Mpo na nini tosengeli te kotya elikya na makambo oyo eleki ndelo?
TOSEPELAKA mingi ntango likambo moko oyo tozalaki na elikya na yango ekokisami mpe makambo oyo tolingaki esalami. Kasi, ezali solo ete makambo mingi oyo tokanisaka mpe oyo tozalaka na elikya na yango ekokisamaka mpenza te na ndenge oyo tolingaka. Soki, makambo mosusu oyo tozali na elikya ete esalema ezali kosalema te, toyokaka nkanda mpe toyokelaka ata bato mosusu nkanda. Moto moko ya mayele alobaki solo ete: “Eloko oyo ozali kozela soki ezwami naino te epesaka motema mpasi.”—Masese 13:12, NW.
Makambo nini mosusu oyo ekoki kolɛmbisa biso nzoto? Ndenge nini tokoki kosala mpo tózala na elikya na makambo oyo eleki ndelo te? Mpe lisusu, mpo na nini kotya elikya na makambo oyo eleki ndelo te ezali malamu mpo na biso?
Makambo oyo tozalaka na elikya na yango mpe oyo elɛmbisaka nzoto
Na bomoi ya lelo oyo makambo nyonso ekómi kosalema mbangumbangu, mbala mingi ntango tozali kosala milende mpo na kokende liboso, tomonaka mpe ete mbala mingi tozali kozonga nde nsima. Ekoki kozala na makambo ebele oyo ezali kosɛnga biso ntango mpe milende, mpe ntango tolongi te kosala likambo oyo tokanaki, tomipesaka foti. Tokoki ata kobanda koyoka lokola nde tozali kolɛmbisa bato mosusu nzoto. Cynthia, azali mwasi ya libala mpe mama ya bana, ayebi motungisi ya kobɔkɔla bana, alobi ete: “Nayokaka nkanda soki nazali koyeba mpenza eloko ya kosala te mpo na kosembola bana na ngai mpe nazali komona ete nazali koteya bango malamu te.” Elenge Stephanie, ye azali mwanakelasi mpe alobi ete: “Nazali na ntango mingi te mpo na kosala makambo nyonso oyo nalingaka kosala, mpe yango epesaka ngai nkanda.”
Soki moto azali koluka kosala makambo oyo eleki ndelo ekozala mpasi te mpo akóma koluka kosala makambo ya kokoka. Ben, azali elenge mpe abalá, alobi ete: “Soki nakanisi malamu makambo nasalaka, ndenge nakanisaka, namonaka kaka ete ezali na ndenge mosusu oyo nakokaki kosala yango malamu koleka. Nalukaka kaka kosala makambo ya kokoka, mpe yango epesaka ngai nkanda, mpe nakómaka nkandankanda, mpe nalɛmbaka nzoto.” Gail, azali mwasi moklisto, ye alobi boye: “Soki moto azali koluka kosala makambo ya kokoka, andimaka kokwea ata moke te. Tolingaka kozala bamama mpe basi oyo baleki basi nyonso. Mpo tózala na esengo, tolingaka ete mosala na biso ebota mbuma, yango wana soki tomoni ete tosalaki mosala ya mpunda, toyokaka nkanda.”
Likambo mosusu oyo ekoki kolɛmbisa moto nzoto ezali maladi mpe bobange. Ntango tozali lisusu makasi te ndenge tozalaki liboso, ebakisaka biso bolɛmbu mpe elɛmbisaka biso nzoto koleka. Elizabeth alobi ete: “Nazalaki komiyoka malamu te soki nalongi te kosala makambo oyo namesanaki kosala yango na bolɛmbu nyonso liboso nakóma na maladi.”
Makambo oyo tolobeli na likoló awa ezali kaka ndakisa mpo na komonisa makambo oyo ekoki kolɛmbisa moto nzoto. Soki totiki makanisi yango na mitema na biso, ekoki komema biso na kokanisa ete bato bamonaka biso ete tozali na ntina moko te. Na yango, makambo nini ya malamu tosengeli kosala mpo tólongola makanisi ya kolɛmba nzoto mpe tótya elikya te na makambo oyo eleki ndelo?
Ndenge nini tokoki kotya elikya na makambo oyo eleki ndelo te
Ya liboso, tóyeba ete Yehova azalaka na bokatikati mpe amityaka na esika na biso. Nzembo 103:14 elobi na biso ete: “Ayebi nzoto na biso, azali kobosana te ete tozali bobele mputulu.” Lokola ayebi makoki mpe bolɛmbu na biso, Yehova asɛngaka biso tósala makambo kaka oyo tokoki kosala. Mpe azali kosɛnga biso likambo se moko ete ‘tótambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe na biso.’—Mika 6:8.
Yehova alobi na biso lisusu ete tósololaka na ye na nzela ya libondeli. (Baloma 12:12; 1 Batesaloniki 5:17) Kasi, ndenge nini libondeli esalisaka biso? Libondeli esalisaka biso na kotya makanisi na biso esika moko mpe na kozala na bokatikati. Ntango moto azali kobondela na etingya, elakisaka ete azali koyeba ete azali na mposa ya lisalisi, ete azali na bopɔlɔ mpe na komikitisa. Yehova azali pene ya koyoka mabondeli na biso mpe kopesa biso elimo santu na ye oyo mbuma na yango mosusu ezali bolingo, boboto, malamu, mpe komikanga motema. (Luka 11:13; Bagalatia 5:22, 23) Lisusu, libondeli elɛmbisaka mitungisi na ezaleli ya kolɛmba nzoto. Elizabeth alobi ete soki ozali kobondela “okozwa libɔndisi oyo okoki kozwa esika mosusu te.” Kevin mpe alobi ete: “Nabondelaka mpo Nzambe apesa ngai motema ya kimya mpe makanisi malamu mpo nasilisa mokakatano oyo nazali na yango. Yehova asundolaka ngai te.” Ntoma Paulo ayebaki ete libondeli ezali na ntina mingi. Yango wana apesaki toli ete: “Tiká ete bisɛngeli na bino biyebana epai na Nzambe . . . Mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso, ekosɛnzɛla mitema na bino mpe [makanisi] na bino kati na Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) Ya solo, kosolola na Yehova esalisaka biso mpenza mpo tótya elikya na makambo oyo eleki ndelo te mpe tótya elikya ya ndenge yango epai ya bato mosusu mpe te.
Kasi, ntango mosusu tozalaka na mposa báloba na biso kaka na ntango yango mwa maloba oyo epesaka elikya. Liloba oyo elobami na ntango oyo ebongi ezali malamu. Soki toyebisi makambo na biso na moninga moko oyo totyelaka motema mpe oyo akɔmeli, ekoki kosalisa biso tóyeba kotalela malamu eloko oyo ezali kolɛmbisa biso nzoto to oyo ezali koyokisa biso nkanda. (Masese 15:23; 17:17; 27:9) Bilenge oyo bazali kobunda mpo na kolonga makanisi ya kolɛmba nzoto bayebaka ete soki baluki toli ya baboti, esalisaka bango bákitisa motema. Kandi azali kotɔnda baboti na ye mpe alobi boye: “Toli oyo baboti na ngai bapesaki ngai na bolingo mpenza esalisaki ngai ete nakóma te na ezaleli ya koluka makambo oyo eleki ndelo kasi nazala na bokatikati, mpe nazalaka moninga ya malamu.” Ya solo, makambo oyo ekomami na Masese 1:8, 9 ebongi mpenza. Vɛrsɛ yango elobi boye: “Mwana na ngai, yoká mateya ya tata na yo mpe tiká mibeko ya mama na yo te. Zambi yango ekozala lokola [ekɔti] na motó na yo mpe lokola monyɔlɔlɔ ya kitoko na nkingo na yo.”
Koluka makambo ya kokoka ebotaka mbuma mabe oyo lisese oyo elobi na mokuse ete: “Koluka ete bomoi ezala ndenge oyo biso tolingi ezali nde komibendela mitungisi.” Mpo likambo yango ekómela biso te, tosengeli kobongisa makanisi na biso. Soki tozali na komikitisa mpe na bopɔlɔ, mpe tozali koyeba malamu bolɛmbu na biso—tokozala na bokatikati mpe tokoluka te makambo oyo eleki ndelo. Yango wana Baloma 12:3 ekebisi biso ete ‘tóleka te komikanisa biso mpenza na motindo mobongi te.’ Lisusu, Bafilipi 2:3 elendisi biso tózala na komikitisa mpe tótalela bamosusu ete baleki biso.
Elizabeth, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, azalaki komitungisa mingi mpo na maladi na ye. Esɛngaki ye mwa ntango mpo ayeba ndenge oyo Yehova atalelaka makambo mpe abɔndisama na koyeba ete Yehova abosanaka mosala na biso te. Colin akokaka lisusu kotambola te mpo na maladi. Na ebandeli, akómaki na makanisi ete mosala na ye ya kosakola ezali lisusu na ntina te soki akokanisi yango na ndenge oyo azalaki kosala ntango azalaki nzoto kolɔngɔnɔ. Kasi alongolaki makanisi yango ntango atalelaki malamumalamu vɛrsɛ ya 2 Bakolinti 8:12. Vɛrsɛ yango elobi boye: “Soko mposa ezali, likabo ekoyambama [na kotalela] biloko bizali na moto, nde [na kotalela] biloko bizangeli ye te.” Colin alobi ete: “Atako nazali kopesa mingi te, nakopesa kaka, mpe Yehova akondima yango.” Na Baebele 6:10, balobi na biso boye: “Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na bino mpe bolingo bosili bino kotalisa na nkombo na ye.”
Kasi, ndenge nini tokoki koyeba ete tozali kotya elikya na makambo oyo eleki ndelo te? Omituna boye, ‘Makambo oyo nazali kolinga ete esalema eyokani na oyo Nzambe azali kolinga?’ Galatia 6:4 elobaka ete: “Tiká ete moto na moto ameka mosala na ye moko, boye akoki komikumisa mpo na mosala na ye moko mpe mpo na moto mosusu te.” Kobosana te, Yesu alobaki ete: “Ekanganeli na ngai ezali na motau, mpe mokumba na ngai mozali na bozito te.” Ya solo, lokola tozali baklisto, tozali na mokumba ya komema, kasi ezali “motau” mpe ezali na “bozito te,” mpe Yesu alakaki ete akobɔndisa biso soki toyekoli komema yango na ndenge esengeli.—Matai 11:28-30.
Tokozwa mbano malamu soki tokotya elikya na makambo oyo eleki ndelo te
Soki tozali koyoka mpe kosalela toli ya Liloba ya Nzambe, mpe tozali kosala makasi ete tótya elikya na makambo oyo eleki ndelo te, tokozwa mbano sikoyo mpe mpo na libela. Ya liboso, ekosalisa biso tózala nzoto kolɔngɔnɔ. Jennifer ayokaki toli ya Yehova, andimi likambo yango mpe alobi ete: “Nakómi makasi mpe nazali kosepela na bomoi.” Yango wana, Masese 4:21, 22 elobi na biso tótya miso na maloba ya Yehova mpe tóbomba yango na mitema na biso, “zambi mazali bomoi epai na baoyo bakozwa yango mpe nkisi malamu mpo na nzoto nyonso na bango.”
Mbano mosusu tokozwa ezali kimya ya makanisi. Theresa alobi ete: “Soki natiki ete Liloba ya Nzambe ekɔtela ngai na makanisi mpe na motema, yango epesaka ngai ntango nyonso esengo mingi.” Ya solo, na bomoi na biso tokozanga te kokutana na makambo oyo ekolɛmbisa biso nzoto. Kasi, ekozala mpasi mingi te mpo tólonga yango. Yakobo 4:8 elobi ete: “Bóbɛlɛma epai na Nzambe mpe ye akobɛlɛma epai na bino.” Yehova alaki mpe ete akopesa biso makasi mpo tólonga mikakatano ya bomoi mpe akopesa biso kimya.—Nzembo 29:11.
Soki tozali kotya elikya na makambo oyo eleki ndelo te, yango ekosalisa biso tótɛngatɛnga te na elimo. Yango mpe ezali lipamboli. Yango ekosalisa biso tótya makanisi na biso na makambo oyo eleki ntina na bomoi. (Bafilipi 1:10) Na bongo, tokozala na mikano ya mindɔndɔ te kasi tokokoka kokokisa yango mpe tokozala na esengo mingi. Tokotyela Yehova motema mingi mpe tokoyeba ete akotambwisa makambo mpo na bolamu na biso. Ntoma Petelo alobi ete: “Na bongo bómisɔkisa na lobɔkɔ ya Nzambe makasi, ete atombola bino na elaka eponi ye.” (1 Petelo 5:6) Eloko mosusu ezali te oyo epesaka mbano mingi koleka lokumu oyo Yehova apesi yo!
[Bililingi na lokasa 31]
Soki tokomityela elikya ya makambo oyo eleki ndelo te tokolonga makambo oyo elɛmbisaka nzoto