Omityela mikano oyo ekoki na yo mpo okoba kosalela Yehova na esengo
“MBALA oyo mpe nakoki te!”Mbala boni osilá koloba bongo mpo okokaki te kokokisa likambo oyo okanaki? Elenge mwasi moko moklisto akoki koloba bongo mpo mwana na ye ya moke aleki kotungisa ye mpe azali lisusu na ntango mingi te mpo na makambo ya elimo. Na kotalela ndenge baboti na ye bakolisá ye, moklisto mosusu akoki komona ete azali kokoka makambo te mpe kokanisa ete asalaka mpenza eloko ya malonga te na kati ya lisangá. Moklisto moko mobange akoki kozanga esengo mpo azali kokokisa lisusu te mikumba ya boklisto ndenge azalaki kosala ntango azalaki naino na makasi na nzoto. Christiane, oyo mikumba na ye ya libota epekisaka ye asala mingi na mosala ya Yehova alobi boye: “Ntango mosusu soki ndeko moko azali kosala lisolo moko oyo ezali kolendisa bandeko básala mosala ya mobongisi-nzela, nayokaka mposa ya kolela.”
Ndenge nini tokoki kolonga mikakatano wana? Ndenge nini baklisto mosusu bayekolaki komitalela na ndenge ebongi? Matomba nini tokozwa soki tozali kosala makambo na kotalela makoki na biso?
Tóyebaka esika makoki na biso esuki
Ntoma Paulo apesaki biso sɛkɛlɛ ya kozalaka ntango nyonso na esengo ntango alobaki boye: “Ntango nyonso bósepelaka na kati ya Nkolo. Nakoloba lisusu ete, Bósepelaka! Tiká ete ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te eyebana epai ya bato nyonso.” (Filp. 4:4, 5) Mpo tósalela Nzambe na esengo, tosengeli kozala na bokatikati mpe koyebaka esika makoki na biso esuki. Soki tomityeli mikano oyo eleki biso mpe tozali kobunda kokokisa yango, tokomilukela mikakatano ya mpamba. Longola yango, tosengeli kokeba ete tókóma gɔigɔi te, elingi koloba tólɛmbisa mabɔkɔ te na mosala ya Bokonzi mpo tozali na bolɛmbu boye to boye.
Ezala tozali na mokakatano nini, Yehova asɛngaka biso tópesa ye oyo tokokoka, elingi koloba tósalela ye na molimo mpe na motema na biso mobimba. (Kols. 3:23, 24) Soki tosaleli Yehova na motema na biso mobimba te, tozali kokokisa te ndai oyo tolapaki ya kosalela ye. (Lom. 12:1) Lisusu, tokomipimela esengo ya solosolo mpe mapamboli mosusu oyo moto azwaka soki azali kosalela Yehova na molimo na ye mobimba.—Mas. 10:22.
Liloba oyo ebongolami na “makambo makasimakasi te” na Biblia ezali kopesa likanisi ya koyeba kopesa basusu kilo. (Yak. 3:17) Liloba yango ezali mpe kopesa likanisi ya koboya kominyokola. Soki tozali makambo makasimakasi te, tokoyeba komitalela na ndenge ebongi. Ezali mpasi kosala bongo? Ɛɛ, ezalaka mpasi mpo na bato mosusu, ata soki batalelaka basusu na ndenge ebongi. Na ndakisa, soki tomoni moninga na biso moko alɛmbi mpo abomaki nzoto na makambo mingi, ekosɛnga tósalisa ye asala mbongwana na bomoi na ye. Biso moko mpe tosengeli koyekola komitalela mpo na koyeba soki tozali kolekisa ndelo na makambo oyo tozali kosala.—Mas. 11:17.
Soki tobɔkwamá na baboti oyo bazalaki kondima biso te ata soki tosali milende ndenge nini ekoki kozala mpasi tómitalela na ndenge ebongi. Basusu, ntango bazalaki bana mike, basengelaki ntango nyonso koboma nzoto mpo baboti bálinga bango. Soki baboti na biso mpe bazalaki bongo, tokoki kokanisa ete Yehova mpe azali bongo. Yehova alingaka biso na ndenge tosalelaka ye na motema mobimba. Liloba ya Nzambe emonisi ete Yehova “ayebi nzoto na biso, azali kobosana te ete tozali bobele mputulu.” (Nz. 103:14) Ayebi esika makasi na biso esuki mpe alingaka biso soki tozali kosalela ye na molende atako tozali na mikakatano. Soki tobosani te ete Yehova asɛngaka biso makambo oyo eleki biso te, yango ekosalisa biso tóyebaka esika makasi na biso esuki mpe tólukaka te kosala makambo oyo eleki biso.—Mika 6:8.
Atako bongo, ezalaka mpasi mpo baklisto mosusu bámitalela na ndenge ebongi. Soki ezali bongo mpo na yo, luká lisalisi ya moklisto moko oyo akɔmelá oyo ayebi yo malamu. (Mas. 27:9) Na ndakisa, olingi kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza? Ezali mpenza mokano ya malamu! Ozali na mokakatano ya kokokisa mokano yango? Ntango mosusu ozali nde na mposa básalisa yo okómisa bomoi na yo pɛpɛlɛ. To mpe okoki kotalela ná moninga na yo moklisto oyo ozali kosɛnga lisalisi soki mikumba na yo ya libota ekoki kopesa yo nzela osala mosala yango sikoyo to te. Moninga yango akoki kosalisa yo omona soki okokoka mosala yango to ekosɛnga osala mbongwana nini mpo ozwa likoki ya kosala yango. Mobali akoki mpe kosalisa mwasi na ye asalaka makambo oyo eleki ye te. Na ndakisa, akoki kosɛnga ye apema mwa moke liboso amipesa lisusu mingi na mosala ya kosakola. Yango ekosalisa ye azwa lisusu makasi mpe abungisa te esengo na ye na mosala ya kosakola.
Luká makambo oyo okokoka kosala
Bobange to maladi ekoki kopekisa biso tósala mingi na mosala ya Yehova. Soki ozali na bana ya mike, ekoki kozala ete okokaka lisusu koyekola to kolanda makita na ndenge ebongi te mpo bana bazali kolya yo ntango mpe makasi na yo nyonso. Kasi, ekoki nde kozala ete ozali komona kaka mokakatano wana mpe obosani ete ezali mpe na makambo mosusu oyo okoki kosala?
Eleki lelo bankóto ya bambula, Molevi moko ayokaki mposa ya likambo moko oyo ekokaki kosalema te. Azalaki na libaku ya kosalaka na kati ya tempelo pɔsɔ mibale na mbula. Kasi, akómaki na mposa ya kofanda pene na etumbelo libela na libela. (Nz. 84:1-3) Nini esalisaki mobali yango ya sembo asepela kaka na libaku kitoko oyo azalaki na yango? Ayaki komona ete kolekisa ata mokolo moko ya mpamba na kati na mapango ya tempelo ezalaki libaku moko monene. (Nz. 84:4, 5, 10) Biso mpe, na esika tómonaka kaka makambo oyo tokoki kosala te, tosengeli nde kolukaka komona makambo oyo tokoki kosala mpe kozala na botɔndi mpo na yango.
Tózwa ndakisa ya Nerlande, ndeko mwasi moko ya Canada, oyo atambolaka na velo ya bibɔsɔnɔ. Azalaki koyoka motema mpasi mpo akoki kosala mingi te na mosala ya kosakola. Kasi na nsima, abongolaki lolenge na ye ya kotalela makambo mpe akómaki kotalela kartye moko esika bamagazini ezalaka mingi lokola teritware na ye. Alobi boye: “Nafandaka na velo na ngai ya bibɔsɔnɔ pene na bakiti oyo batyá na esika yango mpo bato báfandaka. Nazalaka na esengo ya kopesa litatoli epai ya bato oyo bayaka kofanda wana mpo na kopema mwa moke.” Kosakola na lolenge wana epesaka Nerlande esengo mingi.
Salá mbongwana soki esengeli
Na ndakisa, masuwa moko oyo etambolaka na mopɛpɛ ezali kotambola mbangu. Nzokande, soki masuwa yango ekutani na mopɛpɛ ya makasi, motambwisi na yango akosala nyonso mpo asembola masuwa na ye, atako akoki kotɛlɛmisa mopɛpɛ te. Ndenge moko, mbala mingi tozalaka na likoki te ya kosilisa mikakatano oyo tokutanaka na yango na bomoi. Kasi, tokoki kosala mbongwana na lolenge tozali kosalela makasi, makanisi mpe mayele na biso. Soki tozali koyeba esika makoki na biso esuki, yango ekosalisa biso tóbungisa esengo na biso te na mosala ya Nzambe.—Mas. 11:2.
Tózwa ndakisa. Soki tozali na makasi mingi te, ekoki kozala malamu tóboyaka kosala misala ya makasi na ntɔngɔ, mpo tózanga te makasi ya koyangana na makita na mpokwa. Yango ekosalisa biso tózanga te libaku malamu wana ya kokutana na bandeko. To mpe soki mama moko azali na likoki te ya kobima na mosala ya kosakola mpo mwana na ye azali kobɛla, akoki kosɛnga ndeko mwasi moko ayaka na bayekoli na ye ya Biblia epai na ye mpo ye mpe ayekola na bango ntango mwana azali kolala.
Ezali boni soki bomoi na yo ezali kopesa yo nzela te ya koyekolaka yo moko liboso ya makita ya lisangá? Poná makambo oyo okokoka kobongisa. Soki tozali komityela mikano oyo tokoki kokokisa, yango ekosalisa biso tókoba kosalela Yehova na esengo.
Kosala yango ekoki kosɛnga kozwa bikateli makasi mpe kosala milende. Serge ná mwasi na ye Agnès, oyo bazalaka na France, basengelaki kosala mbongwana monene na mikano na bango. Serge alobi boye: “Ntango toyebaki ete Agnès azali na zemi, mokano oyo tozalaki na yango ya kozala bamisionɛrɛ ekendaki na mai.” Serge, oyo azali lelo na bana mibale, ayebisi biso ndenge ye ná mwasi na ye bamityelaki mokano mosusu. Alobi boye: “Lokola tozalaki lisusu na likoki ya kokende kosala na mboka mopaya te, tozwaki ekateli ya kozala bamisionɛrɛ na mboka na biso moko. Tokendaki na lisangá moko oyo elobaka monɔkɔ ya bapaya.” Mokano wana oyo bamityelaki ebotaki mbuma? Serge alobi boye: “Tomonaka mpenza ete tozali na ntina na kati ya lisangá.”
Odile, ndeko mwasi moko ya France oyo azali lelo na mbula koleka 70 mpe azali na maladi na mabɔlɔngɔ, akokaka lisusu kotɛlɛma ntango molai te. Ezalaki kopesa ye mpasi mpenza lokola nzoto na ye ezalaki kopesa ye lisusu te likoki ya kosakola ndako na ndako. Kasi, alɛmbaki te. Amonaki malamu akóma kosakola na telefone. Alobi boye: “Ezali mpenza pɛpɛlɛ mpe epesaka ngai esengo koleka kutu ndenge nazalaki kokanisa!” Mbongwana wana oyo asalaki ezongiselaki ye esengo na mosala ya kosakola.
Komityela mikano oyo ekoki na biso ekomemela biso mapamboli
Koyebaka esika oyo makasi na biso esuki ekosalisa biso tómitungisaka mingi te. Soki tozali komityela mikano oyo tokokoka kokokisa, yango ekosalisa biso tómona ete tozali mpe na ntina na bomoi atako tozali na mikakatano. Na yango, tokobanda kosepela na oyo tokoki kosala, ata soki ezali komonana moke.—Gal. 6:4.
Ntango tozali koyekola komitalela na ndenge ebongi, yango ekosalisa biso tóyebaka mpe komitya na esika ya baninga na biso baklisto. Lokola toyebi esika makoki na bango esuki, tokozala ntango nyonso na botɔndi mpo na makambo oyo bazali kosala mpo na biso. Soki tozali komonisa botɔndi mpo na lisalisi nyonso oyo tozwi, yango ekolendisa bandeko básalisanaka mpe báyebaka komitya na esika ya basusu. (1 Pet. 3:8) Tóbosana te ete Yehova, Tata na biso ya bolingo, asɛngaka biso ata mokolo moko te makambo oyo eleki biso. Soki tozali komitalela na ndenge ebongi mpe komityela mikano oyo ebongi na biso, tokozala mpenza na esengo na mosala ya Nzambe.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]
Mpo na kozala na esengo na mosala ya Nzambe, tosengeli koyebaka esika makoki na biso esuki mpe komityelaka mikano oyo ekoki na biso
[Elilingi na lokasa 30]
Nerlande azalaka na esengo mpo asalaka oyo ekoki na ye na mosala ya kosakola
[Elilingi na lokasa 31]
Yekolá “kosembolaka masuwa na yo”
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© Wave Royalty Free/age fotostock
[Elilingi na lokasa 32]
Serge ná Agnès bazwaki mapamboli mpo bamityelaki mokano mosusu