Pusaná penepene na Nzambe
“Azali mosika te na mokomoko na biso”
MOTO azali moke mpenza na kati ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Mbala mosusu osilá komituna ete, ‘Moto akoki mpenza kozala moninga ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso?’ Yango ekoki kosalema kaka soki Nzambe, oyo nkombo na ye ezali Yehova, alingi ete tópusana penepene na ye. Nzambe alingi bongo? Tokoki kozwa eyano na maloba ya ntoma Paulo epai ya bato ya mayele ya Atene, na Misala 17:24-27. Tótalela makambo minei oyo Paulo alobaki na ntina na Yehova.
Ya liboso, Paulo alobaki ete Nzambe “asalá mokili ná biloko nyonso oyo ezali na kati na yango.” (Vɛrsɛ 24) Biloko ndenge na ndenge mpe ya kitoko oyo esalaka ete tósepela na bomoi emonisi mpenza ete Mozalisi amibanzabanzaka mpo na biso mpe alingaka biso. (Baloma 1:20) Ezali mpenza bozoba kokanisa ete Nzambe ya ndenge wana asepelaka kozala mosika ya bato oyo alingaka.
Ya mibale, Yehova “apesaka bato nyonso bomoi mpe mpema mpe biloko nyonso.” (Vɛrsɛ 25) Yehova azali Mobateli ya bomoi. (Nzembo 36:9) Biloko lokola mopɛpɛ, mai mpe bilei oyo ezali na ntina mingi mpo na bomoi, ezali makabo oyo euti epai ya Mozalisi na biso. (Yakobo 1:17) Okanisi ete ebongi mpenza kondima ete Nzambe oyo apesaka biso biloko kitoko amibombaka mpe na ndenge yango aboyaka ete tóyeba ye mpe tópusana penepene na ye?
Ya misato, Nzambe “asalaki uta na moto moko bikólo nyonso ya bato.” (Vɛrsɛ 26) Yehova aponaka bilongi te mpe akoki soki moke te kokanisela bato mabe. (Misala 10:34) Mpo na nini? Bato ya mabota nyonso mpe ya mposo nyonso bautá na Adama, “moto moko” oyo Nzambe akelaki. “Mokano [ya Nzambe] ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika.” (1 Timote 2:4) Na yango, bato nyonso ata ya mposo, ekólo, to mimeseno nini, bazali na likoki ya kopusana penepene na Nzambe.
Ya minei, Paulo alobelaki likambo moko oyo ekoki mpenza kokitisa motema: Yehova “azali mosika te na mokomoko na biso.” (Vɛrsɛ 27) Atako Yehova azali likoló mpenza, azali ntango nyonso pene na bato oyo balingi mpenza kokóma baninga na ye. Liloba na ye elobi ete azali mosika te, kasi azali nde “penepene na bango nyonso bakobyanga ye.”—Nzembo 145:18.
Maloba ya Paulo emonisi mpenza ete Nzambe alingi ete tópusana penepene na ye. Kasi, Paulo amonisi ete Nzambe apesi libaku yango kaka na baoyo bazali ‘koluka’ ye mpe ‘koluka na komekameka epai na epai.’ (Vɛrsɛ 27) Buku moko mpo na babongoli ya Biblia elobi ete “maloba wana mibale emonisaka libaku oyo moto akoki kozwa . . . to mposa oyo moto akoki kokokisa.” Tózwa ndakisa moko: Soki ozali na molili na kati ya ndako moko oyo oyebi malamu, okoki kosimbasimba mpo na koluka esika ya kopelisa mwinda to porte, kasi oyebi ete okomona eloko oyo ozali koluka. Ndenge moko mpe, soki tozali motema sembo mpe tozali koluka Nzambe na komekameka, tokoki kolikya ete milende na biso ekozala mpamba te. Paulo alobi ete ‘tokozwa ye mpenza.’—Vɛrsɛ 27.
Olingi kopusana penepene na Nzambe? Okolonga soki na kondima nyonso, obandi ‘koluka Nzambe’ mpe ‘koluka ye na komekameka epai na epai.’ Ezali mpasi te mpo na ‘kozwa’ to koyeba Yehova, mpamba te “azali mosika te na mokomoko na biso.”