Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/7 nk. 18-20
  • Ndenge ya kosalisa mwana ntango bokufeli ndeko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kosalisa mwana ntango bokufeli ndeko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini kolobela liwa epai ya mwana?
  • Buku oyo ekoki kosalisa mpenza
  • Biyano na mituna na yo
  • Soki mwana na yo atuni motuna etali liwa
    Lamuká!—2015
  • Ndenge ya kobatela bana na yo
    Lamuká!—2007
  • Baboti​—⁠Bósalisa mwana na bino akóma na kondima makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/7 nk. 18-20

Ndenge ya kosalisa mwana ntango bokufeli ndeko

NA MAGAZINI moko oyo batɛkaka mikanda, mwasi moko alobaki na mongongo makasi epai ya motɛkisi ete: “Na kati ya ebele ya mikanda oyo, ezali ata na moko te oyo ekoki kosalisa mwana na ngai!” Mwasi yango azalaki koluka buku oyo ekokaki kosalisa mwana na ye nsima ya liwa ya mbalakaka ya ndeko moko na libota.

Mwasi yango azalaki na ntina ya komitungisa. Mwana moke abulunganaka mingi ntango moto moko oyo alingaka akufi! Bana mike bakolaka malamu na kati ya libota; nzokande, liwa ekoki kokabola mwana na ndeko moko oyo amesanaki na ye mingi. Ndenge nini yo moboti okoki kosalisa mwana na yo ntango ndeko moko na kati ya libota azali pene ya liwa to asili kokufa?

Ya solo, ntango ndeko moko oyo bolingaki mingi akufi, ekoki kozala ete yo moko ozali kotungisama mingi; ekoki kozala ete makanisi na yo ebulungani mpe ozali komibanzabanza. Kasi osengeli kobosana te ete mwana na yo mpe azali na mposa ya lisalisi na yo. Buku moko oyo ebimisamaki na lopitalo moko na etúká ya Minnesota, na États-Unis, elobi boye: “Bana bayokaka ntango mikóló bazali kosolola mpe soki balimbweli bango te, mbala mingi, bakangaka ntina ya makambo te to bazwaka makanisi mosusu.” Buku yango ebakisi boye: “Esengeli koyebisa bana makambo ndenge ezali.” Yango wana, ezali malamu kolimbwela bana makambo na kotalela mbula na bango. Yango ekoki kozala mpasi mpamba te bana oyo bazali mbula moko bakoki kokesana mayele.​—1 Bakolinti 13:11.

Ndenge nini kolobela liwa epai ya mwana?

Bato mosusu ya mayele balobaka ete ntango baboti bazali kolobela liwa epai ya mwana, basengeli te kosalela maloba lokola “alali,” “abungi,” to “atiki biso.” Soki moboti azali kosalela maloba wana kozanga ete alimbola yango, mwana akoki kozwa makanisi mosusu. Ya solo, Yesu asalelaki liloba kolala mpo na kolobela liwa. Kasi, tóbosana te ete Yesu alobaki bongo epai ya bana te. Lisusu, alimbolaki maloba na ye. Alobaki na bayekoli na ye ete: “Lazalo moninga na biso akei kopema.” Atako bayekoli ya Yesu bazalaki mikóló, “bakanisaki ete azali kolobela kopema na mpɔngi.” Yango wana Yesu alobaki na bango polele ete: “Lazalo akufi.” (Yoane 11:11-14) Soki esɛngaki Yesu alimbwela mikóló, esengeli mpe kosala bongo mpo na bana!

Bakomi mibale, Mary Ann Emswiler ná James Emswiler balobi ete: “Moboti akoki koluka kosalela maloba ya pɛtɛɛ ntango azali kolobela liwa epai ya mwana. Kasi, soki azali kosala bongo, akoki kotya na motó ya mwana makanisi oyo azalaki na yango liboso te mpe oyo ekoki kobangisa to kotungisa ye.” Na ndakisa, kosuka kaka na koyebisa mwana ete mowei alali ekoki kosala ete mwana abanga ete soki ye mpe akei kolala, akolamuka lisusu te. Soki bayebisi ye kaka ete mowei “atiki biso,” mwana akoki komiyoka ete asundolami.

Baboti mingi oyo bamekaki kolobela liwa epai ya bana na bango bamonaki ete bana bakangaki mbala moko ntina ntango basalelaki maloba ya polele na esika ya kosalela maloba mosusu. (1 Bakolinti 14:9) Bato ya mayele balobi ete moboti asengeli kolendisa mwana atuna mituna mpe aloba makambo oyo ezali kotungisa ye. Kosolola mbala na mbala na mwana ekoki kosalisa moboti alimbwela ye makambo oyo azali kokanga ntina na yango malamu te mpe ekoki kosalisa ye ayeba lolenge mosusu ya kosalisa mwana na ye.

Buku oyo ekoki kosalisa mpenza

Na ntango oyo bozali kolela ndeko moko oyo akufi, mwana na yo akoki kozala na mposa osalisa ye mpe opesa ye biyano na mituna oyo akoki komituna. Boye, epai wapi okoki kozwa makanisi ya ntina mpo na kolobela liwa? Bato mingi bamoni ete Biblia ezali na makanisi oyo ekoki kobɔndisa mpe kopesa elikya. Biblia ezali kolimbola ntina ya liwa, bakufi bakendaka wapi mpe elikya oyo ezali mpo na bakufi. Biblia elobi ete “bakufi bayebi likambo te”; likanisi yango ekosalisa mwana na yo ayeba ete ndeko oyo akufi azali konyokwama te. (Mosakoli 9:5) Longola yango, na kati ya Biblia, Nzambe apesi biso elikya ete tokomona lisusu bandeko na biso oyo bakufá, na paladiso awa na mabelé.​—Yoane 5:28, 29.

Na lisalisi ya Makomami Mosantu, okoki kosalisa mwana na yo ayeba ete Biblia ezali na batoli ya malamu mpe makanisi oyo ekoki kobɔndisa ata liboso ya mokakatano nini. Lisusu, mwana na yo akomona ete yo moko otyelaka Liloba ya Nzambe motema na makambo ya ntina mingi na bomoi.​—Masese 22:6; 2 Timote 3:15.

Biyano na mituna na yo

Ntango ozali kosalisa mwana na yo, okoki kokutana na makambo oyo ekoki kotungisa yo. Osengeli kosala nini?a Tótalela mwa mituna oyo okoki komituna.

• Ezali mabe mwana na ngai amona ete nazali kolela? Lokola moboti nyonso, na ntembe te okolinga ete mwana na yo abulungana te. Kasi ezali nde mabe mwana amona ete ozali kolela? Baboti mingi bamoni ete ezali malamu bábomba na miso ya mwana te ete bazali na mawa; na ndenge yango, mwana akoyeba ete kolela ezali mabe te. Baboti mosusu batángelaki bana na bango bato mosusu oyo Biblia elobeli, oyo balelaki ntango bakufelaki. Na ndakisa, Yesu alelaki ntango moninga na ye Lazalo akufaki. Yesu abombaki mawa na ye te.​—Yoane 11:35.

• Ezali mabe mwana akende na esika ya ebembe to na simetiere? Soki omoni mabe te mwana akende na esika ya ndenge wana, ekozala malamu olimbwela ye liboso makambo oyo akomona kuna mpe mpo na nini ekosalema. Nzokande, mpo na bantina mosusu, baboti bakoki komona ete ezali malamu te ete bana bakende na bisika wana nyonso to misusu kati na yango. Bana oyo bakei na esika oyo bakosala lisukulu ya ebembe oyo Batatoli ya Yehova basalaka bakoki koyoka makanisi oyo ekosalisa bango. Longola yango, “bolingo ya motema” oyo bato oyo bazali wana bamonisaka ekoki kolendisa moto mpe kokitisa ye motema, ata soki azali mwana moke.​—Baloma 12:10, 15; Yoane 13:34, 35.

• Ezali mabe kobɛtela mwana lisolo ya moto oyo akufi? Bato mosusu ya mayele balobaka ete soki ozali koboya kolobela moto oyo akufi, mwana akoki kokanisa ete ozali kobomba likambo moko boye mpo na mowei to olingi bóbosana ye mpenza. Mokomi Julia Rathkey alobaki boye: “Ezali na ntina mingi kosalisa bana bábosana mowei te, kasi mpe bázalaka na kobanga te.” Kolobela polele makambo ya moto oyo akufi, na ndakisa bizaleli na ye ya malamu mpe bomoi na ye, ekoki kosalisa na kobosana mpasi ya kobungisa ye. Batatoli ya Yehova babɔndisaka bana na bango na elikya ya lisekwa na paladiso awa na mabelé, epai maladi mpe liwa ekozala lisusu te.​—Emoniseli 21:4.

• Ndenge nini nakoki kosalisa mwana na ngai ntango azali kolela? Ntango bozali kolela mowei, mwana na yo akoki ata kobɛla. Mwana na yo akoki kokóma mawamawa to kotungisama. Osengeli kokamwa te soki mwana na yo azali komiyoka lokola nde amemi ngambo, kokangama yo na nzoto, to akóma kobangabanga soki oyei retare to obɛli. Ndenge nini okoki kosalisa mwana na yo? Kolinga te ete mwana akanisa ete ozali komona te ete azali kotungisama. Na yango, esengeli ozala na bososoli mpe omonisa ete ozali koyeba makambo nyonso. Salá makasi ete ozala na makanisi mabe te to kokanisa ete mwana azali mpenza koyoka mpasi te mpo na liwa ya ndeko na bino. Esengeli olendisaka ye ntango nyonso mpe oyebisa ye atuna likambo nyonso etungisi ye mpe abangaka te koloba. Okoki kolendisa elikya ya mwana na yo, mpe oyo ya moko, “na nzela ya kobɔndisama oyo euti na Makomami.”​—Baloma 15:4.

• Ntango nini tosengeli kozongela makambo oyo tomesaná kosala na libota mpe misala mosusu? Bato mingi ya mayele balobi ete osengeli koumela te kozongela makambo mingi oyo bomesaná kosala. Kozongela makambo oyo tozalaki kosala liboso esalisaka mpenza mpo na kobosana mpasi ya kokufela moto. Baboti mingi oyo bazali Batatoli ya Yehova bamoni ete kozala na momeseno malamu na makambo ya elimo, na ndakisa kosala boyekoli ya libota, mpe koyangana na makita ekoki kokitisa motema mpe kolendisa basangani ya libota.​—Deteronome 6:4-9; Baebele 10:24, 25.

Liboso Yehova Nzambe alongola maladi mpe liwa, mbala na mbala bana bakokutana na mpasi ya liwa. (Yisaya 25:8) Atako bongo, soki tozali kolendisa mpe kosunga bango, bakoki kobosana mpasi ya kokufela moto oyo balingaki mingi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Makanisi oyo epesami na lisolo oyo ezali te mibeko oyo ekoki kobongwana te. Tóbosana te ete mimeseno ya bato ekoki kokesana na kotalela mboka na bango.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 19]

Lendisá mwana na yo atunaka mituna mpe alobaka makambo oyo ezali kotungisa ye

[Elilingi na lokasa 20]

Bósalaka makambo oyo bomesaná kosala, na ndakisa boyekoli ya libota

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto