koyokanisa lisosoli na biso na mitinda ya Yehova, mpe mpo na nini kosala yango ezali na ntina?

9 Mpo na komona ntina ya mibeko ya Nzambe lokola mokomi ya nzembo, tosengeli komanyolaka makambo oyo totángaka na Biblia. Na ndakisa, ntango toyekoli mobeko moko ya Yehova, tokoki komituna boye: ‘Mpo na nini mobeko to etinda oyo ezali komonisa bwanya? Mpo na nini kotosa yango ekozala mpo na bolamu na ngai? Makama nini ekómelaki bato oyo baboyaki kolanda toli ya Nzambe na likambo yango?’ Ntango lisosoli na biso eyokani na banzela ya Yehova, tokozwa bikateli oyo eyokani na mokano na ye. Tokozala na likoki ya ‘kokoba kososola soki mokano ya Yehova ezali nini’ mpe kotosa yango. (Ef. 5:17) Yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te.

Satana alukaka kobebisa bokonzi ya Nzambe

10. Na likambo nini Satana azali koluka kobebisa bokonzi ya Yehova?

10 Banda kalakala, Satana alukaka kobebisa bokonzi ya Nzambe. Elimo na ye ya kozanga botosi emonanaka na makambo mingi. Na ndakisa, kozanga limemya mpo na libala, oyo ezali ebongiseli ya Nzambe. Bato mosusu bazali kosepela kofanda esika moko kozanga ete bábalana; bato mosusu mpe bazali koluka koboma mabala na bango. Bato yango nyonso bakanisaka lokola mwasi moko oyo asalaka filme, oyo alobaki boye: “Ekoki kosalema te ete mobali to mwasi azala kaka na molongani moko.” Abakisaki boye: “Nayebi ata moto moko te oyo azali to alingaka kotikala sembo epai ya molongani na ye.” Moto mosusu oyo asalaka filme, oyo abalaki mbala mingi, alobaki boye: “Nandimi te ete moto asalemá mpo afanda na molongani moko bomoi na ye mobimba.” Ebongi tómituna boye: ‘Nandimaka bokonzi ya Yehova na likambo etali libala, to nakómi kolanda makanisi ya bato ya mokili?’

11, 12. (a) Mpo na nini ekoki kozala mpasi mpo bilenge bátosa bokonzi ya Yehova? (b) Pesá ndakisa moko oyo emonisi ete koboya kotosa mibeko mpe mitinda ya Yehova ezali bozoba.

11 Ozali elenge oyo azali na lisangá ya Yehova? Boye, yebá ete Satana alingi okanisa ete kotosa bokonzi ya Yehova ekomemela yo bolamu te. “Bamposa oyo ekangani na bolenge” mpe makanisi mabe ya baninga ya mokili ekoki kotinda yo okanisa ete mibeko ya Nzambe ezali kilo. (2 Tim. 2:22) Kotika te ete yango ekómela yo. Salá makasi omona bwanya oyo ezali na mibeko ya Nzambe. Na ndakisa, Biblia elobi na yo ete ‘kimá pite.’ (1 Kol. 6:18) Na likambo yango mpe, ebongi omituna boye: ‘Mpo na nini mobeko yango ezali komonisa bwanya? Matomba nini nakozwa soki natosi yango?’ Mbala mosusu oyebi bato oyo baboyaki kotosa mibeko ya Nzambe mpe babukaki mbuma mabe. Bato yango bazali na bomoi ya esengo? Bazali na bomoi ya malamu koleka oyo bazalaki na yango ntango bazalaki na lisangá ya Yehova? Bato yango bamoni mpenza sɛkɛlɛ ya bomoi ya esengo oyo basaleli ya Nzambe bazangi?—Tángá Yisaya 65:14.

12 Tótalela maloba oyo Ndeko Sharon alobaki eleki mwa bambula: “Lokola natosaki mibeko ya Yehova te, nazwaki maladi ya Sida. Mbala mingi, nakanisaka bambula ya esengo oyo nalekisaki ntango nazalaki kosalela Yehova.” Ndeko yango andimaki ete esengelaki mpenza atosa mibeko ya Yehova mpe ete asalaki bozoba ndenge abukaki yango. Mibeko ya Yehova ebatelaka biso. Sharon akufaki pɔsɔ nsambo nsima ya kokoma maloba yango. Ndenge likambo oyo ekómelaki Sharon emonisi yango, Satana azali na eloko ya malonga te oyo akoki kopesa bato oyo bazali kolanda mokili na ye ya mabe. Lokola azali “tata ya lokuta,” alakaka makambo mingi, kasi akokisaka ata moko na yango te, kaka ndenge asalaki epai ya Eva. (Yoa. 8:44) Tomoni mpenza ete kotosa bokonzi ya Yehova ezalaka ntango nyonso malamu koleka.

Kebá na elimo ya botomboki

13. Na likambo nini, na ndakisa, tosengeli kokima elimo ya botomboki?

13 Mpo na kotosa mpenza bokonzi ya Yehova, tosengeli kokima elimo ya botomboki. Lolendo ekoki kotinda biso tókanisa ete tozali na mposa ya litambwisi te. Na ndakisa, tokoki koboya toli ya baoyo bazali kokamba biso na kati ya lisangá. Nzambe atye moombo ya sembo mpe ya mayele mpo na kopesa biso bilei ya elimo na ntango ebongi. (Mat. 24:45-47) Tosengeli kozala na komikitisa mpe kondima ete yango nde nzela oyo Yehova azali kosalela mpo na kotambwisa basaleli na ye lelo oyo. Tózala lokola bantoma oyo batikalaki sembo. Ntango bayekoli mosusu babɛtaki libaku mpe batikaki kolanda Yesu, Yesu atunaki bantoma ete: “Bino mpe bolingi nde kokende?” Petelo apesaki eyano ete: “Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko.”​—Yoa. 6:66-68.

14, 15. Mpo na nini tosengeli kotosa toli ya Biblia?

14 Kotosa bokonzi ya Yehova esɛngaka mpe kolanda batoli oyo ezali na Liloba na ye. Na ndakisa, moombo ya sembo mpe ya mayele azali ntango nyonso koyebisa biso ete ‘tózala ekɛngɛ mpe tóbatela makanisi na biso.’ (1 Tes. 5:6) Toli yango ebongi mpenza na mikolo ya nsuka oyo, lokola bato mingi bazali “bato oyo bamilingaka bango moko, bato balingá mbongo.” (2 Tim. 3:1,2) Biso mpe tokoki nde kokóma na bizaleli yango? Ɛɛ. Soki tozali kolanda mikano ya mokili, tokoki kolala mpɔngi na elimo, to mpe kokóma na mposa ya konduka biloko ya mokili. (Luka 12:16-21) Yango wana, tokomonisa mpenza bwanya soki tondimi toli ya Biblia mpe toboyi kosala makambo na ndenge na biso, ezaleli oyo etondi na mokili ya Satana!—1 Yoa. 2:16.

15 Bilei ya elimo oyo moombo ya sembo mpe ya mayele azali kobongisa ezali kopesama na masangá na nzela ya bankulutu. Biblia epesi biso toli oyo: “Bótosaka baoyo bazali kokamba bino mpe bóyokelaka bango, mpo bazali kokɛngɛla milimo na bino lokola bato oyo bakozongisa monɔkɔ; mpo básalaka yango na esengo kasi na komilelalela te, mpo yango ekozala likama mpo na bino.” (Ebe. 13:17) Yango elingi nde koloba ete bankulutu bakoki kosala mabunga te? Te! Nzambe amonaka mabunga na bango polele koleka moto mosusu nyonso. Atako bongo, asɛngi biso tótosaka bango. Kotosa bankulutu, atako bazali bato ya kozanga kokoka, emonisaka ete tondimaka bokonzi ya Yehova.

Ntina ya komikitisa

16. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kotosa Yesu lokola Mokonzi ya lisangá ya boklisto?

16 Tosengeli kobosanaka te ete Yesu nde azali Mokonzi ya lisangá. (Kols. 1:18) Yango mpe ezali ntina moko oyo tosengeli kotosa bankulutu mpe kopesa bango “lokumu oyo eleki mpenza.” (1 Tes. 5:12, 13) Ya solo, esengeli mpe bankulutu báteyaka nsango ya Nzambe, kasi makanisi na bango te; na ndenge yango bakomonisa ete bazali kotosa bokonzi. Basengeli ‘kokende te mosika koleka makambo oyo ekomamá’ mpo na kolongisa makanisi na bango moko.​—1 Kol. 4:6.

17. Mpo na nini koluka lokumu ezali likama?

17 Biso nyonso na kati ya lisangá tosengeli te kolukaka lokumu. (Mas. 25:27) Emonani mpenza ete moyekoli moko oyo ntoma Yoane ayebaki akweaki na motambo yango. Yoane akomaki boye: “Diotelefe, oyo alingaka kozwa esika ya liboso na kati na bango, azali koyamba na limemya ata eloko moko te oyo euti epai na biso. Yango wana, soki nayei, nakokanisa lisusu misala na ye oyo azali kokoba kosala, kolobaloba maloba ya mabe mpo na biso.” (3 Yoa. 9, 10) Biso mpe tokoki kozwa liteya na likambo yango. Tosengeli mpenza kopikola na mitema na biso likanisi nyonso ya koluka kozala na esika ya liboso. Biblia elobi na biso boye: “Lolendo liboso ya kobeba, [elimo, NW] ya nzombo liboso ya kokwea.” Baoyo bandimaka bokonzi ya Nzambe basengeli kokeba na lolendo, soki te, yango ekomemela bango nsɔni.​—Mas. 11:2; 16:18.

18. Nini ekosalisa biso tóndima bokonzi ya Yehova?

18 Zwá mokano ya koboya elimo ya botomboki mpe ndimá bokonzi ya Yehova. Zwáká ntango ya komanyola na libaku malamu oyo ozali na yango ya kozala mosaleli ya Yehova. Lokola ozali na kati ya basaleli ya Yehova, yango emonisi ete Nzambe abendaki yo na nzela ya elimo santu. (Yoa. 6:44) Kozwa libaku malamu yango na lisɛki te. Saláká makasi omonisa na bomoi na yo mobimba ete oboyi elimo ya botomboki mpe ete ondimaka bokonzi ya Yehova.

Ozali koyeba lisusu?

• Kondima bokonzi ya Yehova elimboli nini?

• Ndenge nini koteya makoki na biso ya kososola esalisaka biso tóndima bokonzi ya Yehova?

• Na makambo nini Satana azali koluka kobebisa bokonzi ya Nzambe?

• Mpo na nini komikitisa ezali na ntina mpo na kondima bokonzi ya Yehova?

[Elilingi na lokasa 18]

“Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato”

[Elilingi na lokasa 20]

Ezalaka ntango nyonso malamu kotosa mibeko ya Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto